Nazali kolanda mokano oyo namityelaki wana ezalaki ngai na mibu motoba
LISOLO YA SANDRA COWAN
Baboti mingi bakoponaka misala mpo na bana na bango, lokola miziki to mabina, mpe babandaka kobongisa bango na ntango malamu. Ezali yango nde mama na ngai asalaki mpenza mpo na ngai. Kobanda ntango nazalaki na poso mibale, amemaki ngai na makita na boklisto mpe kati na mosala ya kosakola.
EKOKISAKI ngai mibu minei, mama amonaki ete nakokaki mpo na kosakola ngai moko. Nazali lisusu kokanisa mbala ya yambo oyo namekaki kosakola. Tokendaki na ferme moko monene mpe, wana mama mpe bato mosusu bazalaki kozela vuatire, nabimaki mpe nabɛlɛmaki na ekuke moko. Mwasi moko na bobóto ayokaki mpe nalakisaki ye ba brochures zomi. Apesaki ngai eteni monene ya sabuni lokola lifuti. Nasengelaki kosimba yango na mabɔkɔ mibale. Nasepelaki mingi mpenza!
Bobele na mbula wana, na 1943, Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watch Tower, efungolamaki mpo na kobongisa ba pionniers—basali ya ntango nyonso—mpo na mosala ya misionere. Mama alendisaki ngai mpo ete nakómisa mosala ya misionere mokano ya bomoi na ngai. Wana Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki naino makasi na Mpótó, mama azalaki kolobela ngai na ntina na bana ya Batemwe ya Mpótó oyo babɔtɔlamaki epai na baboti na bango na makasi. Alingaki ete nazala makasi mpo na kotɛmɛla na motindo na mimekamo nyonso.
Nazwaki batisimo na eleko ya molungé na mobu 1946, na assemblée internationale ya Cleveland, na ekólo Ohio (États-Unis). Atako nazalaki na mibu motoba, nazwaki ekateli ya kokokisa elaká na ngai epai na Jéhovah. Bobele na eleko wana ya molungé, nabandaki mosala ya pionnier mpo na mbala ya yambo. Nazali lisusu komikundola ntango natikaki bazulunalo 40, na ntɔngɔ moko, epai na bato oyo bafandaki na La Plaza de San Diego, na Californie. Nandimisami ete, likambo ya kozala mwana moke mpe koloba mingi, esalaki bopusi epai na bato mingi.
Tozalaki mbala mingi kosakola zingazinga na Beth–Sarim, epai ndeko Rutherford, prezidá ya la Société Watch Tower alekisaki bileko na ye ya mpiɔ ya nsuka, wana ezalaki ye kobɛla liboso na kufa na ye na 1942. Mbala na mbala tozwaki libaku ya kokende kuna mpe kolya elongo na basaleli ya ntango nyonso oyo bazalaki kuna. Bavizite yango ya esengo emonisaki ngai ete wana ezalaki motindo na bomoi oyo nalingaki. Bongo, nakómisaki Galaad mpe mosala ya misionere mokano ya bomoi na ngai.
Mbula elandaki, baboti na ngai babomaki libala, kasi mbongwana wana na ezalela ya libota ebebisaki elimo na ngai te. Mama azalaki pionnier mpe azalaki na mposa ya kopesa biso formation, ngai mpe ndeko na ngai ya mobali. Bavizite ya bandeko na biso mibali mpe basi kati na kondima, ezalaki kolendisa ndako na biso moke oyo ebendamaki na motuka (caravane). Mama alingaki mingi mpenza ete akutanisa ngai na ba diplômés ya Galaad. Na yango nde nayei koyeba Lloyd mpe Melba Barry, baoyo babyangaki biso ete totambola na mosala ya zongazonga elongo na bango liboso ete bazonga na mboka Japon, epai batindamaki. Balendisaki ngai mingi, ngai elenge mwasi oyo alingaki mosala ya misionere, mpe yango ezalaki na bopusi makasi likoló na ngai.
Wana ezalaki ngai na mibu zomi, mama abalaki lisusu ndeko moko na milende oyo azalaki mpe pionnier. Abɔkɔlaki biso, ngai mpe ndeko na ngai ya mobali, bobele na kokomisa biso na buku ya leta te, kasi lisusu kati na motema na ye. Bolingo na ye mpo na Jéhovah mpe molende na ye kati na mosala ekɔtelaki biso lokola.
Mama mpe papa basalaki na bomoko mpo na kokamba biso na boumeli ya bambula ya mpasi ya bolenge. Nazali na esengo ya komikundola ezalela ya elimo malamu oyo ezalaki na libota na biso. Ezalaki likambo na pɛtɛɛ mpo na bango te ete bazala ba pionniers, na mwa mosolo moke mpe na bana mibale oyo basengelaki kobɔkɔlo; basalaki milende mingi. Kasi mama mpe papa batyaki motema epai na Jéhovah mpe batyaki matomba ya Bokonzi na esika ya liboso.
Nazali komikundola lisusu assemblée internationale ya New York, na 1950. Papa adefaki mbongo na banki, mpe tozwaki mituka misato ete tobimisa mbongo mingi te. Papa, mama, ngai mpe ndeko na ngai ya mobali, tozalaki ntango nyonso kofanda na liboso, na boumeli ya mobémbo oyo tosalaki longwa San Diego kino New York, nzokande bato mosusu bazalaki kofanda na nsima. Lokola mokonzi ya mosala ya papa aboyaki kopesa ye congé ya poso mibale, papa alongolamaki na mosala mpo na assemblée wana. Kasi papa andimisaki biso ete Jéhovah akokokisa bamposa na biso, mpe ezali yango nde asalaki. Papa atɛkaki vuatire mpo ete azongisa mosolo oyo adefaki na banki mpe na nsima azwaki mosala malamu. Likambo yango mpe mosusu ya lolenge wana ezalaki na ntina mingi na bambula oyo elandaki nsima, na ntango ngai moko mpe mobali na ngai tokutanaki na mikakatano.
Na ntango toutaki New York, totalaki Ferme du Royaume, epai namonaki Eteyelo ya Galaad mpo na mbala ya yambo. Nazali komikundola ete natelemaki kati na moko na salle ya kelasi wana ezalaki ngai komiloba ete: “Nkutu nakokisi naino mibu 11 te. Nakoya awa te. Armagedon ekoya liboso.” Kasi, nsima na kosala vizite wana, nazwaki ekateli makasi ya kotya Galaad lokola mokano na ngai.
Nazali kosala mpo na kokokisa mokano na ngai
Na boumeli ya ntango oyo nazalaki kotanga kelasi, na bileko ya bopemi, nazalaki kosala mosala ya pionnier. Na nsima, na juin 1957, nazwaki diplôme, mpe poso mibale na nsima nakómaki pionnier permanent.
Na assemblée ya distrike ya Los Angeles na 1957, likita mpo na baoyo basepeli na Eteyelo ya Galaad esepelisaki ngai mingi mpenza. Elingaki ngai kokɔta na hema epai likita lisalemaki, nakutanaki na Bill, elenge oyo nayebaki ye wana ezalaki ngai na mibu motoba. Mbula eutaki koleka, azalaki na Louisiane, epai mposa ezalaki mpenza monene. Tokamwaki na lolenge oyo biso nyonso mibale tosepelaki na mosala ya misionere. Sanza motoba na nsima, tozwaki ekateli ya kokokisa mokano na biso elongo. Totindaki mokanda epai na la Société ete apesa biso teritware mpo na mosala, mpe sanza moko liboso na libala na biso, totindamaki na engumba Romney, na mboka Virginie occidentale.
Tofandaki kuna na ntango tokendaki na assemblée ya New York na 1958. Na boumeli ya assemblée, toyanganaki na likita mpo na baoyo basepeli na Eteyelo ya Galaad. Tozalaki mingi mpenza. Liboso na ebele na bato wana, elikya na biso ya kobyangama na Galaad ezalaki mpenza moke. Atako bongo, totóndisaki demande ya liboso, nzokande eleki bobele poso 11 uta libala na biso eutaki kosalema. Mbula oyo elandaki, na assemblée ya distrike ya Filadelfi, totóndisaki demande ya mibale.
Na Romney, Bill mpe ngai totyaki motema na lisalisi ya Jéhovah mpo na tólónga mikakatano. Romney ezalaki engumba oyo ezalaki soko na bafandi 2 000. Ezalaki mpasi mpo na kozwa mosala. Tofandaki na ndako moke oyo ekobendamaka na motuka, oyo ezalaki na molai ya bametele 5, esalemaki na lolenge kitoko mpenza te mpe esalemaki mpo na climat ya Californie. Tozalaki na mai te, tozalaki na masini makopesa mɔ́tɔ te, tozalaki mpe na frigo te. Kati na yango, malili mazalaki mingi na motindo boye ete, mpo na kozwa mai, tosengeli kobuka glase kati na katini. Bandeko basalisaki biso na lolenge oyo ekokaki na bango, na kokabeláká biso nyama oyo bazalaki koboma na bokila. Tolyaki mbuli, mpe banyama mike ya Amerika oyo babengi yango ete ratons laveurs mpe biséndé. Mokolo nyonso, tozalaki mbala mingi kokanisa ete tokozwa eloko te mpo na kolya; kasi, wana ezalaki biso kouta mosala ya kosakola, tozalaki kokuta mbomá to fromage liboso na ekuke na biso.
Tosalaki makasi na boumeli ya sanza libwa na komeka kobikela mokolo na mokolo, likambo oyo lizalaki pɛtɛɛ te. Na nsuka, tozwaki ekateli ete ebongaki tolongwa wana mpo na kokenda na engumba Baltimore, na mboka Maryland, epai Bill akokaki kozwa mosala. Na ntango toyebisaki ekateli na biso epai na bandeko, balelaki mpe biso lokola. Na bongo, tozwaki ekateli ya kolendendela lisusu mwa moke.
Bobele nsima mwa moke, Témoin moko oyo azalaki directeur ya magazini moko monene na engumba Westernport, na mboka Maryland, oyo ezali na ntaká ya bakilometele 60 longwa na esika wana, alakaki Bill mosala ya ndambo na mokolo. Bobele na sanza wana, moko na bato oyo bazalaki koyekola Biblia elongo na biso, apesaki biso mwa ndako kitoko oyo ezalaki na biloko na kati mpe ezalaki na mbabula monene ya makala. Kobanda mokolo wana, Malaki 3:10 ekómaki mokapo oyo nalingaki yango mingi. Jéhovah asopelaki biso mapamboli koleka oyo biso tozalaki kolikya.
Na nsuka, tobyangami na Galaad
Moko na bileko malamu ya bomoi na ngai ezalaki mokolo oyo tozwaki libyangi mpo na kokɔta na Eteyelo ya Galaad, na novembre 1959. Tobyangamaki mpo na kokɔta na kelasi ya 35, kelasi ya nsuka oyo esalemaki na Ferme du Royaume. Na ntango nakɔtaki lisusu na salle ya kelasi oyo nakendáká kotala wana ezalaki ngai mwana moke, nazalaki na esengo mingi oyo nakoki mpenza kolimbola yango te.
Galaad ezalaki esika moko malamu kati na elimo. Na boumeli ya sanza mitano, tomonaki lokola nde tofandaki na mokili ya sika. Na mokili, eloko oyo bato bazeli yango na boumeli ya bambula mingi, ekopesaka mpenza esengo mingi te. Nzokande, Galaad epesaki esengo mingi.
Batindaki biso na Inde, kasi ba visas na biso eboyamaki. Tozelaki mobu moko na New York, na nsima la Société atindaki biso na Maroc, na Afrique du Nord.
Bamisionere na Maroc
Tolekisaki mibu kitoko 24 na Maroc epai tosepelaki mingi na bafandi na yango, uta ntango oyo tokómaki. Toyekolaki Lifalansé mpe Espanyole na mbala moko mpo ete tosolola elongo na bato ya bikólo mingi oyo bazalaki kuna. Ezalaki mingimingi bato ya bamboka mosusu nde bayambaki nsango ya Bokonzi.
Moko na bato oyo bazalaki koyekola Biblia elongo na ngai azalaki mwasi Moespanyole, ye mobini ya flamenco; azalaki kosala na ndako ya mabina, na engumba Casablanca. Nsima na koyekola mitinda ya Biblia, atikaki nkolo bale oyo azalaki mpe makango na ye, mpe azongaki na Espanye. Kuna, apesaki litatoli epai na basangani nyonso ya libota na ye, mpe bamoko bandimaki solo ya Biblia oyo ye ayebisaki bango. Azongaki lisusu na Casablanca, kuna atikalaki sembo epai na Nzambe kino liwa na ye na 1990.
Na boumeli ya bambula ya liboso oyo tolekisaki na Maroc, motuya ya basakoli ya Bokonzi ekólaki. Kasi, wana ekómaki mpasi mpo na bapaya ete bazwa mosala mpe mpasi mpo na kozwa lotómo ya kofanda na mboka wana, Batemwe mingi bakendaki na Mpótó. Bamoko na baoyo bayekolaki Biblia elongo na biso bazali sikawa na Nouvelle-Zélande, na Canada, na Etats-Unis, na Bulgarie, na Russie mpe na France; mingi bazali kosangana na mosala ya ntango nyonso.
Mbala moko, na avril 1973, mosala na biso ya kosakola mopekisamaki. Yango ezalaki mpenza libaku mabe. Mokolo ya jeudi na mpokwa, tozalaki ebele na Salle du Royaume mpe tozalaki na esengo, mpe tosololaki kino bayaki koboma miinda mpo na komonisa biso ete ntango ekokaki ete tozonga epai na biso. Tozalaki koloba ete miinda mikongɛngisa lisusu te motindo na boyokani oyo ya bonsomi mingi kati na baklisto. Na epekiseli, makita mpe ba assemblées ya circonscription ezalaki kosalema na bituluku mike oyo eyanganaki na mabota. Batemwe bazalaki kokenda, soko na France, soko Espagne, mpo na koyangana na ba assemblées ya distrike.
Lokola tokómaki moke mpenza, ndambo na Batemwe oyo batikalaki na Maroc basalaki boyokani malamu kati na bango. Biso nyonso tolelaki mingi na ntango la Société asukaki na kozwa ekateli ya kokanga filiale mpe apesaki biso teritware mosusu.
Na Centrafrique
Teritware na biso ya sika ezalaki Ekólo Centrafrique. Oyo nde mbongwana monene na kotalela Afrique du Nord! Wana climat ya Maroc ekokanaki na oyo ya Californie na ngele, tokómaki sikawa na climat ya molungé.
Tokutanaki na motindo na makambo mosusu. Na ndakisa, nasengelaki kolónga nsɔmɔ oyo nazalaki na yango epai na nyama ikolandaka. Moselekete akwelaki ngai mbala misato epai nazalaki kofungola ekuke moko. Mbala na mbala, na boumeli ya boyekoli ya Biblia, mpoko moko azalaki na biso elongo. Nazalaki na mposa ya kopumbwa mpe kokima na lombango, kasi nakangaki motema; nazalaki sé kotala monsieur le Rat, nde sakosi na ngai mpe makolo na ngai ezalaki likoló, kino akendaki. Namonaki ete soki okokanga motema na mabaku motindo wana, okoki mpe komesena na mabaku nyonso.
Tosalaki bobele sanza motoba na mboka yango wana radio eyebisaki ete mosala na biso mopekisami. Ba Salles du Royaume ekangamaki mpe babondelaki bamisionere ete balongwa na mboka wana. Kasi, na boumeli ya bambula misato elandaki, tolóngaki kofanda na biro ya filiale elongo na babalani mosusu mibale. Na nsima, na mokolo moko ya lomingo na ntɔngɔ, na boumeli ya boyekoli ya Mosenzeli, bapolisié bakɔtɛlaki biso na mindoki mpe bamemaki biso na biro ya la police. Batikaki basi mpe bana mike, kasi bandeko 23 bakangamaki, Bill, mobali na ngai azalaki kati na bango. Batikaki bango nsima na mikolo motoba ete bazonga na ndako mpe bakanga bisaka na bango; mikolo misato na nsima, na sanza ya mai 1989, totikaki mboka wana na etinda ya bakonzi ya Leta. Wana lisusu, na libándá ya mpepo, kokenda na biso epesaki mawa mingi; ebele na bandeko na biso balingami bayaki kopesa biso mbote.
Mpo na kosukisa, tokómi na Sierra Leone
Tozali sikawa na Sierra Leone, mboka kitoko ezali na Afrique centrale, oyo ezali na bitando kitoko ya zelo mpɛmbɛ. Bato bazali na boninga mingi mpe mosala ya kosakola mozali kosalema na esengo. Bato nyonso bapesaka biso esika ya kofanda, mbala mingi na nsé na nzeté ya mangolo to na nsé na nzeté ya kokoti. Bato balingi kosolola na ntina na Nzambe mpe bakokendeke koluka Biblia na bango, mpo bakoka kolanda lisoló.
Ngai mpe Bill tozali biso nyonso kosala na Béthel ya Freetown. Nazali kosala na réception mpe nakotalelaka lisusu baabonema mpe ba comptes ya masangá. Nsima na kolekisa mibu 16 ya mosala kati na mikili epai mosala ya kosakola mopekisami, ezali likambo ya esengo na kofanda na mokili epai mosala ya kosakola mozali na bonsomi mpe na bokóli.
Na juin 1991, nakokisaki mibu 30 na mosala ya misionere. Mama apusaki ngai mpenza na komityela mokano moko malamu. Soki azalaki naino na bomoi, mbɛlɛ nalobi na ye lisusu ete, “Mama, natɔndi yo!” mpe, likambo ya esengo, nakoki ntango nyonso koloba, ete: “Papa, natɔndi yo!”
[Elilingi na lokasa 28]
Assemblée ya New York, na 1958
[Elilingi na lokasa 29]
35e classe—Juillet 1960
[Elilingi na lokasa 30]
Bill na Sandra Cowan, na 1991