Liberia—Mosala ezali kokende liboso atako bitumba ezali
BITUMBA na ekólo Liberia esí eumeli koleka mbula zomi. Na katikati ya mobu 2003, barɛbɛlɛ bakɔtaki na Monrovia, mboka-mokonzi ya Liberia. Ebele ya Batatoli ya Yehova bakimaki bandako na bango; ntango mosusu likambo yango ezalaki kosalema mbala na mbala. Bazalaki mbala na mbala kobɔtɔla bango biloko.
Ebele ya bafandi na mboka-mokonzi bakufaki na etumba yango. Na kati na bango ezalaki na Batatoli mibale, ndeko moko ya mobali mpe mosusu ya mwasi. Bandeko basalaki nini kati ya mikakatano yango, mpe nini esalemaki mpo na kosalisa bango?
Lisalisi mpo na baoyo bazali na bosɛnga
Banda kaka etumba ebandá, filiale ya Batatoli ya Yehova na Liberia ezwaki bibongiseli mpo na kosalisa baoyo bazali na bosɛnga. Bazalaki kopesa bango biloko ya kolya, biloko ya ndako, mpe bankisi. Ntango barɛbɛlɛ babɔtɔlaki libongo ya masuwa, kozwa biloko ya kolya ekómaki mpasi. Filiale eyebaki ete makambo ekokóma bongo mpe babombaki bilei mpo na Batatoli 2 000 oyo bakimaki na Bandako ya Bokonzi na engumba wana. Bazalaki kokabola bilei yango mokemoke tii ntango libongo efungwamaki. Filiale ya Belgique mpe ya Sierra Leone etindaki bankisi, mpe filiale ya Angleterre ná ya France etindaki bilamba.
Atako bazalaki na mpasi makasi, bandeko bazalaki kaka na elimo ya malamu mpe na esengo. Ndeko moko oyo akimaki ndako na ye mbala misato amonisaki makanisi ya bandeko mingi. Alobaki boye: “Oyo ezali nde makambo tosakolaka; tozali na mikolo ya nsuka.”
Bato bazali kondima nsango malamu
Atako mobulu ezali na mboka mobimba, Batatoli bazali kozwa ntango nyonso matomba na mosala ya kosakola. Na Yanuali 2003, basakoli ya Bokonzi bakómaki 3 879 mpe na Febwali bayekolaki Biblia na bato 15 227.
Bato bazali mpenza kondima nsango malamu. Tozali na ndakisa moko euti na mboka moko na sudi-ɛsti ya ekólo. Bandeko ya lisangá moko bayokanaki básala Ekaniseli ya liwa ya Klisto na mboka Bewahn; mpo na kokóma na mboka yango esengeli kotambola na makolo ngonga mitano banda na esika oyo basalaka makita. Liboso bandeko bákende na mboka mpo na kobengisa bato na Ekaniseli, batindelaki naino mokonzi ya mboka lokasa ya kobengisa ye. Ntango azwaki yango, azwaki Biblia na ye, akendeki epai ya bato ya mboka, atángelaki bango vɛrsɛ oyo ekomamaki na lokasa wana, mpe alendisaki bango báyangana na Ekaniseli. Ntango basakoli bakómaki, bamonaki ete mosala oyo balingaki kosala, moto mosusu asalaki yango na esika na bango! Mokonzi yango, ná bana na ye, ná basi na ye mibale, bayaki na Ekaniseli. Bayangani nyonso bazalaki bato 27. Banda ntango wana, mokonzi yango alongwaki na Lingomba ya Metodiste, abandaki koyekola na Batatoli, mpe apesaki esika mpo na kotonga Ndako ya Bokonzi.
Moto moko abongoli makanisi
Etamboli ya bandeko na biso esalisaki mpo banguna mosusu bábongola lolenge na bango ya kotalela solo. Tótalela ndakisa ya moto moko, nkombo na ye Opoku. Mobongisi-nzela monene moko akutanaki na ye na mosala ya kosakola mpe apesaki ye Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Opoku asepelaki na lisolo moko kasi azalaki na mbongo te. Mobongisi-nzela alimbolelaki ye ete zulunalo yango ezali kopesama na mbongo te, atikelaki ye yango mpe bayokanaki azongela ye mokolo mosusu. Ntango mobongisi-nzela azongelaki ye, Opoku atunaki ye boye: “Oyebi ngai? Na engumba Harper, bandeko na bino mingi bayebi ngai. Nazalaki kolongola bana na bino na kelasi!” Ayebisaki ye ete azalaki mokambi ya eteyelo moko ya ntei na engumba wana mpe azalaki konyokola bana ya Batatoli ya Yehova mpo bazalaki koboya kopesa bɛndɛlɛ losako.
Kasi, ndakisa misato ya bolingo ya boklisto oyo Batatoli ya Yehova bamonisaki esalaki ete Opoku atalela lisusu malamumalamu makanisi na ye. Ya liboso, amonaki ndenge Batatoli basalisaki ndeko moko ya lisangá oyo azalaki na maladi makasi. Kutu, batindaki ye na lopitalo na ekólo mosusu. Opoku akanisaki ete ndeko wana azali “mokonzi monene” ya Batatoli kasi ayaki koyeba ete azali kaka Motatoli lokola Batatoli mosusu. Ya mibale, na bambula ya 1990, Opoku akimaki mboka na bango mpe akómaki kofanda na Côte d’Ivoire. Mokolo moko, azalaki na mposa ya mai mpe asombaki mai epai ya elenge mobali moko. Opoku azalaki kaka na lokasa ya monene mpe elenge wana amonaki ete azali na mbongo ya mike ya kozongisela ye te, apesaki Opoku mai ofele. Elenge mobali yango oyo apesaki Opoku mai, atunaki ye ete: “Okanisi ete mokolo mosusu bato lokola ngai na yo tokobanda kopesana biloko kozanga kosɛnga mbongo?” Opoku akanisaki ete elenge yango akoki kozala Motatoli ya Yehova, mpe elenge yango andimaki ete azali Motatoli. Bokabi mpe boboto ya ndeko wana ekamwisaki ye. Ya misato, motema malamu oyo mobongisi-nzela monene amonisaki ndenge atikelaki ye zulunalo kozanga kosɛnga ye mbongo endimisaki Opoku ete azalaki kokanisela Batatoli mabe mpamba. Mpe asengelaki kotika makanisi yango. Akolaki na elimo mpe sikoyo azali mosakoli oyo azwi naino batisimo te.
Atako bandeko ya Liberia bazali naino kokutana na makambo oyo ezali kotungisa bango makasi, bazali kotyela Nzambe motema mpe na bosembo nyonso, bazali kosakola nsango malamu ya makambo malamu oyo ekozala ntango Bokonzi ya sembo ya Nzambe ekoyangela. Yehova akobosana soki moke te mosala makasi oyo bazali kosala mpe bolingo oyo bazali komonisa mpo na nkombo na ye.—Baebele 6:10.
[Karte na lokasa 30]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
MONROVIA
[Bililingi na lokasa 31]
Na ntango ya mpasi, basaleli ya Yehova bapesaki baoyo bazalaki na bosɛnga lisungi ya elimo mpe ya mosuni