22 Marsi 2008—Mokolo oyo tosengeli kokanisaka
Na mpokwa ya nsuka liboso akufa, Yesu apesaki bantoma na ye limpa ezangá levire mpe kɔpɔ ya vinyo mpe ayebisaki bango bálya mpe bámɛla yango. Alobaki mpe na bango ete: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.”—Luka 22:19.
Na mbula oyo, ekaniseli yango ekosalema mokolo ya pɔsɔ, 22 Marsi, nsima ya kolala ya moi. Na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bakoyangana na mpokwa yango mpo na kokanisa liwa ya Yesu na ndenge oyo asɛngaki esalemaka. Tozali kobenga yo na esengo mpenza osangana na biso mpo na kokanisa liwa ya Yesu. Tolendisi yo otuna Batatoli ya Yehova ya esika ofandi mpo na koyeba esika mpe ngonga oyo likita yango ekosalema.