Lisolo ya bomoi
Bosembo ya libota na ngai esalisaki ngai
YA KATHLEEN COOKE
NTANGO nkɔkɔ na ngai ya mwasi, Mary Ellen Thompson akendaki kotala bandeko na ye na Écosse na 1911, alandaki lisukulu moko ya Charles Taze Russell, oyo azalaki kotambwisa lisangá ya Bayekoli ya Biblia, oyo na nsima bakómaki kobengama Batatoli ya Yehova. Nkɔkɔ asepelaki mpenza na makambo oyo ayokaki. Ntango azongaki na Afrika ya sudi, alukaki Bayekoli ya Biblia. Na Aprili 1914, azalaki na kati ya bato 16 oyo bazwaki batisimo na liyangani ya liboso oyo Bayekoli ya Biblia basalaki na Afrika ya sudi. Na ntango wana, mwana na ye Edith, oyo na nsima akómaki mama na ngai, azalaki na mbula motoba.
Na nsima ya liwa ya Ndeko Russell na 1916, bokabwani ekɔtaki na kati ya Bayekoli ya Biblia na mokili mobimba. Bayekoli ya Biblia ya sembo na Durban, oyo bazalaki liboso 60, batikalaki kaka 12. Ingeborg Myrdal, mama ya tata, ná mwana na ye ya mobali Henry, elenge oyo autaki kozwa batisimo, batikalaki sembo. Na 1924, Henry akómaki mobongisi-nzela, ndenge Batatoli ya Yehova babengaka basakoli ya ntango nyonso. Na boumeli ya mbula mitano oyo elandaki, azalaki kosakola na Afrika ya sudi mpe na bikólo mosusu ya pembenipembeni. Na 1930, Henry ná Edith babalanaki mpe mbula misato na nsima babotaki ngai.
Libota ekómi monene
Tofandaki mwa bambula na Mozambique, kasi na 1939 tokendaki kofanda epai ya nkɔkɔ Thompson ná mwasi na ye na engumba Johannesburg. Nkɔkɔ Thompson azalaki kosepela na mateya ya Biblia te mpe ntango mosusu azalaki kotɛmɛla nkɔkɔ ya mwasi, kasi azalaki mpenza moyambi ya bapaya. Leki na ngai ya mwasi, Thelma, abotamaki na 1940, mpe ngai ná ye toyekolaki ndenge ya kosalisa mibange. Mbala mingi, ntango tozali kolya na mpokwa, tozalaki koumela na mesa mpe kobɛtelana masolo ya makambo oyo tokutanaki na yango na mokolo wana to ya makambo eleká.
Tozalaki koyamba na ndako na biso Batatoli mingi ya bisika mosusu, mingimingi babongisi-nzela. Bango mpe bazalaki kobɛtela biso masolo ntango tozali kolya na mpokwa, mpe masolo na bango ezalaki kobakisa lisusu botɔndi na biso mpo na libula ya elimo oyo tozwaki. Yango epesaki ngai ná Thelma mposa ya kokóma mpe babongisi-nzela.
Banda bomwana, baboti na biso bapesaki biso esengo ya kotánga. Mama, tata mpe nkɔkɔ ya mwasi bazalaki kotángela biso babuku kitoko ya masolo ya Biblia to Biblia yango moko. Makita ya lisangá mpe mosala ya kosakola ezalaki lokola mpema oyo topemaka. Lokola tata azalaki Mosaleli ya lisangá (lelo oyo mokɛngɛli mokambi) na lisangá ya Johannesburg, biso nyonso tosengelaki kokómaka liboso mpenza na makita. Soki liyangani ezali, tata azalaki kotambwisa misala ya liyangani, mpe mama azalaki kopesa bandeko oyo bauti mosika bisika ya kolala.
Liyangani ya ntina mingi mpo na biso
Liyangani oyo esalemaki na Johannesburg na 1948 ezalaki liyangani moko ya ntina mingi mpo na biso. Mpo na mbala ya liboso, toyambaki bandeko ya biro monene ya Batatoli ya Yehova, oyo ezali na Brooklyn, na etúká ya New York. Basɛngaki tata amemaka Nathan Knorr ná Milton Henschel na motuka na ye na boumeli ya ntango nyonso oyo balekisaki na Afrika ya sudi. Ngai nazwaki batisimo na liyangani yango.
Mwa moke na nsima, tata akamwaki mpenza koyoka tata na ye azali koyebisa ye ete azalaki mpenza komiyoka mawa ndenge alandaki bato oyo batikaki lisangá ya Bayekoli ya Biblia nsima ya liwa ya Ndeko Russell. Akufaki mwa basanza na nsima. Kasi, Granny Myrdal atikalaki sembo tii ntango asukisaki bomoi na ye awa na mabelé na 1955.
Makambo oyo ebongolaki bomoi na ngai
Nakómaki mobongisi-nzela na mwa 1 Febwali 1949. Mwa moke na nsima, ntango toyokaki ete liyangani moko ya mikili mingi ekosalema na engumba New York na mbula oyo ekolanda, tokómaki mitema likolólikoló. Tozalaki na mposa ya kokende, kasi tozalaki na mbongo ya tike te. Kasi, na Febwali 1950, nkɔkɔ Thompson akufaki, mpe nkɔkɔ ya mwasi afutelaki biso nyonso mitano tike na mbongo oyo nkɔkɔ mobali atikaki.
Mwa bapɔsɔ liboso tókende, nazwaki mokanda oyo eutaki na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, na New York. Babengaki ngai na kelasi ya mbala ya 16 ya Gileadi, Eteyelo ya bamisionɛrɛ. Ezalaki likambo monene mpo na ngai, mpamba te nakokisaki ata mbula 17 te! Ntango kelasi yango ebandaki, nazalaki moko ya bana-kelasi 10 ya Afrika ya sudi oyo bazwaki libaku ya kozala na kelasi yango.
Ntango tosilisaki kelasi yango na Febwali 1951, batindaki biso mwambe bamisionɛrɛ na Afrika ya sudi. Na boumeli ya mwa bambula, ngai ná moninga na ngai ya mosala tozalaki kosakola na bingumba ya mikemike epai balobaka monɔkɔ ya Afrikaans. Na ebandeli, nayebaki mpenza monɔkɔ yango te; nazali komona lisusu mokolo oyo nazongaki ndako na kolela mpo nasalaki eloko ya malonga te na mosala ya kosakola. Kasi na nsima, nakómaki koyeba monɔkɔ yango mwa malamu, mpe Yehova apambolaki milende na ngai.
Libala mpe mosala ya zongazonga
Na 1955, nayebanaki na John Cooke. Azalaki moko ya bandeko oyo babandaki mosala ya kosakola na France, na Portugal mpe na Espagne liboso mpe nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mpe ayaki na Afrika ya sudi na mbula oyo nakutanaki na ye. Nsima ya bambula, akomaki boye: “Makambo misato ya esengo ekómelaki ngai kaka na pɔsɔ moko . . . Ndeko moko ya motema malamu akabelaki ngai motuka; nakómaki mokɛngɛli ya etúká; mpe nazwaki mwasi ya kobala.”a Tobalanaki na Desɛmbɛ 1957.
Liboso tóbalana, John alobaki na ngai ete tokozala ntango nyonso na esengo na libala na biso, mpe akosaki te. Totalaki masangá na Afrika ya sudi mobimba, mingimingi na bakartye ya bato moindo. Pɔsɔ na pɔsɔ, ezalaki mpasi mpo bápesa biso ndingisa ya kokɔta na bakartye yango; mpo na kozwa ndingisa ya kolala kuna koloba kutu te. Na bambala mosusu, tozalaki kolala kaka likoló ya simá, na magazini moko oyo ezalaki na biloko te, na katye moko ya bamilatrɛ, mpe tozalaki kobatama mpenza mpo baleki-nzela bámona biso te. Na momeseno, tozalaki kofanda epai ya Batatoli ya mindele oyo bazalaki kofanda mwa pene na lisangá oyo tozali kotala, kasi mbala mingi pene yango ezalaki kaka mosika.
Mokakatano mosusu oyo tozalaki kokutana na yango ezalaki ya mwa bisika ya mayangani oyo bandeko bazalaki kotonga na kati ya bisobe. Tozalaki kolakisa bafilme oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova, oyo ezalaki kosalisa bato bákóma kosepela na ebongiseli na biso oyo esangisi bato ya mokili mobimba. Lokola mbala mingi kura ezalaki te na bisika yango, tozalaki kotambola na motɛrɛ na biso moko ya kura. Na mwa bikólo oyo Angleterre ezalaki koyangela, tozalaki mpe na mokakatano makasi, mpo bapekisaki mikanda na biso kuna mpe tosengelaki koyekola monɔkɔ ya Zulu. Kasi, tozalaki na esengo mpo tozalaki kosalela bandeko na biso.
Na Augusto 1961, John akómaki molakisi ya liboso ya Eteyelo ya mosala ya Bokonzi na Afrika ya sudi. Eteyelo yango oyo ezalaki koumela pɔsɔ minei ebongisamaki mpo na kosalisa bankulutu ya masangá. Azalaki moteyi monene mpe azalaki mpenza kosimba mitema ya bandeko na lolenge na ye ya kokanisa mpe na bililingi kitoko oyo azalaki kosalela na maloba na ye. Pene na mbula mobimba ná ndambo, tozalaki kotambolatambola na bisika nyonso oyo mateya yango esengelaki kopesama na Lingelesi. Ntango John azali koteya, ngai nazalaki kobima na mosala ya kosakola elongo na bandeko ya bisika wana. Na nsima, tokamwaki mpenza ntango babengaki biso tókende kobanda mosala mwa 1 Yuli 1964 na biro ya filiale ya Afrika ya sudi, oyo ezalaki pene na Johannesburg.
Kasi, na ntango wana, nzoto ya John ebandaki kotungisa biso. Na 1948, abɛlaki maladi ya ntolo, mpe na nsima akómaki mbala mingi kolɛmba nzoto mobimba. Azalaki koyoka lokola gripe ekangi ye mpe azalaki kolala na mbeto mikolo ebele, azalaki kosala eloko te mpe kofungola miso te. Monganga moko oyo atalaki ye mwa moke liboso bábenga biso na Betele alobaki ete azali na maladi ya makanisi.
Ezalaki mpasi mpo tólɛmbisa milende na biso na mosala ndenge monganga asɛngaki. Na Betele, Batyaki John na biro oyo etalelaka mosala ya kosakola mpe ngai na esika babongolaka mikanda. Kozala na ndako na biso moko ya kolala ezalaki lipamboli monene mpo na biso! Lokola John asalaki na bateritware oyo balobaka monɔkɔ ya Portugais liboso tóbalana, na 1967 batindaki biso tókende kosalisa libota kaka moko ya Batatoli oyo bazalaki bana-mboka ya Portugal na kosakola nsango malamu epai ya bato ya Portugal na Johannesburg mpe na bingumba ya pembenipembeni. Mpo na yango, nasengelaki mpe koyekola monɔkɔ ya Portugais.
Lokola bana-mboka ya Portugal bafandaki mosikamosika na teritware moko monene, tozalaki kotambola mingi, mbala mosusu tosengelaki kosala ata kilomɛtrɛ 300 mpo na kokuta baoyo babongi mpo na koyoka nsango malamu. Na ntango yango, Batatoli oyo bazalaki kouta na Mozambique epai balobaka monɔkɔ ya Portugais babandaki koya kotala biso na ntango ya mayangani, mpe yango ezalaki mpenza kosalisa bato ya sika. Na boumeli ya mbula 11 oyo tosalaki na teritware ya monɔkɔ ya Portugais, tomonaki ndenge mosala ebotaki mbuma; mwa etuluku ya bato soki 30 ekómaki masangá minei.
Bambongwana na ndako ya baboti na ngai
Na ntango yango, makambo mingi ebongwanaki na ndako ya baboti na ngai. Na 1960, leki na ngai, Thelma, abalaki John Urban, mobongisi-nzela moko oyo autaki na États-Unis. Na 1965, bakɔtaki na kelasi ya mbala ya 40 ya Gileadi mpe basalaki mosala ya misionɛrɛ na Brésil na boumeli ya mbula 25. Na 1990, bazongaki na etúká ya Ohio, na États-Unis, mpo na kosalisa baboti ya John oyo bakómá kobɛla. Atako bazali kobunda na mokumba makasi wana, bazali babongisi-nzela tii lelo oyo.
Nkɔkɔ Mary Ellen Tompson atikalaki sembo tii ntango asukisaki bomoi na ye awa na mabelé na 1965, na mbula 98. Kaka na mbula yango, tata akokisaki mbula ya kotika mosala na ye ya mosuni. Yango wana, ntango batindaki ngai ná John na teritware ya monɔkɔ ya Portugais, tata ná mama bayaki mpe kopesa biso mabɔkɔ. Basungaki biso mingi na etuluku yango, mpe nsima ya mwa basanza kaka, lisangá ya liboso esalemaki. Mwa moke na nsima, kanser ekómaki kotungisa mama, mpe akufaki na 1971. Nsima ya mbula nsambo, tata mpe akufaki.
Maladi ya John
Ntango tokómaki na bambula ya 1970, emonanaki mpenza ete maladi ya John ekosila te. Mokemoke, abandaki kotika mikumba oyo azalaki na yango na Betele, lokola kotambwisa boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe mokapo ya mokolo. Alongwaki na biro oyo etalelaka mosala ya kosakola mpe akómaki kosala na posita ya Betele, mpe na nsima akómaki kosala mosala ya kolona mpe kobongisa bafololo na Betele.
Lokola John azalaki moto ya molende, azalaki kokoka te kotika mikumba mosusu. Soki natingami na ye mpo atika mokumba moko, azalaki koloba na ngai na mwa liseki ete yo mpenza motungisi! Mpe azalaki koyamba ngai na esengo. Nsukansuka, tomonaki malamu tótika teritware ya monɔkɔ ya Portugais mpe tokómaki na lisangá oyo ezalaki kosalela Ndako ya Bokonzi ya Betele.
Ntango maladi ya John ekómaki lisusu makasi, ezalaki mpenza likambo ya kokamwa komona boyokani makasi oyo azalaki na yango na Yehova. Soki makanisi ya John etamboli mpe mpongi esili ye na katikati ya butu, tozalaki kosolola tii ntango makanisi ekozonga mpe akobondela Yehova mpo asalisa ye. Na nsima, soki mokakatano yango ebandi, azalaki kobundana na kozongela malɛmbɛmalɛmbɛ maloba ya Bafilipi 4:6, 7: “Bómitungisa ata na likambo moko te . . .” Okomona azongi lisusu malamu mpe abandi kobondela. Mbala mingi mokakatano yango ezalaki kokuta ngai nalali te mpe nazalaki kotala kaka nyɛɛ ndenge monɔkɔ na ye ezalaki kobɛta ntango azali kobondela Yehova.
Lokola Betele ekómaki moke, babandaki kotonga Betele mosusu ya monene libándá ya Johannesburg. Ngai ná John tozalaki mbala na mbala kokende na esika yango, oyo ezalaki mosika mpenza na makelele mpe bansolo ya Johannesburg. Ntango bapesaki biso nzela tókende kofanda na mwa ndako moko oyo babongisaki kuna liboso básilisa kotonga Betele, esungaki John mingi.
Mikakatano mosusu
Ntango John akómaki kobungisa mpenza makanisi na ye, akómaki mpenza na mokakatano ya kokokisa mikumba na ye. Lolenge oyo bandeko bazalaki kosunga John na milende na ye ezalaki mpenza kosimba motema na ngai. Na ndakisa, soki ndeko moko alingi kokende kotánga na biblioteke moko, akozwa mpe John. John azalaki kotondisa batrakte ná bazulunalo na mabenga na ye mpo asalela yango nzelanzela. Yango esalisaki John amonaka ete azali mpe na mwa ntina.
Nsukansuka, maladi ya Alzheimer elongolaki ye likoki ya kotánga. Bakasɛti ya mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe ya nzembo ya Bokonzi esalisaki biso mingi. Tozalaki koyoka yango ntango nyonso. Mbala mingi soki nafandi pembeni na ye te mpo na koyoka kasɛti elongo na ye, John azalaki komitungisa mingi, yango wana nakómaki kolekisa ntango nyonso na kotonga batriko. Yango esalaki ete tózanga te eloko ya kosala na ntango nyonso wana!
Na nsima, maladi ya John ekómaki kosɛnga nazalaka ntango nyonso pene na ye. Atako mbala mingi nazalaki kolɛmba makasi mpe kozanga ata makasi ya kotánga, ezalaki mokumba na ngai ya kosalisa ye tii na nsuka. Nsuka yango eyaki na 1998, ntango John akufelaki ngai na mabɔkɔ, mwa moke nsima ya kokokisa mbula 85. John atikalaki sembo tii na nsuka. Nazelaka na mposa makasi komona ye lisusu na ntango ya lisekwa, nzoto makasi mpe bɔɔngɔ ezongi kosala malamu!
Ndenge nabɔndisamaki
Nsima ya liwa ya John, ezalaki mpasi mpenza mpo namesana kofanda ngai moko. Yango wana, na sanza ya Mai 1999, nakendaki kotala leki na ngai Thelma ná mobali na ye na États-Unis. Nazalaki mpenza na esengo ya komona lisusu ebele ya baninga ya motema, mingimingi ntango tokendaki kotala biro monene ya Batatoli ya Yehova na New york! Yango elendisaki ngai mingi.
Soki nakanisi bomoi ya libota na ngai, namonaka ebele ya makambo oyo esalisi ngai mpenza na bomoi na ngai. Na nzela ya mateya, ndakisa mpe lisalisi na bango, nayekolaki kolinga bato ya bikólo mpe mposo nyonso. Nayekolaki kozala motema molai, koyika mpiko mpe komesana na makambo nyonso oyo ekómeli ngai. Likambo eleki ntina, namonaki boboto ya Yehova, Moyoki ya mabondeli. Nazali na makanisi lokola mokomi ya nzembo oyo alobaki ete: “Mapamboli ezali epai na ye oyo yo oponi ete abɛlɛma mpe ete afanda na lopango na yo. Tokotonda na esengo na ndako na yo.”—Nzembo 65:4.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 1960, nkasa 186-187 (na Lifalanse).
[Elilingi na lokasa 8]
Nkɔkɔ ya mwasi ná bana na ye ya basi
[Elilingi na lokasa 9]
Ngai ná baboti na ngai ntango nazwaki batisimo na 1948
[Elilingi na lokasa 10]
Ngai ná Albert Schroeder, sɛkrɛtɛrɛ ya Gileadi, mpe bana-kelasi mosusu libwa oyo bautaki na Afrika ya sudi
[Elilingi na lokasa 10]
Ngai ná John na 1984