Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/6 nk. 5-7
  • Lingomba nini osengeli kopona?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lingomba nini osengeli kopona?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Baklisto ya solo na ekeke ya liboso mpe lelo oyo
  • Matomba ya kozala na lisangá oyo endimami na Nzambe
  • Epai na baoyo bazali koluka solo
  • Bomoko ya losambo na mikolo na biso​—Elimboli nini?
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • Losambo oyo Nzambe andimaka
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Lingomba
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Libota ya Yehova lizali na bomoko kitoko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/6 nk. 5-7

Lingomba nini osengeli kopona?

‘MANGOMBA nyonso ezali kaka banzela oyo ememaka esika moko. Kutu, Nzambe azali kaka moko.’ Bato mingi balobaka bongo mpo bakanisaka ete ezali na ntina moto azala na lingomba moko boye, kasi ata aponi lingomba nini, yango ezali na ntina te.

Soki totaleli makambo likolólikoló, tokoki komona ete likanisi wana elongobani mpenza, mpamba te ezali solo ete Nzambe ya solo, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azali kaka moko. (Yisaya 44:6; Yoane 17:3; 1 Bakolinti 8:5, 6) Kasi, atako na mangomba nyonso balobaka ete basalelaka Nzambe ya solo, tomonaka bokeseni monene, ata mpe bongolabongola, na kati na yango. Lingomba na lingomba ezali na milulu na yango, na bindimeli na yango, na mateya na yango mpe na makambo oyo esɛngaka epai ya bandimi. Bokeseni ezali monene na kati ya mangomba na boye ete, bato ya lingomba moko bazalaka na mokakatano mpo na kokanga ntina to kondima mateya ya lingomba mosusu.

Lisusu, Yesu alobaki ete: “Nzambe azali Elimo, mpe baoyo bazali kosambela ye basengeli kosambela na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:24) Soki bato nyonso bazali kosambela Nzambe na solo, bakoki nde kozala na makanisi ekeseni na ntina na Nzambe, mokano na ye, mpe ndenge oyo alingi tósambela ye? Tokanisi mpenza ete Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso akipaka te ata tozali kosambela ye ndenge nini?

Baklisto ya solo na ekeke ya liboso mpe lelo oyo

Na ekeke ya liboso, baklisto bazalaki ntango mosusu na makanisi ndenge moko te na makambo mosusu. Na ndakisa, ntoma Paulo alobaki mpo na baklisto ya Kolinti boye: “Mpo bato ya ndako ya Kolowe bayebisaki ngai na ntina etali bino, bandeko na ngai, ete kozanga koyokana ezali na kati na bino. Nalingi koloba boye, ete mokomoko na bino azali koloba ete: ‘Ngai nazali moto ya Paulo,’ ‘Kasi ngai ya Apolo,’ ‘Kasi ngai ya Kefa,’ ‘Kasi ngai ya Klisto.’”​—1 Bakolinti 1:11, 12.

Bokeseni wana ya makanisi, Paulo amonaki yango nde likambo moke? Moklisto mokomoko azalaki nde koluka lobiko na ndenge na ye? Te! Paulo apesaki bango toli oyo: “Nzokande nazali kolendisa bino, bandeko, na nkombo ya Nkolo na biso Yesu Klisto ete bosengeli bino nyonso kolobaka na boyokani, mpe ete bokabwani esengeli te kozala na kati na bino, kasi bózala nde liboke moko mpenza na makanisi kaka moko mpe na motindo ya kokanisa kaka moko.”​—1 Bakolinti 1:10.

Ya solo, ezali kosɛnga te kondimisa bato na makasi mpo bákóma na bindimeli ndenge moko. Bato bakozala na bindimeli ndenge moko se soki bazali koyekola makambo malamumalamu mpe na nsuka, kokóma na likanisi moko mpe kondima yango. Yango wana, ezali na ntina mingi ete moto na moto ayekola Liloba ya Nzambe mpe azala na mposa mpenza ya kosalela makambo yango mpo na kokóma na bomoko oyo Paulo alobelaki. Bomoko ya ndenge wana ekoki nde komonana na moi ya lelo? Ndenge tomonaki yango, banda kala, bato oyo Nzambe azalaki kotambwisa bazalaki lisangá. Tokoki koyeba lisangá oyo Nzambe azali kotambwisa lelo oyo?

Matomba ya kozala na lisangá oyo endimami na Nzambe

Davidi, mokomi ya nzembo atunaki boye: “Ɛ [Yehova], nani akoumela kati na hema na yo? Nani akofanda na ngomba na yo ya bulɛɛ?” Motuna yango ezali mpenza kotinda moto na moto akanisa malamu. Davidi apesaki eyano oyo: “Ye oyo akotambolaka sembo mpe [akolanda] boyengebene, mpe akolobaka solo kati na motema na ye.” (Nzembo 15:1, 2) Soki moto akangi mpenza ntina ya mateya ya Biblia, yango ekosalisa ye ayeba lingomba oyo ezali kokokisa masɛngami wana ya Nzambe. Na nsima, soki akɔti na lingomba yango, akokóma na kati ya bato oyo bazali kosambela Nzambe na bomoko, “na elimo mpe na solo.”

Batatoli ya Yehova bamonisi ete, ata na mokili oyo bomoko ezali te, bato bakoki kozala na bindimeli ndenge moko mpe kosala na bomoko. Bato mosusu oyo bazali Batatoli bautaki na mangomba ndenge na ndenge mpe na bikólo ndenge na ndenge. Bamosusu bazalaki kokipe Nzambe te to mpe bazalaki kondima te ete Nzambe azali. Ezali mpe na baoyo bazalaki kosambela te. Bato yango oyo bauti na mangomba, na bonkɔkɔ, mpe bateyaki bango makanisi ndenge na ndenge, bazali sikoyo na bomoko oyo ekoki komonana epai mosusu te na mokili lelo oyo.

Biblia, Liloba ya Nzambe, nde esimbi bomoko yango. Batatoli ya Yehova bayebi malamu ete bakoki te kotinda bato mosusu na makasi makambo oyo basengeli kosala. Kasi, basepelaka kolendisa bato mosusu báyekola Biblia mpo bázwa mayele oyo ekosalisa bango mpo na kopona lingomba. Na ndenge yango, bato mingi lisusu bakoki kozwa matomba ya kosambela Nzambe “na elimo mpe na solo.”

Lelo oyo, ezali mpasi te moto alanda banzela ya mabe. Yango wana, ezali na ntina mingi moto apona baninga ya malamu. Biblia elobi ete “ye oyo akotambola na bato ya mayele akozala na mayele” mpe ete “baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” (Masese 13:20; 1 Bakolinti 15:33) Kozala na kati ya bato oyo basambelaka mpenza Nzambe ezali libateli. Yango wana, Biblia elobi na biso boye: “Tótyelanaka likebi mpo na kopusama na kozala na bolingo mpe na misala ya malamu, kotikáká te koyangana na biso mpenza, ndenge bamosusu bamesaná kosala, kasi nde tólendisanaka, mpe tósalaka bongo na koleka mpenza lokola bozali komona mokolo yango ezali kokóma pene.” (Baebele 10:24, 25) Ezali likambo ya malamu mingi ntango baninga ya solosolo, bandeko ya elimo, bazali kosalisana na bolingo nyonso mpo na kokokisa mikumba na bango na miso ya Nzambe!

Ottmar andimi ete ezali mpenza bongo. Ye azali moto ya Allemagne mpe baboti na ye bazalaki Bakatolike; kasi, ye atikaki kokende ndako-nzambe. Alobi boye: “Mbala nyonso oyo nazalaki kokende na ndako-nzambe, nazalaki kobima na eloko moko te, kaka ndenge nakɔtaki.” Kasi, atikaki kondima Nzambe te. Na nsima, akutanaki na Batatoli ya Yehova mpe andimaki ete bazali mpenza basaleli ya solo ya Nzambe. Amonaki ete asengeli kosangana na bango. Lelo oyo azali koloba boye: “Nazali na lisangá oyo ezali na mokili mobimba, nazali mpe na kimya ya makanisi mpe ya motema. Bazali kosalisa ngai mokemoke na kozwa boyebi ya solosolo ya Biblia. Yango ezali na motuya mingi mpo na ngai.”

Epai na baoyo bazali koluka solo

Soki bato oyo bazali na makanisi ndenge moko bazali kosala elongo, basalaka mosala malamu koleka bato oyo bazali kosala moto na moto na ndenge na ye. Na ndakisa, liboso Yesu azonga na likoló, apesaki bayekoli na ye malako oyo: “Na yango bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, kobatisáká bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, koteyáká bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino etinda.” (Matai 28:19, 20) Ndenge nini bakokaki kokokisa mosala wana malamu soki bazali na litambwisi to ebongiseli te? Ndenge nini moto akoki kokokisa etinda yango ya Biblia soki azali kosalela Nzambe ye moko mpe na ndenge na ye?

Na mbula eleki, Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bakabolaki babuku mpe mwa babuku 91 933 280 ná bazulunalo 697 603 247; yango emonisi ete bayebisaki bamilio ya bato na mikili 235 nsango ya Liloba ya Nzambe. Yango ezali komonisa polele ete bato oyo bazali na bomoko mpe bazali na ebongiseli malamu basalaka mosala malamu koleka baoyo bazali kosala moto na moto na ndenge na ye.

Longola kokabola mikanda oyo elimbolaka Biblia, Batatoli ya Yehova bayekolaka na bato Biblia ofele mpo na kosalisa bango báyeba malamu makambo oyo Nzambe azali kosɛnga. Na mbula eleki, pɔsɔ na pɔsɔ bayekolaki na bato soki 5 726 509. Mateya yango ya Biblia esalisi bamilio ya bato báyeba makambo oyo ekoki mpenza kosalisa bango na kopona nzela ya malamu na makambo etali losambo. Tozali kolendisa yo oyekola masɛngami ya Nzambe oyo ezali na kati ya Biblia. Na nsima, yo mpe oyeba kopona nzela na yo.​—Baefese 4:13; Bafilipi 1:9; 1 Timote 6:20; 2 Petelo 3:18.

Soki olingi kosepelisa Nzambe, kozala mondimi ya lingomba ezali na ntina mingi; kasi okopona lingomba yango kaka biponelá te. Osengeli kopona lingomba nsima ya kozwa boyebi ya solosolo ya Biblia, kasi te na kolanda makanisi mpamba to biyokayoka. (Masese 16:25) Luká koyeba makambo oyo lingomba esengeli kokokisa mpo ebengama lingomba ya solo. Kokanisá yango na bindimeli na yo. Na nsima, poná nzela ya malamu.​—Deteronome 30:19.

[Bililingi na lokasa 7]

Batatoli ya Yehova bazali na bomoko na kati ya mokili oyo ekabwani

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto