Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/12 nk. 8-11
  • Bazali kosakola nsango malamu na ekólo Haïti

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali kosakola nsango malamu na ekólo Haïti
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Kosakola na mwa engumba
  • Na mayemi
  • Na eteyelo
  • Kosakola na monɔkɔ ya Créole
  • Kosakola epai ya bato ya bolɔkɔ
  • Lamuká! ezali komemela bato mingi nsango malamu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/12 nk. 8-11

Bazali kosakola nsango malamu na ekólo Haïti

HAÏTI mpe République dominicaine ezali bikólo mibale oyo esali Esanga ya Hispaniola, esanga oyo ezali na bangomba oyo eleki milai na bisanga ya Caraïbes. Na bisika mosusu, bangomba yango ezali na molai ya mɛtrɛ koleka 2 400. Na ntango ya elanga, mwa bangalasi esalemaka likoló ya maziba oyo ezali na bangomba yango.

Bangomba mpe mabwaku oyo ezali na sudi ezali na kati ya zamba moko monene. Na bisika mosusu bangomba ezali polele mpe mabelé ebukanábukaná​—nyonso wana mpo bato bazali kokatakata banzete na bazamba yango. Ezala okei na ngámbo ya nɔrdi to na ngámbo ya sudi, okomona ete Haïti ezali mboka moko kitoko mpenza. Na mwa banzela mosusu ya nyokanyoka oyo ezali likoló ya bangomba, okomona na mosika bisika ya kitoko, ezala na mokili to na mbu. Bipai nyonso, okomona bafololo ya ndenge na ndenge mpe biloko ya langilangi.

Ekólo yango mobimba ezali na bato koleka milio 8; mpe mingi kati na bango bafandaka na bamboka mpe bankɔkɔ na bango bautá na Afrika. Bato mingi bazali babola; atako bongo, bazalaka na boboto mpe balingaka bapaya. Esali sikoyo mbula 60 banda Batatoli ya Yehova bazali koteya bato ya Haïti nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpe bato yango bayambaka bango malamu.​—Matai 24:14.

Kosakola na mwa engumba

Lisolo oyo misionɛrɛ moko abɛti mpo na mbala ya liboso oyo akendaki kosakola na mwa engumba moko, ezali komonisa biso ndenge oyo mosala ya kosakola esalemaka na bisika yango. Akomaki boye:

“Mokolo moko, na sanza ya Marsi 2003, totikaki Cabaret, engumba moko epai ndako ya bamisionɛrɛ ezali, na ntaka ya kilomɛtrɛ 30 na nɔrdi ya Port-au-Prince, engumba-mokonzi, mpe tokendaki kosakola na Casale, mwa engumba moko oyo esɛngaki tótambola miniti 30 na motuka mpo na kokóma kuna. Mbala ya nsuka oyo Batatoli ya Yehova basakolaki kuna ezalaki na 1999; yango wana tozalaki na mposa makasi ya kosakola kuna. Tozalaki bato ntuku mibale na mibale, pene na basakoli nyonso ya lisangá na biso; tokɔtaki na mituka mibale mpe tobandaki mobembo na ngonga ya 7. Wana mituka ezalaki kotambola na banzela ya pɔtɔpɔtɔ, tozalaki kobɛta masolo mpe kosɛka mpe nsukansuka tokómaki na lobwaku moko oyo ezali na banzete ebele ya mineneminene. Ebale moko oyo euti na lobwaku yango eleki na kati ya engumba Casale.

“Engumba yango esalemaki na ebandeli ya bambula ya 1800 ntango basoda ya Pologne bakendaki kosalisa bato oyo bazalaki baombo bázwa lipanda; basoda yango babalaki basi oyo bazalaki bana-mboka Haïti mpe bafandaki kuna. Babotaki bamilatrɛ. Yango wana, lelo oyo ata na bamboka okokuta bato ya loposo mpɛmbɛ makasi, ya shokola, mpe misusu bazali na loposo moindo.

“Moto oyo tokutanaki na ye na porte ya liboso asepelaki koyoka biso te. Ntango tobandaki kokende, mobali moko alandaki biso na balabala, alingaki koyeba soki tondimaka ete Nzambe ná Yesu bazali moto moko te. Tosɛngaki ye azwa Biblia na ye, mpe nsima ya kosolola na ye, andimaki ete Yesu azali Mwana ya Nzambe mpe ete Yehova azali “Nzambe kaka moko ya solosolo.” (Yoane 17:3) Bato mingi bazalaki kosɛnga biso tófanda mpo tósolola. Basusu bazalaki kotuna, ‘Bokoya lisusu mokolo nini mpo na koteya biso Biblia?’

“Na midi, tolukaki esika moko oyo tokoki kobombama moi mpe kolya. Bandeko-basi mibale bamemaki nzungu mobimba ya mbisi balambá. Bilei yango elambamaki kitoko mpenza! Ntango tozalaki kolya mpe kosolola, tozalaki mpe kopesa baleki-nzela litatoli. Na nsima, tokatisaki ebale mpe tokendaki kosakola na ngámbo mosusu ya engumba. Tosepelaki mingi kosolola na bato yango ya boboto oyo tozalaki kokuta bafandi na nse ya banzete pembeni ya mwa bandako na bango. Ezalaki esengo koyoka makɛlɛlɛ ya bana bazali kosakana, basi bazali kosukola bilamba na ebale, mpe bamama bazali kotuta kafe.

“Na ngonga ya 16, tokutanaki biso nyonso mpo na kozonga na Cabaret. Ngai ná mobali na ngai tosepelaki mingi na mokolo wana ya liboso oyo tosakolaki na Casale, mwa engumba oyo ezali na bato ya boboto.”

Banda 1945, mbula oyo bamisionɛrɛ ya liboso bakómaki na Haïti, motángo ya basakoli na ekólo yango ezali se kobakisama mpe lelo oyo, basakoli bazali 14 000 mpe bazali koyekola Biblia na bato koleka 22 000. Na Marsi 2005, babengisaki bato 59 372 na Ekaniseli mpe bazali kokoba kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe epai ya bato nyonso. Tótalela mitindo ndenge na ndenge oyo mosala ya Batatoli ya Yehova ezali kobenda likebi ya bato na Haïti.

Na mayemi

Bato mingi ya Haïti basepelaka na balangi oyo ebɛtaka na miso. Yango emonanaka na bilamba na bango, na balangi oyo bapakolaka na bandako na bango, na bafololo oyo balonaka, mpe na mayemi na bango. Na babalabala mingi ya Port-au-Prince, okokuta bazali kotɛkisa bitanda ya mayemi ya langilangi oyo babengaka “l’Art haïtien.” Bato bautaka na mikili ndenge na ndenge mpo na kokende kosomba mayemi yango.

Longolá bitanda, mituka ya Port-au-Prince ezalaka mpe na mayemi mingi. Mbala mingi basalaka mayemi ya makambo oyo Biblia elobeli.

Ntango ozali kotambola okoki komona elilingi ya likambo moko oyo oyebi; na ndakisa elilingi ya Adama ná Eva, ntango mosusu na talatala ya nsima ya motuka moko oyo ezali koleka. Na mituka yango mingi mpe liboso ya bamagazini mingi, bakomá bavɛrsɛ ya Biblia to maloba mosusu oyo ezali na nkombo Yehova.

Na eteyelo

Na Haïti, bilenge Batatoli bazwaka mabaku mingi ya koyebisa baninga na bango ya kelasi nsango ya Biblia. Tótalela ndakisa ya elenge mwasi moko ya mbula 17. Alobi boye:

“Mokolo moko, elenge mobali moko atunaki ngai soki ‘pite’ elakisi nini. Lokola nakanisaki ete alingi kosalisa ngai masɛki, nakipaki ye te. Kasi, ntango atunaki motuna yango na elenge mobali moko, yango ekómaki lisolo ya kelasi mobimba; yango wana nalukaki mwa makanisi na mikanda na biso, mpe na pɔsɔ oyo elandaki namonisaki makanisi yango liboso ya bana-kelasi na biso; nalimbwelaki bango ntina oyo Batatoli ya Yehova basalaka makasi bázala na etamboli ya malamu, na elimo ya malamu mpe bázala pɛto.

“Baninga ya kelasi batunaki ngai mituna mingi mpe basepelaki na biyano ya Biblia oyo napesaki bango. Ata mokambi ya eteyelo, oyo liboso azalaki koloba te, atunaki mituna mingi mpe asepelaki ete naloba mpe na bakelasi mosusu. Nalakisaki bango buku Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano bibongi,a mpe mingi basepelaki na yango. Na mokolo oyo elandaki, nakabolaki buku yango 45 epai ya baninga ya eteyelo. Mingi baumelaki te mpo na kosilisa kotánga buku yango mobimba, mpe bamosusu bazali lelo oyo koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova. Moninga moko ya kelasi oyo tofandaka na ye kartye moko akómi koyangana na makita nyonso.”

Kosakola na monɔkɔ ya Créole

Se ndenge bato ya Haïti bazali mposo ndenge na ndenge, mboka na bango ezali na makambo ndenge na ndenge ya kitoko, monɔkɔ ya mboka na bango oyo babengi Créole, ezali mpe na makambo ndenge na ndenge; esangisi maloba ya Lifalanse mpe gramɛrɛ ya minɔkɔ ya Afrika ya Wɛsti. Batatoli ya Yehova basakolaka mingimingi na monɔkɔ yango mpe bakómi kobimisa mikanda mingi oyo elimbolaka Biblia na monɔkɔ yango.

Na 1987, mwa buku Sepela na bomoi ya seko na Mabele!, ebimisamaki na monɔkɔ ya Créole ya Haïti, na nsima babimisaki buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko mpe na nsima babimisaki mwa buku Nzambe ezali kosɛnga nini epai na biso? Mikanda yango ezali kosalisa mingi bato oyo bazali na mposa ya koyekola Liloba ya Nzambe. Banda na nimero ya 1 Sɛtɛmbɛ 2002, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali kobima na Créole ya Haïti. Bato mosusu batángaka mikanda ya Lifalanse, kasi mingi basepelaka kotánga mikanda yango na monɔkɔ ya mboka na bango.

Kosakola epai ya bato ya bolɔkɔ

Batatoli ya Yehova bakómi mpe kosakola nsango malamu epai ya bato oyo bazali na bolɔkɔ. Bazali kosepela komema nsango oyo ezali kobɔndisa bato oyo bazali na esika wana ya mpasi. Ndeko moko alobi boye:

“Na mbala ya liboso oyo tokendaki na bolɔkɔ moko, bakonzi ya bolɔkɔ yango basangisaki bakangami nyonso na ndako moko ya monene mpo tóyebisa bango nsango oyo tomemelaki bango. Tozalaki komituna soki bakosepela. Ntango toyebisaki bango ete toyei kosalisa bango báyekola Biblia, bango nyonso, bato 50 basepelaki. Tolakisaki bango mwa buku Omipesa na kotánga mpe kokoma mpe Sepela na bomoi ya seko na Mabele! na monɔkɔ ya Créole; mpe tobandaki mbala moko koyekola Biblia na bato 26. Bato zomi bayebaki kotánga te, kasi basepelaki ntango tomonisaki bango ndenge oyo bililingi oyo ezali na mwa babuku yango ekoki kosalisa bango bákanga ntina ya mateya ya Biblia.”

Ntango Batatoli bazongelaki bango, mobali moko alobaki boye: “Natángaki mwa buku yango mobimba mpe nazongelaki lisusu kotánga yango; nazalaki ntango nyonso kokanisa makambo oyo natángaki na mwa buku yango, mpe nazalaki kozela bino.” Mobali moko oyo bakangaki ye mpo akendaki koyiba na mondoki na mabɔkɔ, alobaki ete alingi kobongwana mpe asɛngaki ete bátinda ndeko moko akendaka koyekola Biblia na mwasi na ye. Mobali moko oyo azali tata ya bana mibale asɛngaki mpe ete Batatoli bákende koyekola Biblia na mwasi na ye mpo amona bokeseni kati na mateya ya solo mpe ya lokuta. Pastɛrɛ moko ya lingomba ya Protesta oyo ayibaki bandimi na ye mbongo mingi, alobaki ete sikoyo ayebi mateya ya solo mpe soki abimi na bolɔkɔ, akoteya bandimi na ye mpo bákóma Batatoli ya Yehova.

Moto mosusu oyo azangaki mwa buku azali kosɛnga na monɔkɔ ya Créole, azwaki mwa buku ya moninga na ye mpe akomaki na kaye makambo nyonso oyo ezali na mwa buku yango mpe akangaki yango na motó. Mwasi moko oyo azalaki mpe na bolɔkɔ akómaki koyebisa basi mosusu makambo oyo azalaki koyekola, kutu akómaki koyekola Biblia na bato libwa. Mobali mosusu asilisaki koyekola mwa buku yango mpe akɔtaki na buku Boyebi mpe akómaki koyebisa baninga na ye mosusu ya bolɔkɔ makambo oyo azalaki koyekola. Eumelaki te akómaki koyekola Biblia na bato minei.

Merconyb ayekolaká Biblia kala mpe bandeko na ye mosusu bazali Batatoli ya Yehova. Azalaki kolendisa bato mosusu ya bolɔkɔ bátángaka mikanda oyo elimbolaka Biblia, oyo bandeko na ye bamemelaki ye. Alobi boye: “Ntango napesaka bato mosusu ya bolɔkɔ mikanda, babengaka ngai Motatoli ya Yehova. Kasi, ngai nayebisaka bango ete nazali Motatoli ya Yehova te, mpo nayebi ete kozala Motatoli ya Yehova ezali likambo ya lisɛki te. Sikoyo, nalingi mpenza komipesa na koyekola mpo nazwa batisimo. Ntango nazalaki elenge, soki nalandaki ndakisa ya bayaya na ngai, mbɛlɛ nazali na bolɔkɔ te.”

Moto moko oyo Mercony apesaki mokanda, alobaki boye na Motatoli moko oyo ayaki kotala ye: “Liboso tókutana mpo na mbala ya liboso, nabandaki konyokwama na makanisi mpe nakómaki na makanisi ya komiboma; kasi, ntango natángaki bazulunalo na bino, nabondelaki Nzambe alimbisa ngai mpo na makambo ya mabe oyo nasalaki mpe atindela ngai moto oyo akolakisa ngai nzela ya malamu. Nazalaki na esɛngo mingi ntango oyaki awa mpo na kolendisa bato ya bolɔkɔ báyekola Biblia. Nakosepela oteya ngai ndenge nakoki kosalela Yehova.”

Lamuká! ezali komemela bato mingi nsango malamu

Lamuká! ya 8 Novɛmbɛ 2000, elobelaki mosala ya lifulumɛ. Mwasi moko azwaki bazulunalo yango 2 000 mpe akabolaki yango epai ya mafulumɛ oyo bayaki na likita moko na Port-au-Prince. Bapolisi mingi ya Port-au-Prince bazwaki Lamuká! ya 8 Yuli 2002, oyo elobelaki mosala na bango. Basepelaki na yango mingi mpe tii lelo oyo bamosusu soki bakutani na Batatoli ya Yehova, basɛngaka zulunalo yango.

Eleki mwa mikolo, mokonzi moko ya ebongiseli ya ONU mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto (OMS) azalaki kobongisa mateya mpo na kosalisa bato báyeba bokɔnɔ ya sida. Babengisaki ye na filiale ya Batatoli ya Yehova mpe balakisaki ye masolo ya zulunalo Lamuká! oyo elobelaki sida. Akamwaki mingi na komona ete masolo yango oyo esalelaki makanisi ya Biblia, emonisaki ndenge malamu ya kokima sida, mpe ndenge ya kosalisa bato oyo bazali na maladi yango. Alobaki ete, zulunalo Lamuká! ezali na esika ya liboso mpo na oyo etali kolimbola bato maladi ya sida.

Batatoli ya Yehova bazali kopalanganisa nsango malamu na balolenge mingi na Haïti mpe na bikólo mosusu 234 na mokili mobimba. Bato mingi bazali kondima nsango yango ya elikya mpe bazali kozwa lisalisi mpo na kobosana mikakatano ya bomoi ya lelo oyo mpe kotya miso na bango na bilaka kitoko ya mokili ya sika epai bato nyonso bakosambela Yehova, Nzambe ya solo mpe bakozala na bomoi ya kokoka.​—Emoniseli 21:4.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mikanda oyo bapesi mitó ya makambo na yango na lisolo oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova.

b Topesi ye nkombo mosusu.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 9]

Fɔtɔ ya mbu: ©Adalberto Rios Szalay/photodisc/age fotostock

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto