Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/10 nk. 3-4
  • Tokoki mpenza koyeba Nzambe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tokoki mpenza koyeba Nzambe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Likanisi ya Biblia
  • Tózwa boyebi sikoyo mpe mpo na libela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Bato bazali na mposa ya boyebi ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Kobá koyoka mongongo na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Mpo na nini tozali na mposa na boyebi ya solo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/10 nk. 3-4

Tokoki mpenza koyeba Nzambe?

“Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba . . . nzambe kaka moko ya solosolo.”​—Yoane 17:3.

NTOMA Paulo alobaki boye: “E! bomɛngo ya Nzambe mpe bwanya na ye mpe boyebi na ye ezali bozindo boni! Kosambisa na ye ekoki kososolama te mpe banzela na ye ekoki komonana te!” (Baloma 11:33) Nsima ya kotánga vɛrsɛ yango, tosengeli nde kokanisa ete moto moko te akoki kososola bwanya mpe boyebi ya Nzambe; na maloba mosusu, moto moko te akoki koyeba Nzambe mpe mikano na ye?

Bato ya mayele ya mangomba mosusu bakanisaka ete moto moko te akoki koyeba Nzambe. Mpo na yango, buku moko (The Encyclopedia of Religion) elobi boye: “Nzambe azali likoló ya nyonso oyo moto akoki koyeba mpo na ye. . . . Ata moto moko te akoki kolimbola ndenge azali. Lokola Nzambe aleki likoló, nkombo to ndimbola nyonso oyo moto akoki kopesa ekozala na nsuka. . . . Moto akoki koyeba ye te, mpo azali likoló ya boyebi nyonso.”a

Zulunalo moko (Newsweek) elobi ete bato mingi bakómi na “makanisi ya sika” elingi koloba, bazali kondima ete “solo ezali kaka moko, mpe solo yango ezali ete solo ezali te.”

Nzokande, bato mingi bazali kozwa biyano te na mituna na bango ya koyeba ntina ya bomoi. Bazali komona makambo ya mawa lokola bobola, maladi, mpe mobulu. Bakoki komitungisa mingi na komona ndenge oyo bomoi ya moto ekoki kobongwana na mbalakaka. Bakoki kozala na mposa ya kozwa biyano na mituna yango, kasi soki bazwi yango te, bakoki koloba ete biyano na mituna yango ezalaka te. Yango wana, mingi kati na bango bamilongoli na mangomba mpe soki bazali kaka kondima ete Nzambe azali, bazali koluka ye na ndenge na bango.

Likanisi ya Biblia

Nzokande, bato oyo batángaka Biblia mpe bandimaka ete Yesu azali Molobeli ya Nzambe, basengeli koyeba likanisi ya Biblia. Mbala mosusu oyebi ete Yesu alobelaki banzela mibale: “nzela ya monene mpe oyo efungwamá . . . ememaka na libebi” mpe “nzela oyo ekangamakangamá ememaka na bomoi.” Ayebisaki ndenge ya koyeba bato oyo bazali na nzela mokomoko; alobaki boye: “Na bambuma na bango bokoyeba bango.” Bambuma yango ezali nini? Ezali te makambo oyo bazali koloba kasi makambo oyo bazali kosala. Yesu alobaki boye: “Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai, ‘Nkolo, Nkolo,’ nde bakokɔta na bokonzi ya likoló, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Tata na ngai oyo azali na likoló.” Koloba kaka ete tondimaka Nzambe ekoki te. Tosengeli kosala mokano ya Nzambe. Mpo na yango, tosengeli libosoliboso koyeba mokano yango.​—Matai 7:13-23.

Yesu amonisaki polele ete bato bakoki koyeba Nzambe. Alobaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Tomoni ete tokoki mpenza kozwa bwanya mpe boyebi ya Nzambe; kasi, mpo tózwa yango, tosengeli koluka yango. Nzambe alaki kopesa bomoi ya seko epai ya bato oyo bazali kosala bongo; yango wana, koluka koyeba Nzambe ezali mosala ya mpunda te.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Makanisi yango ezalaka na mangomba oyo ezali na Azia, na ndakisa Lingomba ya Hindu, ya Tao, mpe ya Bouddha.

[Elilingi na lokasa 4]

Yesu alobaki ete nzela ekangamakangamá ememaka na bomoi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto