Masolo ya basakoli ya Bokonzi
‘Leká awa mpe salisá biso’
NA SANZA ya Yuli 2000, bayebisaki Batatoli ya Autriche, ya Allemagne, mpe ya Suisse ete bazali na mposa ya bandeko oyo balobaka mɔnɔkɔ ya Allemand mpo bákende kosakola na ekólo ya Bolivie. Mpo na nini? Mpamba te bato ya Lingomba ya Mennonite oyo balobaka Allemand, oyo bafandi na mwa bamboka pembenipembeni ya engumba Santa Cruz tii na ntaka ya kilomɛtrɛ 180, bakómaki kosepela mingi na mateya ya Biblia.
Batatoli soki 140 bandimaki kokende kosakola kuna. Bamosusu bakendaki mpo na mwa bapɔsɔ, bamosusu mbula moko to koleka. Likambo oyo basalaki ekokani na oyo bamisionɛrɛ ya ekeke ya liboso basalaki ntango bandimaki libyangi oyo ete: “Leká na Masedonia kosalisa biso.”—Misala 16:9, 10.
Mosala ya kosakola esalemaka ndenge nini na teritware yango? Nkulutu ya lisangá moko oyo ezali kuna alobi boye: “Mpo na kokóma na moko ya bamboka 43 ya Bamennonite ekoki kozwa ngonga mwambe na motuka na banzela ya mabelé. Mpo na kokóma na mboka oyo eleki mosika, mbala mingi esɛngaka kolala na nzela mikolo minei mpe ntango mosusu na bandako ya kapɔ. Kasi, milende yango ezali na ntina mpamba te, bato yango mingi bayoká naino nsango malamu te.”
Na ebandeli, bato mingi ya Lingomba ya Mennonite bazalaki kosepela mpenza te na nsango oyo bandeko bazalaki komemela bango. Kasi milende oyo Batatoli basalaki ya kozongaka mbala na mbala esalisaki bango básepela na nsango oyo bazalaki komemela bango. Na ndakisa, mosali bilanga moko alobaki ete akokisaki mbula mobimba banda akómá kotánga Lamuká! Na nsima abakisaki boye: “Nayebi ete bato mingi awa bandimaka mateya na bino te, kasi ngai nandimaka ete makambo yango ezali solo.” Na mboka mosusu, mobali moko alobaki boye: “Awa epai na biso, bato mosusu balobaka ete bozali basakoli ya lokuta, bamosusu balobaka ete boteyaka solo. Nalingi ngai moko nayeba soki bolobaka solo.”
Lisangá moko ya monɔkɔ ya Allemand ezali sikoyo na Bolivie; ezali na basakoli 35 ná babongisi-nzela 14. Lelo oyo, bato 14 oyo bazalaki na Lingomba ya Mennonite bakómi basakoli ya Bokonzi mpe bamosusu 9 bazali koyangana na makita nyonso. Mobange moko oyo azwi batisimo kala te alobaki boye: “Tozali komona mpenza ete Yehova azali kotambwisa biso. Atindeli biso bandeko mibali mpe basi oyo bayebi makambo mingi mpe bayebi monɔkɔ ya Allemand mpo na kosalisa biso. Tozali mpenza na botɔndi mpo na yango.” Mwana na ye ya mwasi oyo azali na mbula 17 mpe azwá batisimo, abakisaki boye: “Esengo ya bandeko mibali mpe basi oyo bazali bilenge, oyo bayei kosalisa biso, ezali mpenza kotinda biso na komekola bango. Mingi kati na bango bazali babongisi-nzela mpe bazali kosalela ntango mpe mbongo na bango mpo na kosalisa basusu. Yango ezali kopesa ngai mposa ya kosala lokola bango.”
Ya solo, baoyo bandimaki ‘koleka’ kuna mpo na kosalisa bazali mpenza kozwa esengo mingi.