Bazali koluka boyebi
LAURA FERMI, mwasi ya Enrico Fermi, moto moko ya siansi oyo ayebani mingi, alobaki ete: “Kozanga koyeba ezali malamu te.” Nzokande, bato mosusu bakoki koloba ete moto oyo ayebi likambo te akoki komitungisa mpo na yango te. Nzokande, mpo na bato mingi, likambo oyo mwasi yango alobaki ezali mpenza solo, ezala na makambo ya siansi to na makambo mosusu ya bomoi. Kozanga koyeba ememi ebele ya bato na molili na makanisi, na bizaleli mpe na makambo ya elimo, na boumeli ya bankama ya bambula.—Baefese 4:18.
Yango wana, bato oyo bakanisaka malamu bazali koluka boyebi. Bazali kolanda banzela ndenge na ndenge mpo na koluka koyeba ntina oyo tozali awa na mabelé mpe epai wapi tozali kokende. Tiká tótalela mwa ndambo ya banzela yango.
Na nzela ya losambo?
Na Lingomba ya Bouddha, balobaka ete Siddhārtha Gautama, mobandisi ya lingomba yango, amitungisaki mingi na komona ndenge bato banyokwamaka mpe bakufaka. Asɛngaki bateyi ya Lingomba ya Hindu básalisa ye ayeba “nzela ya solo.” Bamosusu balobaki na ye abanda kosalaka Yoga (moko ya bindimeli ya Bahindu oyo esɛngaka kofandisa nzoto mobimba nyɛɛ, eningana lisusu te, kolongola makanisi mpe bamposa nyonso, mpo bomoto ya solosolo emonana mpe moto akóma na bonsomi) mpe komipimelaka bisengo nyonso. Nsukansuka, Gautama aponaki koluka boyebi ya solosolo na nzela ya kokanisaka na mozindo.
Bato mosusu bazali koluka boyebi na nzela ya bilangwiseli ya makasimakasi. Na ndakisa, lelo oyo bato ya Lingomba moko ya Amerika (Native American Church) balobaka ete peyote, molona moko oyo elangwisaka makasi, “esalisaka mpo na koyeba makambo oyo ebombamá.”
Jean-Jacques Rousseau, moto moko ya filozofi na bambula ya 1700 na France, azalaki koloba ete soki moto azali mpenza koluka boyebi, Nzambe akopesa ye yango. Na ndenge nini? Soki azali koyoka “makambo oyo Nzambe azali koloba na ye na motema.” Abakisaki ete soki ozali kosala bongo, ndenge oyo okobanda koyoka na motema na yo, elingi koloba makambo oyo motema mpe makanisi na yo ekobanda koyebisa yo, “ekokóma mpenza kotambwisa yo na mokili oyo etondi na makanisi ya ndenge na ndenge.”—Lisolo ya filozofi ya Mpoto mpe ya Amerika (na Lifalanse).
Na nzela ya makanisi ya bomoto?
Bato mingi ya mayele na ntango ya Rousseau batɛmɛlaki makasi likanisi na ye. Na ndakisa, Voltaire oyo azalaki mpe moto ya France, alobaki ete na esika losambo ememela bato boyebi, ezali nde eloko ya liboso oyo ezindisaki Mpoto na kati ya boinga, ya biyambayamba mpe koyinana na boumeli ya ebele ya bambula. Bato mosusu ya mayele na masolo ya kala babengaka eleko yango Eleko ya Molili.
Voltaire azalaki moko ya bato ya filozofi oyo baboyaki makanisi ya kala na politiki mpe na makambo ya losambo. Balandi na ye babandaki lisusu kolanda makanisi ya Bagrɛki ya kala. Na ndakisa, bazalaki koloba ete makanisi ya moto mpe bolukiluki ezali sɛkɛlɛ mpo na kozwa boyebi ya solosolo. Bernard de Fontenelle, moto mosusu ya filozofi, alobaki ete makanisi ya moto ekomema bato na “eleko moko oyo bakobanda kofungwama mayele mokolo na mokolo, mpe bakokóma na boyebi koleka bileko mosusu nyonso.”—Buku Encyclopædia Britannica.
Wana ezali kaka mwa ndambo ya makanisi oyo bato bapesá mpo na lolenge ya kozwa boyebi. Ezali nde na nzela moko ya malamu mpenza oyo tokoki kolanda mpo na koyeba solo? Tótala ndenge lisolo oyo elandi elobi na ntina ya lolenge ya malamu mpenza ya kozwa boyebi.
[Bililingi na lokasa 3]
Gautama (Buddha), Rousseau mpe Voltaire balandaki banzela ekeseni mpo na koluka boyebi