Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/4 lok. 32
  • Tozali na esengo ya kobenga yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tozali na esengo ya kobenga yo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/4 lok. 32

Tozali na esengo ya kobenga yo

ELAMBO ya Nsuka, oyo Nkolo Yesu Klisto abandisaki eleki lelo mbula soki 2 000, ezali te kaka likambo oyo eleká mpe etikalá kaka na masolo. Banda ebandeli na yango, likambo yango ebongolá bomoi ya bato mingi. Lisolo ya makambo oyo esalemaki na butu wana esimbaki mitema ya bato mingi oyo batángaki yango na Baevanzile, mpe basalaki makasi ete bákanisaka Elambo ya Nkolo na ndenge mingi.

Nyonso wana ekoki kokamwisa biso te, mpamba te Yesu Klisto ye moko atindaki bayekoli na ye básalaka yango mbala na mbala. Alobaki na bango mpenza boye: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.”​—Luka 22:19; 1 Bakolinti 11:23-25.

Kasi, mpo ekaniseli yango ezala mpenza na litomba mpo na moto, esengeli ayeba malamumalamu ndimbola na yango ndenge epesami na Liloba ya Nzambe, Biblia. Longola yango, ezali mpe na ntina ete bato báyeba oyo Biblia elobi mpo na ntango mpe ndenge ya kosala ekaniseli yango.

Batatoli ya Yehova na mokili mobimba balandaka ndenge oyo Yesu atindaki, yango wana bakoyangana na mpokwa ya mokolo ya misato, mwa 16 Aprili 2003, mpo na kokanisa liwa na ye. Na libaku yango bakotalela Makomami, bakolendisa kondima na bango mpe bakokolisa bolingo na bango mpo na Nkolo Yesu, oyo alobaki ete: “Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Batatoli bazali kobenga yo na esengo mpenza ete osangana na bango na mpokwa wana mpo yo mpe olendisa kondima na yo mpe okolisa bolingo na yo mpo na Yesu Klisto mpe mpo na Tata ya likoló, Yehova Nzambe.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto