Tosengeli kobelelaka baanzelu mpo na kozwa lisalisi?
EZALI malamu tóbelelaka baanzelu na ntango ya mpasi? Bato mingi bakanisaka bongo. Kutu, buku moko (New Catholic Encyclopedia) elobi boye: “Bato mosusu basambelaka . . . baanzelu . . . kasi ezalaka kaka mpo bábondela Nzambe mpo na biso.” Tosengeli nde kobelela baanzelu mpo bábondela mpo na biso?
Liloba ya Nzambe etángi kaka nkombo ya baanzelu mibale ya sembo: Mikaele ná Gabiliele. (Danyele 8:16; 12:1; Luka 1:26; Yuda 9) Lokola bankombo yango ekomami na Biblia, emonisi ete anzelu mokomoko azali ekelamu ya elimo mpe azali na nkombo, kasi ezali kaka te nguya moko boye. Nzokande, baanzelu mosusu baboyaki koyebisa bankombo na bango. Na ndakisa, ntango Yakobo atunaki anzelu moko oyo abimelaki ye nkombo na ye, anzelu yango aboyaki koyebisa ye. (Genese 32:29; Basambisi 13:17, 18) Biblia epesi bankombo ya baanzelu nyonso te mpo bato bápesa bango lokumu oyo eleki ndelo te.
Na kati ya misala ya baanzelu, ezali mpe na mosala ya koyebisa bato nsango ya Nzambe. Kutu, liloba ya Liebele mpe ya Grɛki oyo ebongolami na “anzelu,” elimboli mpenza “momemi-nsango.” Kasi, baanzelu bazali na mokumba ya komema mabondeli ya bato epai ya Oyo–Aleki-Likoló te. Nzambe alingaki ete tóbondelaka ye moko na nkombo ya Mwana na ye, Yesu Klisto, oyo alobaki ete: “Nyonso oyo bokosɛnga Tata na nkombo na ngai akoka kopesa bino yango.”—Yoane 15:16; 1 Timote 2:5.
Yehova Nzambe azangaka ntango te mpo na koyoka biso soki tobondeli ye na ndenge oyo ebongi. Biblia elobi boye: “[Yehova] azali penepene na bango nyonso bakobenga ye, baoyo bakobenga ye na solo.”—Nzembo 145:18.