Ndenge ya kozwa boyebi ya solosolo
MWA 18 Desɛmbɛ 1810 na mpokwa, Pallas, masuwa moko ya moke ya basoda ya Angleterre oyo babundaka na mai, ebungaki nzela na ntango oyo mai ya mbu etombokaki makasi. Masuwa yango ezalaki mosika mpenza na bokula ya sudi-ɛsti ya Écosse. Lokola molili ezalaki kokóma makasi mpe mbula mpɛmbɛ ezalaki kokita mingi, ekómaki mpasi mpo batambwisi ya masuwa yango bámona miinda oyo elakisaka bamasuwa bisika ya kokima makama. Kanisá naino esengo oyo bayokaki ntango bamonaki miinda mpe babandaki kolanda yango! Kasi likambo ya mawa, miinda yango ezalaki oyo basengelaki na yango te. Ezalaki nde miinda ya bato ya misala ya mabɔkɔ oyo bazalaki kosala misala na bango na pembeni ya mbu. Masuwa Pallas etutanaki na mabanga mpe epanzanaki mobimba. Bato 11 oyo bazalaki na masuwa yango bakufaki. Oyo nde mawa!
Mpo na masuwa Pallas, libunga nde ememaki yango na likama. Kasi, mbala mosusu bato ya masuwa bazalaki mpenza kokosama na miinda ya bato mabe. Buku moko (Wrecks, Wreckers and Rescuers) elobi ete bazalaki kotya miinda yango mpo na kobenda bamasuwa na bisika ya mabanga mpo epanzana, bongo bango báya kopunza biloko.
‘Makomi mosantu oyo ekoki komema yo na lobiko’
Ntango ozali koluka boyebi, okoki mpe kokutana na makama lokola bato wana ya masuwa. Okoki kolanda makanisi ya mabe to mpe kokosama mpenza. Ezala olandi makanisi ya mabe to bakosi yo, bomoi na yo ekoki kokóma na likama. Ndenge nini okoki komibatela? Osengeli koluka boyebi na nzela ya malamu mpe ya solo. Na boumeli ya mbula koleka 125, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali komonisa ete kotánga Liloba ya Nzambe, ezali nzela oyo eleki malamu mpo na kozwa boyebi, mpo yango ezali na “makomi mosantu, oyo ezali na likoki ya kokómisa yo moto ya bwanya mpe komema yo na lobiko.”—2 Timote 3:15-17, New English Bible.
Nzokande, mpo ondima mpenza ete Biblia ezali liziba ya boyebi ya solosolo, esengeli oluka koyeba soki ezali mpenza Liloba ya Nzambe. (Nzembo 119:105; Masese 14:15) Soki olingi koyeba makambo oyo esalisi bato mingi bákóma kondima ete Biblia ezali mpenza mokanda ya Nzambe, kokakatana te mpo na kokomela babimisi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Na ndakisa, okoki kotánga mwa buku Un livre pour tous.a Mwa buku yango eyebisi makambo oyo emonisa ete Biblia ezali na makambo ya sikisiki, ezali mokanda ya Nzambe mpe bakomaki yango na lisalisi ya elimo ya Nzambe.
Mateya ya moboko
Kasi, wapi mwa mateya ya moboko oyo ezali na kati ya “makomi mosantu” yango? Talá bandakisa oyo elandi.
Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mpe Mozalisi ya biloko nyonso azali kaka moko. (Genese 1:1) Biso bato tozali na bomoi ‘mpamba te [Nzambe] azalisaki biloko nyonso’ mpe apesá biso bomoi. (Emoniseli 4:11) Talá ntina oyo tosengeli kosambela kaka ye moko. Mozalisi nde azali liziba ya boyebi nyonso. (Nzembo 36:9; Yisaya 30:20, 21; 48:17, 18) Azali na nkombo na ye oyo alingi tóbengaka ye na yango. (Exode 3:15) Nkombo yango ekomamaki mbala soki 7 000 na Biblia. Bakomaki yango na Liebele na mikanda oyo ekoki kobongolama boye: YHWH. Banda ebele ya bambula, bazali kobongola yango na Lingala na “Yawe” to “Yehova.”—Nzembo 83:18.
Yehova asalaki bato mpo bázala na bomoi libela na libela na paladiso awa na mabelé. Nzambe apesaki bato bizaleli oyo ekokani na oyo ya ye. Apesaki bango makoki oyo esengelaki kosalisa bango bázala na bomoi ya seko mpe ya esengo awa na mabelé. (Genese 1:26-28) Asalaki mabelé te mpo ezala esika oyo bato basengeli komekama liboso ya kokóma bikelamu ya elimo na likoló, lokola nde bakoki kozala na boyokani na Nzambe kaka kuna na likoló.
Nzambe akelaki bato na mabe moko te. Mabe ebandaki kaka ntango bikelamu mosusu, ezala bato to baanzelu, basalelaki bonsomi na bango ya kopona na ndenge ya mabe mpe batombokelaki Nzambe. (Deteronome 32:5) Adama ná Eva bamonaki malamu bákóma kopona bango moko oyo ezali malamu ná oyo ezali mabe. (Genese 2:17; 3:1-5) Yango nde esalaki ete bato bákóma kokufa. (Genese 3:19; Baloma 5:12) Mpo na kosilisa bantembe oyo botomboki wana ebimisaki, Yehova amonaki malamu atika mabe ekoba kosalema na boumeli ya mwa ntango. Kasi, mokano na ye mpo na mabelé mpe mpo na bato ebongwani te. (Yisaya 45:18) Bato bakozala lisusu na bomoi libela na libela na paladiso awa na mabelé oyo ekopɛtolama na mabe nyonso.—Matai 6:10; Emoniseli 21:1-5.
Yesu Klisto azali mwana ya Nzambe, kasi te Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Yesu ye moko ateyaki bayekoli na ye bábondelaka boye: “Tata na biso na likoló, tiká nkombo na yo esantisama.” (Matai 6:9) Alobaki ata mokolo moko te ete akokani na Nzambe. Kutu, alobaki ete: “Tata aleki ngai.”—Yoane 14:28.
Yesu azali na ntina mingi mpo na kokokisama ya mokano ya Nzambe. Nzambe atindaki ye “lokola pole na kati ya mokili, mpo moto nyonso oyo azali kondimela [ye] afanda na kati ya molili te.” (Yoane 12:46) Ntoma Petelo amonisaki ete “ezali na lobiko te na kati ya moto mosusu.” (Misala 4:12) Ezali mpenza bongo, mpamba te kaka makila ya Klisto nde ekoki kobikisa biso. (1 Petelo 1:18, 19) Yesu Klisto apesaki bomoi na ye mbeka mpo na kosikola bato na lisumu oyo Adama ná Eva bakɔtisaki na mokili. (Matai 20:28; 1 Timote 2:6) Lisusu, Nzambe asalelaki Yesu mpo na koyebisa bato mokano na ye.—Yoane 8:12, 32, 46, 47; 14:6; Misala 26:23.
Nzambe atye Bokonzi to guvɛrnema moko na likoló, oyo ezali kotambwisama na Yesu mpe bato oyo baponami awa na mabelé. Balobeli Bokonzi yango mbala na mbala na kati ya Biblia mobimba. Nzambe apesi guvɛrnema yango mokumba ya kokokisa mokano na ye awa na mabelé lokola na likoló. (Matai 6:10) Na ebandeli, mokano ya Nzambe ezalaki te ete ata moto moko akende na likoló. Bato basengelaki kofanda awa na mabelé. Kasi, nsima ya lisumu ya Adama ná Eva, Nzambe akanaki kosala likambo moko ya sika. Azwaki mokano ya kopona bato “na mabota nyonso mpe na minɔkɔ nyonso mpe na mikili nyonso mpe na bikólo nyonso,” mpo na “koyangela” elongo na Klisto na likoló. (Emoniseli 5:9, 10) Mosika te, Bokonzi yango “ekobuka mpe ekosilisa” lolenge nyonso ya boyangeli ya bato, oyo ememeli bato ebele ya mpasi mpe minyoko.—Danyele 2:44.
Molimo ekufaka. Liteya ya motuya mingi wana ya Biblia ezali kosalisa biso tóyeba makambo mingi na ntina na moto mpe bilikya na ye. Ezali mpe kolongola molili oyo ekɔtá na mitó ya bato na ntina na bakufi.
Mokanda ya Genese eyebisi biso ete: “[Yehova] Nzambe asalaki moto na mputulu ya mokili, mpe apemaki kati na zolo na ye mpema ya bomoi, mpe moto akómaki molimo ya bomoi.” (Genese 2:7) Okangi ntina ya maloba wana? Molimo ezali te eloko moko boye, oyo ezali na kati ya moto. Moto azali na molimo te. Ye moko nde azali molimo, elingi koloba azali “mputulu ya mokili” oyo esangani na nguya ya bomoi oyo euti epai ya Nzambe. Molimo ezali te eloko oyo ekufaka te. Soki moto akufi, molimo nde ekufi.—Genese 3:19; Mosakoli 9:5, 10.
Bakufi bakoki kosekwa. Ntango mwa eleko oyo Nzambe atiki mabe esalema ekokóma na nsuka, “baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama bakoyoka mongongo [ya Yesu] mpe bakobima, baoyo basalaki makambo ya malamu bakobima mpo na lisekwa ya bomoi, baoyo bazalaki na momeseno ya kosala makambo ya mabe mpo na lisekwa ya kosambisama.” (Yoane 5:28, 29; Misala 24:15) Bakufi bakosekwa na paladiso awa na mabelé, mpe bakozala na bomoi oyo Nzambe akanaki na ebandeli ete bato bázala na yango.
Tángáká Makomami na likebi mpenza mokolo na mokolo
Omoni ndenge boyebi ya mateya wana ya moboko ekoki kosalisa yo? Na ntango oyo ya mpasi mpe ya yikiyiki, boyebi ya ndenge wana ekoki kobatela yo na mateya “oyo ebengami na lokuta mpenza ete ‘boyebi,’” oyo Satana Zabolo apalanganisi na mokili. Azali “komibimisa lokola anzelu moko ya pole,” mpe bato na ye bazali komimonisa “lokola baministre ya boyengebene.” (1 Timote 6:20; 2 Bakolinti 11:13-15) Boyebi ya sikisiki ya Biblia ekoki kobatela yo mpo olanda te boyebi ya nkombo mpamba, oyo euti na filozofi ya “bato ya bwanya mpe ya bato ya mayele” ya mokili, oyo “baboyi liloba ya [Yehova].”—Matai 11:25; Yilimia 8:9.
Lokola mateya mpe filozofi ya lokuta ezalaki mingi na ntango na ye, ntoma Yoane akebisaki baklisto ya ekeke ya liboso boye: “Bóndimaka te liloba nyonso oyo epemami, kasi bómekaka maloba mapemami mpo na komona soki yango euti na Nzambe.” (1 Yoane 4:1) Na ndakisa, soki bayebisi yo nsango moko oyo ekoki kozala na ntina mingi na bomoi na yo, okondima yango kaka mbala moko mpo omoni ete euti epai ya moto moko oyo osengeli kotyela motema? Te. Liboso ondima yango, okoluka naino koyeba esika nsango yango euti mpe kotalela yango malamumalamu.
Wana nde ntina oyo Nzambe apesá biso makomi na ye oyo ezali na mateya ya moboko. Ezali mpo na kosalisa yo ‘otalela malamumalamu’ mpo na koyeba soki miinda oyo ozali kolanda mpo na kozwa boyebi ezali ya solo. (1 Batesaloniki 5:21) Ntoma Paulo apesaki bato ya makanisi malamu na ekeke ya liboso longonya mpo bazalaki ‘kotalela Makomami malamumalamu mokolo na mokolo’ mpo na koyeba soki makambo oyo azalaki koteya bango ezalaki ya solo. (Misala 17:11) Yo mpe okoki kosala bongo. Tiká ete Biblia ezala “lokola mwinda oyo ezali kongɛnga na esika moko ya molili,” mpo na kolakisa yo nzela ya malamu. (2 Petelo 1:19-21) Soki osali bongo, “okozwa mpenza boyebi ya Nzambe.” Yango nde boyebi ya solosolo.—Masese 2:5.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 4]
Liloba ya Nzambe ezali lokola mwinda
[Elilingi na lokasa 5]
Nkombo ya Nzambe nani?
[Elilingi na lokasa 5]
Bomoi ya bato ezali kokende wapi?
[Elilingi na lokasa 6]
Yesu azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso?
[Elilingi na lokasa 6]
Bakufi bazali wapi?
[Elilingi na lokasa 7]
Lisekwa ezali moko ya mateya ya moboko ya Biblia