Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/3 nk. 5-7
  • Boklisto ya solo ezali se kokola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Boklisto ya solo ezali se kokola
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eloko oyo esimbi bomoko ya baklisto
  • Ntina oyo mangomba ekabwani
  • Baklisto ya solo batikali kaka liboke moko
  • Baklisto basambelaka na elimo mpe na solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Batatoli ya Yehova
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Zalá mpenza na kondima ete ozali na kati ya solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Lolenge nini okoki koyeba lingomba ya solo?
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/3 nk. 5-7

Boklisto ya solo ezali se kokola

YESU KLISTO abandaki mosala ya kosakola na ekeke ya liboso. Nsango na ye elendisaki bato, efungolaki bango miso, mpe elamusaki bango na ndenge ya kokamwa mpenza. Maloba na ye esimbaki mpenza mitema ya bato mingi oyo bayokaki ye.​—Matai 7:28, 29.

Yesu aboyaki kosangana na bakonzi ya mangomba mpe ya politiki ya ntango wana, kasi bato mpamba bazalaki kokakatana te kopusana penepene na ye. (Matai 11:25-30) Amonisaki polele ete bilimu mabe bazali kosala mosala na mabelé mobimba mpe ete tata na ye apesaki ye nguya likoló ya bilimu mabe. (Matai 4:2-11, 24; Yoane 14:30) Yesu alimbolaki malamumalamu ete bampasi ya bato euti na lisumu, mpe ateyaki ete Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa bampasi nyonso. (Malako 2:1-12; Luka 11:2, 17-23) Alongolaki mpo na libela molili oyo bato bazalaki na yango na ntina na bomoto ya solosolo ya Tata na ye, amonisaki polele nkombo ya Nzambe epai ya bato nyonso oyo basepelaki kozala baninga na Ye.​—Yoane 17:6, 26.

Yango wana, tokoki kokamwa te ete bayekoli ya Yesu bapalanganisaki nsango na ye nokinoki, atako bakonzi ya mangomba mpe ya politiki bazalaki konyokola bango. Nsima ya mbula soki 30 mpamba, masangá minene ya baklisto efungwamaki na Afrika, na Azia, mpe na Mpoto. (Bakolose 1:23) Yesu ateyaki solo oyo engɛngisaki mitema ya bato ya komikitisa mpe ya sembo na mikili nyonso oyo Loma ezalaki koyangela.​—Baefese 1:17, 18.

Kasi, ndenge nini bayekoli nyonso wana ya sika oyo bafandaki na mikili oyo ekeseni na makambo ya nkita, na mimeseno, na minɔkɔ, mpe bautaki na mangomba ekeseni bakokaki kozala na oyo ntoma Paulo abengaki “kondima kaka moko”? (Baefese 4:5) Nini elingaki kosalisa bango bákoba ‘koloba na boyokani’ mpo bákabwana te? (1 Bakolinti 1:10) Na kotalela kozanga boyokani oyo ezali na kati ya baklisto lelo oyo, ezali malamu tótalela makambo oyo Yesu ye moko ateyaki.

Eloko oyo esimbi bomoko ya baklisto

Ntango Yesu asambaki liboso ya Ponsi Pilato, amonisaki eloko oyo esimbi bomoko ya baklisto. Alobaki boye: “Ezali mpo na yango nde nabotamaki, mpe ezali mpo na yango nde nayaki na mokili, mpo napesa litatoli na ntina etali solo. Moto nyonso oyo azali na ngámbo ya solo ayokaka mongongo na ngai.” (Yoane 18:37) Na yango, kondima mateya ya Yesu mpe mateya mosusu ya Biblia etyaka bomoko na kati ya bayekoli ya solo ya Klisto.​—1 Bakolinti 4:6; 2 Timote 3:16, 17.

Ya solo, ntango mosusu makambo ekoki kobima oyo, mpo na yango bayekoli ya Yesu bakozala bango nyonso na likanisi moko te. Basengeli kosala nini? Yesu alobaki boye: “Ntango ye akoya, elimo yango ya solo, akokamba bino na kati ya solo nyonso, mpo akoloba na ndenge na ye moko te, kasi makambo oyo ye ayoki yango nde akoloba, mpe akosakola epai na bino makambo ezali koya.” (Yoane 16:12, 13) Na bongo, elimo santu ya Nzambe nde esengelaki kosalisa bayekoli ya solo ya Yesu na kokanga ntina ya solo ntango Nzambe akomonisa yango mokemoke. Lisusu, elimo yango esengelaki kobota mbuma, lokola bolingo, esengo, mpe kimya oyo, na ngala na yango, esengelaki kokolisa bomoko na kati na bango.​—Misala 15:28; Bagalatia 5:22, 23.

Ata mokolo moko te Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakozala na bokabwani to bakosala mwa bituluku; apesaki mpe nzela te na koyokanisa mateya ya Biblia ná mimeseno to bonkɔkɔ ya bato oyo bakondima yango. Nzokande, na butu ya nsuka oyo azalaki na bayekoli na ye, abondelaki makasi boye: “Nazali kosɛngela kaka bango te, kasi mpe baoyo bazali kondimela ngai na nzela ya liloba na bango; mpo bango nyonso bázala moko, ndenge yo, Tata, ozali na bomoko elongo na ngai mpe ngai nazali na bomoko elongo na yo, mpo bango mpe bázala na bomoko elongo na biso, mpo mokili endima ete yo otindaki ngai.” (Yoane 17:20, 21) Na bongo, bomoko ya solosolo, na elimo mpe na solo esengelaki komonana epai ya bayekoli ya Klisto banda na ebandeli tii na ntango na biso. (Yoane 4:23, 24) Nzokande, lelo oyo bomoko ezali te na kati ya mangomba; mangomba yango ekabwani. Mpo na nini?

Ntina oyo mangomba ekabwani

Soki lelo oyo mangomba ya boklisto ezali na mateya mpe mimeseno ekeseni, ezali mpo bazali kolanda mateya ya Yesu te. Mokomi moko alobaki boye: “Ndenge kaka ezalaki kala, bato oyo bazali kokóma baklisto lelo oyo bazali koluka na Biblia makambo oyo eyokani na bamposa na bango​—bazali kotya pembeni makambo nyonso oyo eyokani te na mimeseno ya bonkɔkɔ na bango.” Yesu ná bantoma na ye basakolaki ete likambo yango ekomonana.

Na ndakisa, ntoma Paulo akomelaki moninga na ye mokɛngɛli Timote boye: “Ekozala na eleko moko boye oyo bakokoka te mateya oyo epesaka litomba, kasi, na boyokani na bamposa na bango moko, bakomindukela bateyi mpo básalaka bango nyɔminyɔmi na matoi; mpe bakolongola matoi na bango uta na solo, nzokande bakobaluka epai ya masapo ya lokuta.” Baklisto nyonso nde bakokosama? Te. Paulo akomaki lisusu boye: “Kasi yo, batelá makanisi na yo na makambo nyonso, ndimá komona mpasi, salá mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu, kokisá mosala na yo ya ministre malamumalamu.” (2 Timote 4:3-5; Luka 21:8; Misala 20:29, 30; 2 Petelo 2:1-3) Timote mpe baklisto mosusu ya sembo balandaki toli wana oyo epemami na elimo santu.

Baklisto ya solo batikali kaka liboke moko

Lokola Timote, lelo oyo, baklisto ya solo bazali kobatela makanisi na bango; bazali kolanda makanisi ya bato te mpe bazali kondima kaka mateya ya Biblia. (Bakolose 2:8; 1 Yoane 4:1) Batatoli ya Yehova bazali kolanda ndakisa ya baklisto ya ekeke ya liboso; yango wana, bazali kokokisa mosala na bango na mikili koleka 230, mpe na bisika nyonso wana, bazali komemela bato nsango malamu ya Bokonzi oyo mpenza Yesu ateyaki. Tótalela ndenge minei oyo bazali kolanda ndakisa ya Yesu mpe bazali kotambola na nzela ya boklisto ya solo na bomoko, ata na esika nini oyo bafandi.

Mateya na bango euti na Liloba ya Nzambe (Yoane 17:17) Na Belgique, sango moko akomaki mpo na bango boye: “Likambo oyo tokoki koyekola epai na bango [Batatoli ya Yehova] ezali mposa na bango ya kolanda Liloba ya Nzambe mpe mpiko mpo na kosakola yango.”

Batyaka elikya na Bokonzi ya Nzambe mpo na kosilisa mikakatano ya mokili. (Luka 8:1) Na engumba Barranquilla, na ekólo Colombie, Motatoli moko asololaki na Antonio, oyo azalaki na lingomba moko ya politiki. Motatoli yango akɔtelaki lingomba ya politiki oyo Antonio azalaki kokumisa te, akɔtelaki mpe lingomba mosusu te. Kasi, asɛngaki Antonio ete ayekola na ye ná bandeko na ye ya basi Biblia ofele. Mwa moke na nsima, Antonio ayebaki ete esengeli kotyela kaka Bokonzi ya Nzambe elikya mpo na kosilisa bobola na Colombie mpe na mokili mobimba.

Bakumisaka nkombo ya Nzambe. (Matai 6:9) Ntango Batatoli ya Yehova bakutanaki mpo na mbala ya liboso na Maria, oyo azalaki mondimi ya molende ya Lingomba ya Katolike na Australie, andimaki bálakisa ye nkombo ya Nzambe na kati ya Biblia. Asalaki nini na nsima? “Ntango namonaki nkombo ya Nzambe na Biblia, nalelaki. Koyeba nkombo ya Nzambe mpe kosalela yango esimbaki mpenza motema na ngai.” Maria ayekolaki Biblia mpe, mpo na mbala ya liboso na bomoi na ye, ayebaki bomoto ya Yehova mpe akómaki moninga na ye ya motema.

Bolingo esangisi bango. (Yoane 13:34, 35) Na Canada, lisolo ya zulunalo moko (The Ladysmith-Chemainus Chronicle) elobaki boye: “Ata soki ozali moto ya lingomba nini, to soki ozali na lingomba moko te, osengeli kopesa longonya na Batatoli ya Yehova 4 500 oyo basalaki butu moi na boumeli ya pɔsɔ mobimba na ndambo mpo na kotonga Ndako ya Mayangani ya mɛtrɛ-karé 2 300 na engumba Cassidy . . . Ndenge oyo basalaki mosala yango na esengo, kozanga matata, kozanga bokabwani to kozanga koluka lokumu ezali komonisa ete bazali baklisto ya solo.”

Sikoyo, yo moko talelá makambo oyo ezali komonana polele. Na ntango oyo bato ya teoloji, bamisionɛrɛ, ná bandimi bazali naino kobunda mpo matata ezala te na kati ya mangomba, boklisto ya solo ezali se kokende liboso na mokili mobimba. Ya solo, baklisto ya solo bazali kokoba kosakola mpe koteya Liloba ya Nzambe. (Matai 24:14; 28:19, 20) Soki yo mpe ozali “kokimela mpe kolela” mpo na makambo mabe oyo ezali kosalema mpe ozali komitungisa na komona ndenge oyo mangomba ya boklisto ekabwani, tozali kobenga yo osangana na Batatoli ya Yehova na losambo ya Nzambe kaka moko ya solo, Yehova.​—Ezekiele 9:4; Yisaya 2:2-4.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto