Ebla—Engumba moko ya kala oyo bato babosaná emonani lisusu
Na 1962, Paolo Matthiae, moto moko ya arkeoloji oyo azali mwana-mboka Italie, akendaki kolukaluka biloko ya kala na nɔrdi wɛsti ya ekólo Syrie; kasi, andimaki te ete akoki komona eloko moko ya malonga kuna. Bato ya arkeoloji bazalaki kokanisa ete mokili ya Syrie ezali na biloko mingi te ya kala oyo bango balukaka. Kasi, mbula mibale na nsima, babandaki kotimola na Tell Mardikh, engumba oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 60 na sudi ya Alep mpe bamonaki eloko oyo bato mingi balobaka ete ezali ‘eloko eleki ntina na biloko nyonso oyo bato ya arkeoloji bakundolaki na bambula ya 1900.’
MAKOMI mingi ya kala ezalaki komonisa ete ezalaki na engumba moko na nkombo Ebla. Kasi, moto moko te ayebaki soki engumba yango ekundamaki na nse ya mwa ngomba nini na kati ya ebele ya bangomba oyo ezali na Moyen-Orient. Moko na makomi yango elobaki ete Sargon, mokonzi ya Akkad, alongaki bingumba “Mari, Yarmuti, mpe Ebla.” Mosusu elobelaki Gudea, mokonzi ya Sumer oyo azwaki mabaya ya motuya oyo eutaki na “bangomba ya Ibla [Ebla].” Nkombo Ebla ezali mpe na engumba Karnak, na Égypte, na liste moko ya bingumba oyo Falao Thoutmosis III alongaki. Nyonso wana ezali komonisa ntina oyo bato ya arkeoloji bazalaki koluka esika oyo engumba Ebla ezalaká.
Kasi, bazwaki biloko ya ntina mingi ntango batimolaki lisusu na bambula oyo elandaki. Na ndakisa, na 1968, bakundolaki eteni ya ekeko ya Ibbit-Lim, mokonzi moko ya engumba Ebla. Na ekeko yango bakomaki ndai moko na monɔkɔ ya Akkadien oyo emonisaki ete epesamaki na nzambe Ishtar, oyo “bato mingi ya Ebla bazalaki kosambela.” Biloko oyo bato ya arkeoloji bazalaki kokundola, ezalaki komonisa “monɔkɔ, masolo, mpe mimeseno oyo eyebanaki te liboso.”
Na 1974 mpe 1975, bakundolaki bitanda oyo ezalaki na makomi ya cunéiforme mpe na bisika mingi na bitanda yango bakomaki nkombo Ebla; yango endimisaki ete engumba yango ezalaki na esika oyo ezali lelo Tell Mardikh. Biloko oyo bakundolaki emonisaki mpe ete engumba yango ebebisamaki mbala mibale. Nsima ya kobebisama ya liboso, engumba yango etongamaki lisusu; mpe na nsima banguna babebisaki yango lisusu mpe etongamaki lisusu te, mpe bato babosanaki yango na boumeli ya bankama ya bambula.
Engumba oyo ekutaná na makambo mingi
Bingumba mingi ya kala ezalaki kotongama na bisika ya patatalu lokola oyo ekaboli Ebale Tigre mpe Ebale Efalata, epai bakokaki kosala bilanga mingi. Bingumba ya liboso oyo Biblia elobeli ezalaki na Mezopotamia. (Genese 10:10) Emonani ete nkombo Ebla elimboli “libanga ya mpɛmbɛ,” nkombo oyo bapesaki yango mpo na mabanga ya calcaire oyo ezalaki na nse ya mabelé ya engumba yango. Ekoki kozala ete baponaki kotonga engumba yango esika wana mpamba te mabanga wana ezalaki komonisa ete mai ezali esika yango; eloko ya ntina mingi mpo na mboka oyo ezali mosika na bibale ya minene.
Lokola mbula ezalaki kobɛta mingi te na Ebla, bazalaki kaka kolona masango, banzete ya vinyo, mpe banzete ya olive. Bazalaki mpe kobɔkɔla bibwɛlɛ, mingimingi bampate. Mombongo ya mabaya, ya mabanga ya mwa motuya, mpe ya bibende, ezalaki makasi na Ebla mpamba te engumba yango ezalaki na katikati ya mokili patatalu ya Mezopotamia mpe Mbu ya Meditelane. Ebla ezalaki engumba-mokonzi ya ekólo moko oyo ezalaki na bafandi soki 200 000 mpe bato 10 likoló ya monkama (10 %) bazalaki kofanda na Ebla.
Bitiká ya ndako moko monene ya mokonzi emonisi ete bato oyo bafandaki na Ebla na ntango wana bayebaki makambo mingi. Ndako yango ezalaki na ekɔtelo moko ya bosanda ya mɛtrɛ soki 15. Bazalaki kobakisa monene ya ndako yango mbala na mbala mpo na misala ya Leta oyo ezalaki se kokóma mingi. Bakonzi ya Leta bazalaki na mpɛtɛ ndenge na ndenge—“bankumu” mpe “baguvɛrnɛrɛ” bazalaki kosunga mokonzi ya mboka ná mwasi na ye.
Bamonaki mwa bitanda 17 000 ya mabelé; misusu ezalaki mibimba mpe misusu ezalaki biteni. Ekoki kozala ete liboso ete bitanda yango misusu ebukana, nyonso ezalaki koleka 4 000; bazalaki kobomba yango na babibliotɛkɛ ya mabaya. Makambo oyo ekomami na bitanda yango emonisi ete mombongo ezalaki makasi na Ebla. Na ndakisa, bato ya engumba yango bazalaki kosala mombongo na Ezipito, ndenge bilembo ya bafalao mibale emonisi yango. Bitanda yango mingi ekomamaki na monɔkɔ ya Sumérien, na ekomeli ya cunéiforme. Kasi, mosusu ekomamaki na Eblaite, monɔkɔ moko ya kalakala ya Moyen-Orient oyo bayebaki na lisalisi ya bitanda yango. Bato ya mayele na masolo ya kala bakamwaki na komona monɔkɔ wana ya kalakala. Bitanda mosusu ezalaki na baliste ya maloba ya monɔkɔ ya Sumérien mpe libongoli na yango na monɔkɔ ya Eblaite. Buku moko (Ebla—Alle origini della civiltà urbana) ebengi yango “badiksionɛrɛ oyo eleki koumela kati na badiksionɛrɛ nyonso oyo toyebi.”
Bakundolaki mayemi oyo ezali komonisa basoda ya Ebla bazali koboma banguna na bango to mpe bazali kolakisa mitó ya banguna na bango oyo bakati; yango emonisi ete engumba Ebla ezalaki na basoda ya makasi. Atako bongo, ntango mokili ya Asulia mpe ya Babilone ekómaki na nguya mingi, esukisaki engumba Ebla. Ezali pɛtɛɛ te mpo na koyeba ntango mpenza oyo makambo nyonso wana esalemaki, kasi emonani ete Mokonzi Salagona I (ezali te Salagona oyo alobelami na Yisaya 20:1) nde abundisaki engumba yango mpo na mbala ya liboso mpe na nsima, nkɔkɔ na ye Naram-Sim mpe abundisaki yango. Biloko oyo bakundoli emonisi ete bitumba yango ezalaki nsɔmɔ mpe babebisaki engumba yango makasi.
Kasi, ndenge tolobaki yango, engumba yango etongamaki lisusu mpe ekómaki lisusu na lokumu mingi. Engumba yango etongamaki na kolanda plan oyo ebongisamaki malamu mpe ebakisaki lisusu lokumu na yango. Na kartye moko ya engumba yango ezalaki na esika moko oyo bazalaki kosambela nzambe-mwasi Ishtar, oyo bato ya babilone bazalaki kotalela ye lokola nzambe-mwasi ya kobota. Ekoki kozala ete oyoká nkombo “Porte d’Ishtar,” oyo emonanaki na bitiká ya Babilone. Na Ebla mpe ezalaki na ndako moko monene oyo emonani ete bazalaki kobomba bankɔsi, oyo ezalaki nyama mosantu mpo na nzambe-mwasi Ishtar. Yango ememi biso sikoyo na kolobela losambo na Ebla.
Losambo na Ebla
Ndenge moko na bingumba mingi ya Azia, engumba Ebla ezalaki na banzambe mingi. Kati na bango, tokoki kotánga Baala, Hadad (nkombo yango ezali komonana lokola bankombo mosusu ya bakonzi ya Sulia), mpe Dagan. (1 Mikonzi 11:23; 15:18; 2 Mikonzi 17:16) Bato ya Ebla bazalaki kokumisa banzambe yango nyonso. Kutu, bazalaki mpe kokumisa banzambe ya bikólo mosusu. Biloko oyo bato ya arkeoloji bamonaki emonisi ete mingimingi na milɛnɛrɛ ya mibale liboso ya ntango na biso (L.T.B.), bato ya Ebla bazalaki mpe kosambela ata bakufi oyo bazalaki bankɔkɔ ya mokonzi.
Bato ya Ebla bazalaki kotyela banzambe na bango elikya nyonso te. Ntango engumba yango etongamaki lisusu, ezalaki na milɔngɔ mibale ya efelo makasi oyo ekokaki kobangisa ata monguna nini. Na libándá, lopango yango ezalaki na molai ya kilomɛtrɛ soki 3. Bisika oyo bifelo yango ezalaki emonanaka polele tii lelo oyo.
Atako bongo, banguna balongaki kobebisa yango lisusu. Ekoki kozala ete Bahiti nde basukisaki mpenza engumba wana ya makasi na mobu soki 1 600 L.T.B. Nzembo moko ya kala elobaka ete: Ebla “epanzanaki lokola mbeki.” Mokemoke bato bakómaki kobosana engumba yango. Mokanda moko oyo ekomamaki na basoda ya Mpoto oyo bakendaki kobɔtɔla Yelusaleme na mobu 1098 elobeli esika oyo Ebla etongamaká; babengaki yango mwa engumba moko ya kalakala, kati na mboka oyo babengi Mardikh. Engumba Ebla ebungaki mpenza mpe eyaki komonana lisusu nsima ya bankama ya bambula.
[Etanda na lokasa 14]
EBLA MPE BIBLIA
Na 1976, zulunalo moko (Biblical Archeologist) ezalaki na lisolo oyo ebendaki likebi ya bato ya mayele na makambo ya Biblia. Moto oyo ayekolaki ndimbola ya makambo oyo ezalaki na bitanda oyo bamonaki na Ebla alobaki ete ekoki kozala ete bitanda yango ezali mpe na bankombo mosusu ya bato mpe ya bisika oyo Biblia elobelaki bankama ya bambula na nsima. Ekoki kozala ete bato mosusu ya mayele babakisaki makambo na bango moko mpe babandaki kokoma ete na Ebla bazwaki bilembeteli oyo ezali kondimisa lisolo ya Genese.a Kutu, sango moko na nkombo Mitchell Dahood alobaki boye: “Bitanda ya mabelé [oyo bazwaki na Ebla] ezali kosalisa mpo na kokanga ntina ya makambo mosusu oyo ezali polele te na Biblia.” Na ndakisa, alobaki ete ekoki kosalisa mpo na koyeba “ntango nini babandaki kosalela nkombo ya Nzambe ya Yisalaele.”
Lelo oyo, bato ya mayele bazali koyekola bitanda yango malamumalamu. Lokola Liebele mpe Eblaite ezali minɔkɔ ya kalakala ya Moyen-Orient, ekoki kosalema ete bankombo mosusu ya bingumba mpe ya bato oyo ekomami na bitanda yango ekokana na oyo ezali na Biblia. Kasi, yango elingi koloba te ete bazali kolobela bato to bisika moko. Toyebi naino te ndenge nini biloko oyo bakundoli na Ebla ekosalisa mpo na kokanga ntina ya makambo mosusu oyo ezali na Biblia. Na oyo etali nkombo ya Nzambe, mokomi ya lisolo oyo ebimaki na zulunalo oyo tolobelaki na ebandeli amonisaki ete ata mbala moko te alobaki ete nkombo “Yawe” ezalaki na bitanda oyo bakundolaki na Ebla. Mpo na bato mosusu ya mayele, elembo oyo balimbolaki ete esengeli kotángama “ja” ezali kaka nkombo ya nzambe moko kati na ebele ya banzambe oyo bato ya Ebla bazalaki kosambela; nzokande, bato mosusu ya mayele balobaka ete ezali kaka liloba moko ya monɔkɔ yango. Ezala ete ezali nkombo ya nzambe to ezali kaka liloba ya monɔkɔ yango, toyebi ete ezali te nkombo ya Nzambe ya solo, Yehova.—Deteronome 4:35; Yisaya 45:5.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba ndenge oyo arkeoloji ezali komonisa ete masolo ya Biblia ezali solo, talá mokapo 4 ya buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Map/Picture on page 12]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
MBU YA MEDITELANE
KANANA
SYRIE
Alep
Ebla (Tell Mardikh)
Ebale Efalata
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Moto ya arkeoloji: Missione Archeologica Italiana a Ebla-Università degli Studi di Roma ‘La Sapienza’
[Elilingi na lokasa 12, 13]
Shɛnɛti moko ya wolo ya mobu soki 1750 L.T.B.
[Elilingi na lokasa 13]
Bitiká ya ndako monene ya mokonzi
[Elilingi na lokasa 13]
Liyemi ya bitanda ya mabelé na ndako ya kobomba mikanda
[Elilingi na lokasa 13]
Etanda na ekomeli ya cunéiforme
[Elilingi na lokasa 13]
Nzete ya mokonzi ya Ezipito, 1750-1700 L.T.B.
[Elilingi na lokasa 13]
Soda ya Ebla mpe mitó ya banguna na bango
[Elilingi na lokasa 14]
Libanga mpo na nzambe-mwasi Ishtar
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Missione Archeologica Italiana a Ebla-Università degli Studi di Roma ‘La Sapienza’
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 13]
Bililingi nyonso (longola bitiká ya ndako monene ya mokonzi): Missione Archeologica Italiana a Ebla-Università degli Studi di Roma ‘La Sapienza’