Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/4 nk. 3-4
  • Mpo na nini makambo ya elimo ezali se kobeba?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini makambo ya elimo ezali se kobeba?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Bato bazali komipesa lisusu na makambo ya elimo te
  • Bizaleli ya bato ebongwani mpenza
  • Bakómi kosangisasangisa makambo ya losambo
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/4 nk. 3-4

Mpo na nini makambo ya elimo ezali se kobeba?

“Mibali 15 na basi oyo bango balingi kobala bayangani na mpokwa moko mpo na kolanda mateya [ya Bakatolike] mpo na bato oyo balingi kobalana. Na bato yango 30 , kaka 3 nde balobi ete bazali na kondima.”​—La Croix, zulunalo ya Bakatolike na France.

BATO bazali lisusu komona makambo ya elimo na valɛrɛ te. Zulunalo Newsweek ya mwa 12 Yuli 1999 oyo ebimaki mpo na mikili mosusu, ezalaki na motuna oyo na lokasa ya ezipeli: “Nzambe akufá to azali kaka na bomoi?” Eyano oyo zulunalo yango epesaki emonisi ete bato ya Mpoto bamonaka mpenza ete Nzambe así akufá. Zulunalo Le monde, oyo ebimaka na France, ezalaki na lisolo moko oyo elobelaki likita ya baepiskɔpɔ ya Lingomba ya Katolike oyo esalemaki na Rome na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1999; lisolo yango elobaki boye: “Lingomba ekómi na mokakatano monene mpo na koteya mateya oyo bato ‘balingi yango lisusu te.’ . . . Na Italie, Lingomba ya Katolike ezali lisusu na bomoko te. . . . Na Allemagne, bato oyo balingi ete bákanga bisika oyo basi bakendaka kozwa mateya mpe malako mpo na ndenge ya kolongola zemi mpe baoyo baboyi likanisi yango bazali koyokana te; likambo yango ezali se kokabola pápa na bato oyo balingaka te ete bakonzi ya mangomba bándimisaka bato makambo na makasi. Na [Pays-Bas], bato bazali koloba polele ete esengeli kotika moto na moto asala oyo alingi na makambo ya kosangisa nzoto, mpe lisusu bazali kosɛnga na bakonzi ete bápesa minganga ndingisa ya kosukisa bomoi ya moto ya maladi oyo emonani ete akobika lisusu te. Yango etindi bato báloba ete makambo yango ezali kosalema bongo mpamba te boklisto esili kokufa na ekólo yango.”

Ezali se ndenge moko na bamboka mosusu. Na 1999, George Carey, episkɔpɔ-mokonzi ya Cantorbéry, alobaki ete Lingomba ya Angleterre etikali “lisusu na bomoi molai te.” Na lisolo moko oyo ezalaki na motó ya likambo ete: “Nsuka ya boklisto na Mpoto,” oyo ebimaki na zulunalo Le Figaro na France, bakomaki boye: “Likambo yango ezali komonana bipai nyonso. . . . Bato bazali kotya ntembe na mateya nyonso oyo etali etamboli malamu mpe bindimeli ya mangomba.”

Bato bazali komipesa lisusu na makambo ya elimo te

Na Mpoto, motángo ya bato oyo bakendaka na ndako-nzambe ezali kokita se kokita. Na France, soki tokamati Bakatolike monkama, baoyo bakendaka Misa mokolo ya lomingo bakokoka ata 10 te, mpe na Paris, kaka bato 3 to 4 kati na bango nde bakendaka Misa pɔsɔ na pɔsɔ. Ata na Grande-Bretagne, na Allemagne mpe na mikili ya Scandinavie, mitángo yango emonanaki ete ezali se ndenge moko to mpe moke lisusu koleka.

Likambo oyo ezali kotungisa mingi bakonzi ya mangomba ezali ete bato bazali komonana lisusu mpenza te mpo na kosala mosala ya sango. Ekoki naino ata mbula nkama te, kasi motángo ya basango ekiti makasi na France; liboso ezalaki na basango 14 mpo na bato 10 000, nzokande lelo oyo ezali kokoka lisusu ata sango moko te mpo na bato 10 000. Na Mpoto mobimba, etikali mingi kaka basango ya mibange, mpe motángo na bango ezali kaka kokita, ezala ata na bikólo lokola Irlande mpe Belgique. Lisusu, motángo ya bana oyo bazali kokɔta malongi ezali kokita makasi, mpe yango ezali komonisa ete ekómi mpasi mpo Lingomba ya Katolike ezwa bato oyo bakosimba yango na mikolo ekoya.

Bato bazali kotyela lisusu makambo ya elimo motema te ndenge ezalaki kala. Lelo oyo na France, kaka bato 6 na kati ya bato monkama nde bandimaka ete “solo ekoki kozwama kaka na lingomba moko,” nzokande na 1981, ezalaki bato 15 na kati ya bato monkama (15%) mpe na 1952, bato 50 na kati ya bato monkama (50 %). Bato oyo bazali kosepela lisusu na makambo ya Nzambe te bazali se kokóma mingi. Bato oyo balobaka ete bazali na lingomba te bazalaki 26 na kati ya bato monkama (26%) na 1980 mpe na 2000 bakómaki bato 42 na kati ya bato monkama.​—Les valeurs des Français​—Évolutions de 1980 à 2000.

Bizaleli ya bato ebongwani mpenza

Bizaleli ya bato mpe ekómi kobeba se kobeba. Ndenge tolobaki yango liboso, bato mingi oyo basambelaka baboyaka ete lingomba na bango etyela bango mibeko na oyo etali bizaleli malamu. Balingi koyoka ata moke te ete bakonzi ya mangomba na bango báyebisaka bango bizaleli oyo basengeli kozala na yango. Kaka bato yango oyo bandimaka makanisi ya pápa mpo na oyo etali ntomo ya bato, baboyaka kondima makanisi na ye soki apekisi makambo oyo bango basalaka. Na ndakisa, atako pápa apekisá kosalela bankisi ya monganga mpo na kokanga kobota, bato mingi ata mpe Bakatolike, balingi kotika yango te.

Bato nyonso, ezala baoyo basambelaka to baoyo basambelaka te, bakómi na momeseno ya koboya mibeko oyo batii. Bato bazali komona mabe te ntango bato mosusu bazali kosala makambo oyo Makomami Mosantu epekisi na maloba ya polele. Eleki mbula ntuku mibale, bato ya France 45 na kati ya bato monkama (45%) bazalaki koboya mpenza likambo ya kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi. Lelo oyo, bato 80 na kati ya bato monkama (80 %) bazali komona yango mabe te. Atako bato mingi bandimaka ete mwasi asengeli kozala sembo epai ya mobali na ye mpe mobali epai ya mwasi na ye, kaka bato 36 na kati ya bato monkama (36%) nde bamonaka mabe ete mwasi to mobali asangisa nzoto na moto mosusu.​—Baloma 1:26, 27; 1 Bakolinti 6:9, 10; Baebele 13:4.

Bakómi kosangisasangisa makambo ya losambo

Na mikili ya Mpoto, losambo ekómi likambo ya moto na moto, mpe moto na moto alingi kopona ye moko makambo oyo ye asengeli kondima. Bato bazali kondima mateya mosusu ya mangomba na bango, kasi bazali koboya mosusu. Bato mosusu bazali komibenga baklisto, kasi bazali kondima liteya oyo elobaka ete moto azongaka na bomoi mbala na mbala, mpe basusu bakakatanaka te kozala na mangomba mingi na mbala moko. (Mosakoli 9:5, 10; Ezekiele 18:4, 20; Matai 7:21; Baefese 4:5, 6) Buku Les valeurs des Français, emonisaki polele ete bandimi mingi lelo bakómi mpenza kotika nzela oyo lingomba na bango ezali kolakisa.

Nzokande, momeseno yango ya kosambela moto na moto na ndenge ye ekoki mpe kobimisa makama. Jean Delumeau, moto moko ya mayele na makambo ya kala ya mangomba mpe mosangani ya Institut de France, alobi ete ekoki kosalema te ete moto asambela na ndenge ye moko alingi kozanga kolanda mimeseno ya lingomba moko. “Kondima oyo esimbami na lingomba moko te ekoki kotɛlɛma ata moke te.” Mateya ya malamu ná makambo ya elimo esengeli kokende nzela moko. Kasi boyokani ya ndenge wana ekouta wapi na mokili oyo makambo ezali se kobongwana?

Biblia ezali koyebisa biso ete Nzambe nde moto atyaka mibeko mpo na oyo etali bizaleli mpe etamboli malamu, atako asɛngisaka bato na makasi te ete bátosa yango. Ebele ya bato na mokili mobimba bazali kondima ete buku yango, oyo banda kala bato bamonaka yango na valɛrɛ, ezali na mateya ya malamu mpenza mpo na bato ya lelo mpe ete ezali ‘mwinda mpo na makolo na bango mpe pole oyo engengisaka nzela na bango.’ (Nzembo 119:105, NW) Nini etindi bango bákóma komona yango bongo? Lisolo oyo elandi ekoyanola na motuna yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto