Bato bazali na mposa ya boyebi ya Nzambe
“Okoyeba kobanga Yehova, mpe okozwa mpenza boyebi ya Nzambe.”—MASESE 2:5, NW.
1. Mpo na nini tokoki koloba ete motema ya moto ezali mosala ya kokamwisa ya mayele ya Nzambe?
SIKAWA na mabelé, mitema ya bato soko 5 600 000 000 mizali kobɛta. Mokolo na mokolo, motema na yo mpenza ebɛtaka mbala 100 000 mpe etindaka motuya mokokani na balitɛlɛ 7 600 ya makila kati na ebongiseli ya misisa ya motema ya nzoto na yo, oyo ekoki kokóma na bolai ya bakilomɛtɛlɛ 100 000. Ezali na mosisa mosusu te oyo esalaka mosala makasi koleka enama wana oyo esalemá na mayele ya kokamwisa ya Nzambe.
2. Lolenge nini okoki kolimbola motema ya elilingi?
2 Ezali mpe na mitema 5 600 000 000 ya elilingi oyo mizali kosala awa na mabelé. Mayoki na biso, bamposa na biso, mpe matindiki na biso efandaka kati na motema ya elilingi. Ezali efandelo ya makanisi na biso, ya bososoli na biso, mpe ya mikano na biso. Motema ya elilingi mokoki kozala na lolendo to na komikitisa, na mawamawa to na esengo, na molili to na kongɛnga.—Nehemia 2:2; Masese 16:5; Matai 11:29; Misala 14:17; 2 Bakolinti 4:6; Baefese 1:16-18.
3, 4. Lolenge nini mitema mizali kosimbama na nsango malamu?
3 Yehova Nzambe akoki kotánga makambo oyo mazali kati na motema ya moto. Masese 17:3 elobi ete: “Mbeki na konangola ekoki mpo na palata mpe mɔ́tɔ makasi mpo na wolo, nde [Yehova] akomeka mitema na bato.” Kasi, na esika ya kosuka bobele na kotánga motema mokomoko mpe kokatela yango etumbu, Yehova azali kosalela Batatoli na ye mpo na kosimba mitema ya bato na nzela ya nsango malamu. Yango ezali na boyokani na maloba ya ntoma Paulo oyo ete: “Moto na moto oyo akobelela nkombo na [Yehova] akobika. Na nzela nini bakobelela ye oyo bandimi ye te? Na nzela nini bakondima ye oyo bayoki mpo na ye te? Bakoyoka na nzela nini soko bazangi mosakoli? Bakosakola na nzela nini soko batindami te? Pelamoko ekomami ete, Kitoko boni makolo na bango bakosakola nsango na makambo malamu!”—Baloma 10:13-15.
4 Yehova asepeli kotinda Batatoli na ye ete bakendeke bipai nyonso na mabelé mpo na “kosakola nsango malamu ya makambo malamu” mpe koluka baoyo bazali na mitema oyo mikoki koyamba yango. Sikawa, tokómi na motángo ya basakoli koleka 5 000 000—elingi koloba bato 1 200 mpo na Motatoli 1 awa na mabelé. Kosala ete nsango malamu ekómela bamiliare ya bato na mabelé ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Kasi Nzambe azali kotambwisa mosala wana na nzela ya Yesu Klisto mpe azali kobenda bato ya mitema sembo. Na yango, esakweli oyo ezwami na Yisaya 60:22 emonani solo: “Oyo moke akokóma nkóto mpenza, oyo aleki moke akokóma libota makasi. Ngai nazali [Yehova]; na ntango na yango, nakoyeisa yango mbangu.”
5. Boyebi ezali nini, mpe tokoki koloba nini na ntina na mayele ya mokili?
5 Ntango yango ezali nde oyo, mpe likambo moko lizali polele ete—bamiliare ya bato bazali na mposa ya boyebi. Ya solo, boyebi ezwamaka na nzela ya makambo oyo tomoni kati na bomoi, na bolukiluki, to na boyekoli. Mokili mosili kozwa boyebi mingi. Bokóli esili komonana na makambo mingi lokola oyo: makambo matali transport, makambo ya monganga, mpe myango ya bopesi nsango. Kasi, boyebi oyo bato bazali na yango mposa mpenza ezali nde boyebi ya mokili? Soko moke te! Bitumba, minyoko, maladi mpe liwa ezali kokóba na komonisa bato bwale. Mayele ya mokili mazali mbala mingi kokokana mpenza na zɛlo oyo ezali koyengayenga kati na mopɛpɛ ya lisobe.
6. Na ntina na makila, lolenge nini boyebi ya Nzambe ekeseni na mayele ya mokili?
6 Na ndakisa: esili koleka bikeke mibale, bato bazalaki na momeseno ya kosalela kobimisama ya makila lokola mwango ya kobikisa moto na bokɔnɔ. George Washington, prezidá wa yambo wa États-Unis, abimisaki makila mbala na mbala na boumeli ya bangonga ya nsuka ya bomoi na ye. Na ntango moko boye alobaki ete: “Bótika ngai nakufa na kimya; nakoumela lisusu ntango molai te.” Alobaki solo, mpamba te akufaki bobele na mokolo wana—14 Desɛ́mbɛ 1799. Na esika ya kobimisama makila, lelo oyo bato bazali kolendisa mingi kozongisama makila kati na nzoto ya moto. Myango yango nyonso mibale misili kotonda na mikakatano oyo mimemaka na liwa. Nzokande, na boumeli ya bileko nyonso wana, Liloba ya Nzambe esilaki koloba ete: “Bóboya . . . makila.” (Misala 15:29) Boyebi ya Nzambe ezalaka ntango nyonso malamu, ebongi na kotyelama motema, esilaka ngala te.
7. Lolenge nini boyebi ya sikisiki ya Makomami ekeseni na mayele ya mokili na likambo litali kobɔkɔla mwana?
7 Tótalela ndakisa mosusu oyo ezali komonisa ete mayele ya mokili ebongi na kotyelama motema te. Na boumeli ya bambula oyo euti koleka, bato oyo bayekolaka bizaleli ya moto bazalaki kolendisa baboti ete bábɔkɔla bana kozanga kotyela bango bipekiseli mpe kozanga kopesa bango bitumbu, kasi moko na bato oyo balendisaka likanisi yango andimaki na nsima ete yango ezalaki libungá. Lisangá oyo ebéngami Association philologique allemande endimaki likambo yango mpe elobaki ete koteya bana kozanga bipekiseli mpe kozanga bitumbu ezali “eutelo ya mikakatano oyo tozali na yango sikawa na ntina na bilenge.” Mayele ya mokili ekoki koyengayenga lokola nde ebɛtami na mopɛpɛ, kasi boyebi ya sikisiki ya Makomami emonani ete ekoki koningana ata moke te. Biblia ezali kopesa batoli ya bokatikati na lolenge ya koteya bana. Masese 29:17 elobi ete: “Pamelá mwana na yo mpe akopesa yo kimya; ɛɛ akosepelisa mpe molimo na yo.” Disipilini motindo wana esengeli kopesama na bolingo, mpamba te Paulo akomaki ete: “Bino batata mpe bóyokisa bana na bino nkanda te, kasi bóbɔkɔla bango na mateya mpe na mpamela na [Yehova].”—Baefese 6:4.
“Boyebi mpenza ya Nzambe”
8, 9. Lolenge nini okoki kolimbola oyo Masese 2:1-6 elobi na ntina na boyebi oyo bato bazali na yango mpenza mposa?
8 Atako Paulo azalaki moto oyo atángá mingi, alobaki ete: “Soko moto nani kati na bino akanisi ete azali na mayele na ekeke oyo, akóma elema ete azala moto na mayele. Mpo ete mayele na ekeke oyo ezali bolema epai na Nzambe.” (1 Bakolinti 3:18, 19) Bobele Nzambe nde akoki kopesa boyebi oyo bato bazali na yango mpenza mposa. Na ntina na boyebi yango, Masese 2:1-6 elobi ete: “Mwana na ngai, soko okozwa maloba na ngai mpe okobomba maloba na ngai kati na yo, ete osembola litoyi na yo epai na mayele mpe ete otya motema na yo na koluka boyebi; ɛɛ soko okolela mpo na bososoli mpe soko okonganga mpo na boyebi; soko okoluka ye lokola palata, mpe okolukaluka ye lokola na biloko na motuya bibombami; mbɛlɛ, [okososola kobanga Nzambe mpe okozwa mpenza boyebi ya Nzambe, NW]. Mpo ete [Yehova] akopesaka mayele; boyebi mpe bososoli ikoutaka na monɔkɔ na ye.”
9 Baoyo bapusami na mitema malamu bazali kotya likebi epai na mayele na kosaleláká na lolenge lobongi boyebi oyo Nzambe azali kopesa. Bazali kotya motema na bango mpo na koluka boyebi, kotaleláká motuya ya makambo oyo bazali koyekola. Ya solo, bazali kobelela mpo na bososoli, to likoki ya komona lolenge biteni bikeseni ya likambo moko bizali na boyokani kati na yango. Bato ya motema sembo bazali kosala lokola nde bazali kotimola palata mpe kolukaluka biloko ya motuya bibombami. Kasi eloko nini ya motuya mpe ya monene bato oyo bazali na motema malamu bazali kozwa yango? Ezali “boyebi mpenza ya Nzambe.” Yango ezali nini? Na elobeli ya pɛtɛɛ, ezali bongo boyebi oyo ezali kati na Liloba ya Nzambe, Biblia.
10. Tosengeli kosala nini mpo na kozala na kolɔngɔ́nɔ́ malamu na elimo?
10 Boyebi ya Nzambe ezali malamu, ebongwanaka te, mpe epesaka bomoi. Ezali kolendisa kolɔngɔ́nɔ́ ya elimo. Paulo alendisaki Timoté ete: “Osimba lolenge na maloba sembo mayoki yo epai na ngai kati na kondima mpe na bolingo oyo ezali na Klisto Yesu.” (2 Timoté 1:13) Lokótá nyonso ezalaka na lolenge ya maloba na yango. Bobele bongo, “monɔkɔ na pɛto” oyo ezwami kati na solo ya Makomami, ezali na “lolenge na maloba sembo” oyo etongami mpenzampenza likoló na motó na likambo ya Biblia, kolóngisama ya lotómo oyo Yehova azali na yango ya kozala mokonzi na nzela ya Bokonzi. (Sefania 3:9) Tosengeli kobomba lolenge ya maloba yango ya sembo kati na makanisi mpe na motema na biso. Soki tolingi kopɛngola bokɔnɔ ya motema ya elilingi mpe soki tolingi kotikala na kolɔngɔ́nɔ́ na elimo, tosengeli kosalela Makomami kati na bomoi na biso ya mokolo na mokolo mpe kosalela malamumalamu bilei ya elimo oyo Nzambe azali kopesa biso na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45-47; Tito 2:2) Tómikundola ntango nyonso ete mpo na kozala na kolɔngɔ́nɔ́ malamu ya elimo, tozali na mposa ya boyebi ya Nzambe.
11. Wapi mwa ndambo ya bantina mpo na yango bato bazali na mposa ya boyebi ya Nzambe?
11 Tótalela bantina mosusu oyo mpo na yango bamiliare ya bato na mabelé bazali na mposa ya boyebi ya Nzambe. Bango nyonso bayebi mpenza lolenge mabelé mpe libota ya bato ezalisamaki? Te, bayebi te. Bato banso bayebi Nzambe ya solo mpe Mwana na ye? Bato banso bayebi ntembe oyo Satana abimisaki likoló na lotómo oyo Nzambe azali na yango ya kozala mokonzi mpe likoló na bosembo ya bato? Tokoloba lisusu ete te. Bato bayebi ntina oyo tonunaka mpe tokufaka? Awa lisusu, tosengeli koloba ete te. Bafandi nyonso ya mabelé bayebi ete Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela sikawa mpe ete tozali kobika na mikolo ya nsuka? Bayebi ete nguya ya bilimu mabe ezali? Bato banso bazali na boyebi oyo ebongi kotyela motema na ntina na lolenge ya kozala na bomoi ya libota ya esengo? Mpe bibele bayebi ete bomoi ya esengo kati na Paladiso ezali mokano ya Mozalisi na biso mpo na bato na botosi? Na mituna oyo lisusu, eyano ezali ete te. Na bongo, emonani polele ete bato bazali na mposa ya boyebi ya Nzambe.
12. Lolenge nini tokoki kosambela Nzambe “na elimo mpe na solo”?
12 Bato mpe bazali na mposa ya boyebi ya Nzambe na ntina na oyo Yesu alobaki kati na libondeli na butu ya nsuka na bomoi na ye awa na mabelé. Bantoma na ye basepelaki mpenza ntango bayokaki ye koloba ete: “Oyo elimboli bomoi ya seko, ete báyekola koyeba yo, Nzambe bobele moko ya solo, mpe Motindami na yo, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3, NW) Kosalela boyebi wana ezali nzela bobele moko mpo na kosambela Nzambe na lolenge lobongi. Yesu alobaki ete: “Nzambe azali Elimo, mpe baoyo bazali kosambela ye basengeli kosambela na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:24, NW) Tozali kosambela Nzambe “na elimo” ntango topusami na mitema mitondi na kondima mpe na bolingo. Lolenge nini tokoki kosambela ye ‘na solo’? Na koyekoláká Liloba na ye mpe na kosambeláká ye engebene solo na ye oyo asili komonisa—“boyebi mpenza ya Nzambe.”
13. Likambo nini likomami na Misala 16:25-34, mpe liteya nini tokoki kozwa na likambo yango?
13 Mbula na mbula bato mingi bazali kobanda kosambela Yehova. Kasi, esengeli ete boyekoli ya Biblia etambwisama elongo na bato ya motema sembo na boumeli ya ntango molai, to likoki ezali nde mpo na bato ya motema sembo na kokóma nokinoki na litambe ya batisimo? Tótalela likambo oyo esalemaki epai na mokɛngɛli ya bolɔ́kɔ mpe libota na ye, oyo elobelami na Misala 16:25-34. Paulo mpe Sila batyamaki na bolɔ́kɔ na mboka Filipi, kasi na katikati ya butu koningana monene ya mabelé efungolaki bikuke ya bolɔ́kɔ. Kokanisáká ete bato nyonso ya bolɔ́kɔ basilaki kokima mpe ete yango elingaki komemela ye etumbu makasi, mokɛngɛli ya bolɔ́kɔ alingaki komiboma mpe Paulo ayebisaki ye ete moto moko te akimi. Paulo mpe Sila “basololi liloba ya Yehova epai na ye elongo na bato nyonso ya libota na ye.” Mokɛngɛli wana ya bolɔ́kɔ mpe libota na ye bazalaki Bapakano oyo, liboso bayebaki Makomami Mosantu te. Nzokande, kati na butu moko wana, bakómaki bandimi. Likambo ya ntina koleka, “abatisamaki nokinoki, na ye na bato nyonso na ndako na ye lokola.” Likambo motindo wana lizalaki kosalema mingi te, kasi bato wana ya sika bateyamaki makambo ya moboko ya solo mpe na nsima bayekolaki makambo mosusu na makita ya lisangá. Likambo motindo wana ekoki mpe kosalelama lelo oyo.
Mosala ya kobuka mbuma ezali monene!
14. Mpo na nini mposa ezali ya kotambwisa boyekoli mingi ya Biblia na boumeli ya mwa ntango mokuse?
14 Ekozala malamu soki Batatoli ya Yehova bazali kotambwisa boyekoli mingi ya Biblia na boumeli ya ntango mokuse. Mposa ezali makasi mpo na likambo yango. Na ndakisa, na mikili ya Mpótó ya Ɛ́sti, bato basengeli kokomisa nkombo mpo na kozela ngala na bango mpo na boyekoli ya Biblia. Ezali mpe kosalema bongo bipai mosusu. Na engumba moko ya République Dominicaine, Batatoli mitano bazalaki na masɛngi ya bato mingi na boye ete bakokaki te kotambwisa boyekoli nyonso ya Biblia. Basalaki nini? Balendisaki bato oyo bazali kosepela ete báyangana na makita na Ndako ya Bokonzi mpe ete bákomisa nkombo mpo na kozela ngala na bango mpo na boyekoli ya Biblia. Ezalela motindo moko ezali mpe komonana na bisika mingi na mabelé mobimba.
15, 16. Esaleli nini epesameli biso mpo na kopalanganisa boyebi ya Nzambe na lombangu mpenza, mpe wapi mwa makambo tokolobela na ntina na yango?
15 Bateritware minene—bilanga minene mpo na kobuka mbuma—ezali kofungwama mpo na basaleli ya Nzambe. Atako Yehova, “Nkolo na elanga,” azali kotinda basáli mingi, mosala ezali naino mingi mpo na kosala. (Matai 9:37, 38) Na yango, mpo na kopalanganisa boyebi ya Nzambe na lombangu mpenza, ‘moombo ya sembo’ asili kobimisa esaleli moko oyo ekoki kopesa mateya ya sikisiki na boye ete bayekoli ya Biblia bákoka kosala bokóli ya elimo nsima ya lisoló mokomoko. Ezali bongo búku ya sika oyo boyekoli na yango ekoki kosila noki—mbala mosusu na boumeli ya mwa basanza. Mpe ekoki kozala mpenza mpasi te na komema yango kati na basakosi na biso ya minene, to ya mike, to ata mpe na mabenga ya bilamba na biso! Bibele ya bato oyo bayanganaki na “Basanzoli na esengo,” Liyangani ya Etúká ya Batatoli ya Yehova, basepelaki na kozwa búku ya sika ya nkasa 192, oyo ezali na motó na likambo ete Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko.
16 Bakomi ya mikili mikeseni babongisaki makambo mazali kati na yango, na nsima yango etyamaki na lolenge lobongi kati na búku Boyebi. Na yango, búku oyo esengeli kosepelisa bato ya mikili ndenge na ndenge. Kasi ekosengela ntango molai liboso ete búku oyo ya sika ebimisama na nkótá ya bato oyo bazali na mokili mobimba? Te, mpamba te búku ya nkasa 192 ekoki kobongolama nokinoki koleka babúku ya minene. Na Ɔkɔtɔ́bɛ 1995, Komité ya Bobongoli Mikanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi endimaki kobongolama ya búku yango uta na Lingelesi na nkótá koleka 130.
17. Makambo nini masengeli koyeisa pɛtɛɛ bosaleli ya búku Boyebi?
17 Bosikisiki ya mokapo moko na moko ya búku Boyebi esengeli kosalisa bayekoli na kosala bokóli nokinoki na elimo. Búku yango ezali komonisa makambo na solo oyo mazali na Makomami na lolenge ya kolendisa. Ezali kolobaloba te likoló na mateya ya lokuta. Elobeli ya polele mpe kolandana ya makanisi na molɔngɔ́ ezali kosala ete kosalela búku yango ezala pɛtɛɛ mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia mpe ezali kosalisa bato ete bákanga ntina ya boyebi ya Nzambe. Longola mikapo oyo mikomami, ezali na mikapo mitangami oyo moyekoli asengeli koluka ntango azali komibongisa mpo na lisoló. Yango ekoki kotángama na boumeli ya boyekoli soki ntango ezali, nzokande ekozala likambo ya mayele te na kokɔtisa makambo mosusu oyo makoki kotya molili kati na makanisi ya ntina. Na esika ya kosala bongo, baoyo bazali kotambwisa boyekoli basengeli kosala makasi na kososola mpe kokɔtisa epai na moyekoli makambo oyo búku ezali kondimisa na mokapo moko na moko. Yango elimboli ete moteyi asengeli koyekola na molende nyonso mpo ete makanisi ya ntina mámonana polele kati na elimo na ye.
18. Makanisi nini mapesami mpo na lolenge ya bosaleli búku Boyebi?
18 Lolenge nini búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko ekoki kosala ete mosala ya kozalisa bayekoli esalema na lombangu? Búku oyo ya nkasa 192 ekoki koyekolama na ntango oyo ezali mpenza mokuse, mpe baoyo “babongi mpo na bomoi ya seko” bakozala na likoki ya koyekola makambo mingi kati na boyekoli na yango na meko oyo ekoki kopesa bango nzela na komipesa epai na Yehova mpe kozwa batisimo. (Misala 13:48) Na bongo, tiká ete tósalela malamu búku Boyebi kati na mosala ya kosakola. Soki moyekoli ya Biblia asili kokóma mosika mpo na boyekoli na ye kati na búku mosusu, ekozala malamu kosilisa búku yango. Nde soki boyekoli ekómi naino mosika te, likanisi lipesami ete bayekoli ya Biblia bákɔta na búku Boyebi. Nsima ya kosilisa búku wana ya sika, likanisi epesami te ete boyekoli etambwisama elongo na moyekoli yango moko na búku ya mibale. Baoyo bazali koyamba solo bakoki kokólisa boyebi na bango na koyanganáká na makita ya Batatoli ya Yehova mpe na kotángáká bango moko Biblia mpe mikanda mikeseni ya boklisto.—2 Yoane 1.
19. Liboso ya kotambwisa boyekoli ya Biblia kati na búku Boyebi, mpo na nini ekozala malamu kotalela lokasa 175 kino lokasa 218 kati na búku Lisanga mpo na kokokisa mosala ya Nzambe?
19 Búku Boyebi ekomamaki na mokano ya kosalisa moto mpo ete ayanola na mituna nyonso oyo bankulutu batalelaka elongo na basakoli oyo bazwi naino batisimo te oyo bazali na mposa ya kobatisama lokola Batatoli ya Yehova. Na yango, liboso ete oleka na bayekoli na yo ya Biblia oyo ozali na bango sikawa mpo na kokɔta na búku oyo ya sika, esɛngisami ete olekisa mwa bangonga na kotalela mituna oyo mizali na lokasa 175 kino 218 ya búku Lisanga mpo na kokokisa mosala ya Nzambe.a Yango ekosalisa yo na kobɛta nsɛtɛ na biyano na mituna wana na boumeli ya boyekoli ya Biblia kati na búku Boyebi.
20. Okani kosala nini na búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko?
20 Bato ya bipai nyonso basengeli koyoka nsango malamu. Ɛɛ, bato bazali na mposa ya boyebi ya Nzambe, mpe Yehova azali na Batatoli na ye mpo na kopesa boyebi yango. Sikawa tozwi búku ya sika oyo epesameli biso na Tata na biso ya bolingo oyo azali na likoló na nzela ya moombo ya sembo mpe ya mayele. Okosalela yango mpo na koteya solo mpe kopesa lokumu na nkombo mosantu ya Yehova? Kozanga ntembe Yehova akopambola yo wana ozali kosala milende mpo na kopesa boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko epai na bato mingi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
Lolenge nini okoyanola?
◻ Lolenge nini okoki kolimbola motema ya elilingi?
◻ Boyebi ya Nzambe ezali nini?
◻ Mpo na nini bato bazali na mposa ya boyebi ya Nzambe?
◻ Búku nini ya sika tozali na yango, mpe lolenge nini ozali kokana kosalela yango?
[Elilingi na lokasa 10]
Bantina ezali mingi mpo na yango bamiliare ya bato bazali na mposa ya boyebi ya Nzambe