Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/9 nk. 23-26
  • Ndenge Ba-Mennonite balukaki solo ya Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge Ba-Mennonite balukaki solo ya Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Ba-Mennonite bazali banani?
  • Ba-Mennonite lelo oyo
  • Ndenge momboto ya solo elonamaki
  • Banyokwami mpo na solo
  • Bazwi bandeko ya bolingo
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/9 nk. 23-26

Ndenge Ba-Mennonite balukaki solo ya Biblia

MOKOLO moko na ntɔngɔ, na sanza ya Novɛmbɛ 2000, bamisionɛrɛ mosusu ya Bolivie bamonaki na fɛnɛtrɛ ya mwa ndako na bango mibali ná basi oyo balati kitoko, batɛlɛmi liboso ya porte mpe bazalaki kobanga. Ntango bamisionɛrɛ bafungolaki porte, maloba ya liboso ya bapaya yango ezalaki: “Tozali na mposa ya koyeba solo ya Biblia.” Bapaya yango bazalaki Ba-Mennonite. Mibali balataki basalopɛti, basi balataki barobɛ ya moindo, mpe bazalaki kosolola na monɔkɔ ya Allemand. Miso na bango ezalaki komonisa ete bazali kobanga. Bazalaki kotala soki bazali kolanda bango. Atako bongo, ntango bapaya yango bazalaki komata mpo na kokɔta na ndako, Elenge moko alobaki boye: “Nalingi mpenza nayeba bato oyo basalelaka nkombo ya Nzambe.”

Ntango bakómaki na kati ya ndako, mitema ekitaki mpe bapesaki bango mwa eloko ya kokitisa mongongo. Bautaki mosika mpenza, na mwa mboka moko ya basali ya bilanga. Kuna, bazalaki kozwa zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na nzela ya posita na boumeli ya mbula motoba. Bapaya yango batunaki boye: “Totángaki ete paladiso ekozala awa na mabele. Ezali solo?” Batatoli bapesaki bango bango eyano na Biblia. (Yisaya 11:9; Luka 23:43; 2 Petelo 3:7, 13; Emoniseli 21:3, 4) Mosali bilanga moko alobaki na basusu boye: “Bomoni! Oyo ezali solo. Paladiso ekozala awa na mabelé.” Basusu bakómaki koloba boye: “Solo mpenza nde yango oyo.”

Ba-Mennonite bazali banani? Bindimeli na bango ezali nini? Mpo na koyanola na mituna wana, tózonga naino na ekɛkɛ ya 16.

Ba-Mennonite bazali banani?

Na bambula ya 1500, mosala ya kobongola mpe kobimisa Biblia na minɔkɔ mingi ya mikili ya Mpoto ekolaki mpenza, yango epesaki bato ya mikili yango lisusu mposa ya koyekola Biblia. Martin Luther mpe bato mosusu oyo balingaki mbongwana na makambo ya losambo baboyaki mateya mingi ya Lingomba ya Katolike. Atako bongo, mangomba ya Protesta oyo ebimaki sika ezalaki naino kolanda mimeseno mingi oyo euti na Biblia te. Na ndakisa, bato mingi bazalaki kolinga ete bábatisaka mwana nyonso oyo abotami. Nzokande, bato mosusu oyo bazalaki koyekola Biblia mpo na koyeba solo bamonaki ete moto akómaka mosangani ya lisangá ya boklisto kaka soki azwi ekateli oyo euti na boyebi liboso ya kozwa batisimo. (Matai 28:19,20) Basakoli ya molende oyo bayebaki endimeli yango babandaki kokende na bingumba mpe na bamboka mpo na koteya Biblia mpe kobatisa mikóló. Yango wana, bazalaki kobenga bango Ba-Anabatiste, elingi koloba “bato oyo babatisaka mbala mibale.”

Menno Simons, Sángo moko ya mboka Witmarsum, na nɔrdi ya ekólo Pays-Bas, azali moko ya bato oyo bakendeki koluka solo epai ya Ba-Anabatiste. Na 1536, atikaki mpenza Lingomba ya Katolike mpe bakonzi ya lingomba yango bakómaki kolukaluka ye lokola nyama. Na 1542, ampɛrɛrɛ mosantu ya Loma Charles V alakaki ete akopesa florin 100 (mbongo ya ntango wana) na moto oyo akokanga Menno. Atako bongo, Menno ayanganisaki Ba-Anabatiste mosusu na masangá. Eumelaki te, bato bakómaki kobenga ye ná bayekoli na ye Ba-Mennonite.

Ba-Mennonite lelo oyo

Na nsima, bankóto ya Ba-Mennonite bakimaki minyoko na Mpoto ya wɛsti mpe bakendaki kofanda na Amerika ya nɔrdi. Kuna, bakobaki koluka solo mpe kopanza nsango na bango epai ya bato mingi lisusu. Kasi, bazalaki lisusu te na molende makasi ya koyekola Biblia mpe kosakola epai na bato nyonso lokola bato oyo babandisaki lingomba yango. Mingi kati na bango bakangamaki na mateya ya lokuta lokola bosato, molimo ekufaka te mpe lifelo ya mɔtɔ. (Mosakoli 9:5; Ezekiele 18:4; Malako 12:29) Lelo oyo, Ba-Mennonite bamipesá mingi nde na misala lokola kotonga balopitalo, kokabela bato bankisi mpe kosala misala mosusu mpo na bolamu ya mboka.

Lelo, Ba-Mennonite bakoki kozala soki 1 300 000, na bikólo 65. Kasi, lelo oyo, Ba-Mennonite bamilelaleka mpo bazali na bomoko te, ndenge kaka Menno Simons amilelaki esili koleka bikɛkɛ mingi. Na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, makanisi ndenge na ndenge oyo bato bazalaki na yango na ntina kowelana oyo ezalaki koleka na mokili ekabolaki mpenza bato. Na Amerika ya nɔrdi, bato mingi bazalaki koboya mosala ya soda mpo na kotosa mitinda ya Biblia. Kasi, buku moko (An Introduction to Mennonite History) elobi boye: “Na 1914, Ba-Mennonite ya Mpoto bazalaki lisusu koboya kokɔta na bitumba te ndenge bazalaki kosala kala.” Lelo oyo, mwa mangomba mosusu ya Ba-Mennonite ekomá kolanda makambo oyo bato nyonso bazali kosala. Tii lelo oyo, bamosusu bakangaka bilamba na bango na epɛngle na esika ya babuto mpe bakanisaka ete mibali basengeli kokata mandɛfu te.

Mwa mangomba mosusu ya Ba-Mennonite oyo eboyaki kolanda makambo bato nyonso bazali kosala, ekendeki kofanda na bisika oyo bakonzi ya mboka bakotika bango básalaka makambo na bango ndenge balingi. Na ndakisa, na Bolivie, ezali na Ba-Mennonite soki 38 000 oyo bafandi na mwa bituluku mosika na bato mosusu, mpe etuluku mokomoko ezali na mibeko na yango. Bituluku mosusu epekisaki mituka, kasi epesaki nzela na kosalela bampunda mpe makalo. Mosusu epekisaki radio, televizyo mpe miziki. Kutu mosusu epekisaki koyekola monɔkɔ ya mboka oyo bafandaki. Moto ya etuluku moko alobaki boye: “Mpo na kokonza biso malamumalamu, basakoli balingaka te tóyekola monɔkɔ ya Espagnol.” Bato mingi bazali konyokwama mpe bazalaka ntango nyonso na kobanga noki bábengana bango na mboka; likambo oyo ebangisaka mpenza bato yango mpamba te bamesani kaka na bamboka wana.

Ndenge momboto ya solo elonamaki

Johann mosali moko ya bilanga oyo afandaki na etuluku moko ya ndenge wana ya Ba-Mennonite, amonaki nimero moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na ndako ya moto moko oyo azalaki kofanda penepene na ye. Johann ná libota na ye balongwaki na Canada, bakendaki kofanda na Mexique mpe na nsima bakendaki na Bolivie. Kasi, Johann azalaki ntango nyonso na mposa ya koyeba solo. Alobaki na moto yango adefisa ye zulunalo yango.

Na nsima, ntango Johann akendeki kotɛka biloko na ye na mboka-mondɛlɛ, akutanaki na Motatoli moko oyo azalaki kokabola bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na zando. Ndeko yango amemaki ye epai ya misionɛrɛ moko oyo azalaki koloba monɔkɔ ya Allemand, mpe mosika te babandaki kotindela Johann Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na nzela ya posita. Azalaki koyekola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mokomoko na likebi mpenza mpe na nsima ezalaki kotambola na libota mokomoko ya etuluku na ye tii ntango ekobeba. Mabota mosusu ezalaki koyangana esika moko mpo na koyekola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli tii na midi ya butu, mpe bazalaki kotánga mikapo ya Biblia oyo ezali na kati. Johann akómaki kondima mpenza ete Batatoli ya Yehova bazali bato oyo bazali kosala mokano ya Nzambe na bomoko na mabelé mobimba. Liboso akufa, Johann ayebisaki mwasi na ye ná bana boye: “Botángaka ntango nyonso Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Ekosalisa bino bóyeba Biblia malamu.”

Bato mosusu ya libota ya Johann babandaki koyebisa bazalani na bango makambo oyo bazalaki koyekola na Biblia. Bazalaki koyebisa bango boye: “Mabelé ekobebisama te. Kasi, Nzambe akokómisa yango paladiso. Mpe Nzambe anyokolaka bato na lifelo ya mɔ́tɔ te.” Mosika te, bakonzi ya lingomba bayokaki nsango yango mpe bakómaki koyebisa libota ya Johann ete soki batiki makambo wana te, bakobengana bango. Na nsima, ntango libota yango esanganaki mpo na kolobela likambo yango, elenge mobali moko alobaki boye: “Nazali mpenza koyeba te ntina oyo tozali komitungisa mpo na bakonzi ya lingomba na biso. Biso nyonso toyebi lingomba nini ezali solo, mpe tozali kosala eloko te.” Maloba wana esimbaki mpenza motema ya tata ya elenge yango. Mwa moke na nsima, bato zomi ya libota wana basalaki mobembo na nkuku mpo na koluka Batatoli ya Yehova mpe nsukansuka bakómaki epai ya bamisionɛrɛ ndenge tolobi na ebandeli ya lisolo oyo.

Mokolo oyo elandaki, bamisionɛrɛ yango bakendaki kotala bango na etuluku na bango. Motuka mosusu ezalaki na nzela te, kaka oyo ya bamisionɛrɛ. Ntango bazalaki kotambola malɛmbɛmalɛmbɛ na kati ya makalo ya bampunda, bato ya mboka yango bazalaki kokamwa bango, bango mpe bazalaki kokamwa bato ya mboka. Mosika te, bamisionɛrɛ yango bafandaki na mesa elongo na Ba-Mennonite 10 ya mabota mibale.

Mokolo wana, bazwaki ngonga minei mobimba mpo na koyekola mokapo 1 ya buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko.a Na paragrafe mokomoko, bazalaki mpe kotánga mikapo ya Biblia mpe bazalaki koluka koyeba soki bakangi mpenza ntina ya mikapo yango. Liboso ya koyanola na motuna mokomoko, bazalaki naino kosolola na monɔkɔ moko ya bato ya Allemagne mpe na nsima, moko na bango azalaki kopesa eyano na monɔkɔ ya Espagnol. Ezalaki mokolo moko ya esengo, kasi mikakatano ezalaki koya. Balingaki kokutana na minyoko, ndenge kaka Menno Simons akutanaki na yango ntango abandaki koluka solo mbula soki 500 liboso.

Banyokwami mpo na solo

Nsima ya mwa mikolo, bakonzi ya Lingomba ya Ba-Mennonite bakendaki epai ya Ba-Johann mpo na kokebisa bango ná bato mosusu oyo bazalaki koyekola solo boye: “Toyoki ete Batatoli ya Yehova bayaki epai na bino. Bópekisa bango baya lisusu te, mpe soki bopesi mikanda na bango mpo tótumba yango te, tokobengana bino na lingomba.” Komekama wana ezalaki ya mbula na bango te mpamba te bayekolaki Biblia na Batatoli kaka mbala moko.

Tata ya libota moko ayanolaki bango boye: “Tokoki kotosa bino te, mpamba te bato wana bayaki koteya biso Biblia.” Bakonzi yango ya lingomba basalaki nini? Babenganaki bango na lingomba mpo bayekolaki Biblia! Na ntembe te, mokakatano yango ezalaki makasi. Likalo ya izini ya fromaze oyo ezalaki kosomba miliki na bandako eboyaki kosomba miliki na ndako ya libota moko ya bayekoli wana ya Biblia, mpe bongo, bapekisaki bango kozwa mbongo. Balongolaki kutu tata moko ya libota na mosala. Baboyaki kotɛkɛla tata mosusu ya libota biloko na magazini moko ya etuluku yango mpe balongolaki mwana na ye ya mwasi ya mbula 10 na kelasi. Baninga ya kartye ya mobali moko oyo azalaki koyekola Biblia bazingaki ndako na ye mpo na kobɔtɔla ye mwasi na ye, mpe bazalaki koloba mwasi wana akoki kofanda na mobali oyo babengani na lingomba te. Atako bongo, mabota wana oyo ezalaki koyekola Biblia batikaki te na koyekola solo.

Pɔsɔ na pɔsɔ, bamisionɛrɛ wana bakobaki kosala mobembo wana molai na motuka mpo na koyekola na bango Biblia. Boyekoli yango elendisaki mpenza mabota wana! Mabota mosusu ezalaki kosala mobembo ya ngonga mibale na mpunda mpe makalo mpo na kozala na boyekoli yango. Ezalaki esengo monene ntango mabota yango esɛngaki misionɛrɛ moko mpo na mbala ya liboso abondela. Lokola Ba-Mennonite babondelaka na mongongo makasi, bayokaki naino te moto moko azali kobondela mpo na bango. Mibali yango batangisaki mpisoli. Bato yango bakamwaki mpenza ntango bamisionɛrɛ bamemaki radio-kasɛti! Miziki epekisamaki makasi na etuluku na bango. Basepelaki mpenza miziki kitoko ya Mélodies du Royaume mpe bazwaki ekateli ya koyembaka nzembo ya Bokonzi nsima ya boyekoli nyonso! Kasi, likambo moko oyo batikalaki na yango oyo: bomoi na bango ekozala ndenge nini?

Bazwi bandeko ya bolingo

Lokola baboyaki bango na mboka, bango moko bakómaki kosala bafromaze. Bamisionɛrɛ bazalaki kolukela bango bakiliya. Motatoli moko na Amerika ya nɔrdi oyo aumelá mingi na solo mpe akolaki na etuluku moko ya Ba-Mennonite na Amerika ya sudi, ayokaki nsango ya mpasi oyo mabota wana ezalaki komona. Azalaki na mposa makasi ya kosalisa bango. Na pɔsɔ oyo elandaki, akendeki kotala bango na Bolivie. Alendisaki bango na elimo mpe apesaki bango makoki ya kosomba motuka na bango moko mpo bakendaka na yango na makita na ndako ya Bokonzi mpe kotɛka biloko na bango na zando.

Mwasi moko alobaki boye: “Ezalaki mpenza mpasi mpo na biso ntango babenganaki biso na lingomba. Tozalaki kokende na makita na bilongi ya mawa, kasi tozalaki kozonga na esengo.” Batatoli ya mboka wana basalisaki mpe bango. Bandeko mosusu bayekolaki monɔkɔ ya Allemand mpe Batatoli mingi ya Mpoto oyo balobaka monɔkɔ yango, bayaki na ekólo Bolivie mpo na kosunga bango na kotambwisa makita na monɔkɔ ya Allemand. Mosika te, bato 14 oyo bazalaki Ba-Mennonite bakómaki kosakola nsango malamu epai ya bato mosusu.

Mwa 12 Ɔkɔtɔbɛ 2001, kaka mwa basanza banda bakendaki kotala bamisinɛrɛ na ndako, bato 11 oyo bazalaki Ba-Anabatiste babatisamaki lisusu, mpe na mbala wana mpo na komonisa bamipesi epai ya Yehova. Kobanda wana, bato mingi babatisami. Mobali moko alobaki boye: “Banda toyekolá solo ya Biblia, tosikwamá.” Mobali mosusu alobaki boye: “Ba-Mennonite mingi bamilelalelaka ete bolingo ezali te na lingomba na bango. Kasi, Batatoli ya Yehova batyelanaka likebi. Nazali na kimya mpenza kati na bango.” Soki yo mpe ozali koluka koyeba mpenza solo ya Biblia, mbala mosusu okokutana na mikakatano. Kasi, soki oluki lisalisi ya Yehova mpe omonisi kondima mpe mpiko ndenge mabota wana basalaki, yo mpe okolonga mpe okokóma na esengo lokola bango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 25]

Bazali na esengo ndenge bazwi mikanda oyo elimbolaka Biblia na monɔkɔ ya Allemand

[Elilingi na lokasa 26]

Atako miziki epekisamaki, sikoyo bayembaka nzembo nsima ya boyekoli nyonso ya Biblia

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto