Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 1/5 nk. 25-29
  • Tolonaki bolingo ya Yehova na mitema ya bana na biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tolonaki bolingo ya Yehova na mitema ya bana na biso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tobɔkɔlaki bana na banzela ya Yehova
  • Mokumba na biso na miso ya Yehova
  • Totyelaki bana likebi nyonso oyo ebongaki na bango
  • Libota mobimba ezalaki kokende liboso
  • Toyekolaki kokitisela Yehova mikumba na biso
  • Mikumba na kati ya ebongiseli ya Yehova
  • Lolenge ya kozala na libota oyo ezali makasi na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Baboti—Bósalisa bana na bino bálinga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Mabota minene esangani na mosala ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Bana bazali “libula oyo euti na Yehova”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 1/5 nk. 25-29

Lisolo ya bomoi

Tolonaki bolingo ya Yehova na mitema ya bana na biso

LISOLO YA WERNER MATZEN

Eleki mwa bambula, Hans, mwana na biso ya liboso akabelaki ngai Biblia moko. Akomaki maloba oyo na nkasa ya liboso: “Tata ya bolingo, tiká ete Liloba ya Yehova ekoba kotambwisa libota na biso na nzela ya bomoi. Matɔndi mingi, ngai mwana na yo ya liboso.” Moboti nyonso akoki kokanisa esengo mpe botɔndi oyo maloba yango epesaki ngai. Na ntango wana nayebaki te mikakatano nini libota na biso elingaki kokutana na yango na mikolo oyo elandaki.

NABOTAMÁ na 1924 na engumba Halstenbek oyo ezali kilomɛtrɛ 20 na Hambourg, na Allemagne, epai mama na ngai na nkɔkɔ ya mobali babɔkɔlaki ngai. Lokola nayekolaki ndenge ya kosala biloko ya mosala, na 1942 bakɔtisaki ngai na makasi na mosala ya soda na limpinga oyo babengaki Wehrmacht. Makambo namonaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ntango tozalaki kobunda na basoda ya Russie, ezali nsɔmɔ mpo na koloba yango. Nabɛlaki fièvre typhoïde kasi ntango nabikaki, bazongisaki ngai lisusu na bitumba. Na sanza ya Yanuali 1945, nazalaki na Lodz, na Pologne; kuna nazokaki mpota monene mpe bakɔtisaki ngai na lopitalo. Ntango etumba esilaki nazalaki naino na lopitalo. Na lopitalo, mpe na nsima na bolɔkɔ ya Neuengamme, nazalaki kokanisa mingi. Nazalaki komituna mituna lokola oyo: Nzambe azalaka mpenza? Soki azalaka, mpo na nini atiki nzela ete makambo ya nsɔmɔ esalemaka mingi boye?

Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1947, mwa moke nsima ya kobima na bolɔkɔ, tobalanaki na Karla. Tokolaki esika moko. Karla azalaki Mokatolike, nzokande ngai nazalaki na lingomba te. Sango oyo abalisaki biso alendisaki biso ete tosalaka ata Libondeli ya Nkolo elongo mpokwa nyonso. Totosaki ndenge asɛngaki atako toyebaki mpenza te ntina nini tozalaki kobondela.

Nsima ya mbula moko, Hans Werner abotamaki. Kaka na ntango yango, moninga na ngai ya mosala, Wilhelm Ahrens alakisaki ngai Batatoli ya Yehova. Atángisaki ngai na Biblia ete mokolo mosusu, bitumba nyonso ekosila. (Nzembo 46:⁠9) Na eleko ya ɔtɔne 1950, namipesaki na Yehova mpe nazwaki batisimo. Mbula moko na nsima, nayokaki esengo mingi ntango mwasi na ngai ya bolingo azwaki mpe batisimo!

Tobɔkɔlaki bana na banzela ya Yehova

Natángaki na Biblia ete libala ezali ebongiseli oyo Yehova asalá. (Genese 1:​26-28; 2:​22-24) Lokola nazalaki na mwasi na ngai na lopitalo mbala nyonso oyo azalaki kobota bana na biso (Hans Werner, Karl-Heinz, Michael, Gabriel mpe Thomas), etindaki ngai namipesa mobimba mpo na kozala mobali mpe tata ya malamu. Ngai na Karla tozalaki koyoka esengo mingi ntango mwana mokomoko abotamaki.

Liyangani ya Batatoli ya Yehova oyo esalemaki na 1953 na Nuremberg ezalaki likambo monene mpo na libota na biso. Mokolo ya mitano na nsima ya midi, na lisukulu moko oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Kobɔkɔla bana na kati ya ebongiseli ya mokili ya sika,” molobi alobaki likambo moko oyo tobosanaki yango te: “Kokɔtisa na mitema ya bana na biso mposa ya kozala basaleli ya Nzambe ezali libula eleki monene oyo tokoki kotikela bango.” Ngai na Karla tozalaki mpenza na mposa ya kosala yango na lisalisi ya Yehova. Kasi tolingaki kosala yango ndenge nini?

Ya liboso, tokómaki na momeseno ya kobondela libota mobimba mokolo na mokolo. Yango esalisaki bana báyeba ntina ya kobondela. Mwana nyonso ayekolaki banda bomwana mpenza ete tozalaki ntango nyonso kobondela liboso ya kolya. Ata ntango bazalaki naino babebe, soki kaka bamoni bibɛrɔ bazalaki kokitisa mito na bango mpe kozinga mwa mabɔkɔ na bango. Mokolo mosusu, babengisaki biso na libala ya ndeko moko ya mwasi na ngai; bazalaki Batatoli te. Na nsima ya libala, baboti ya mwasi oyo abalaki babengisaki bato epai na bango mpo na mwa bilei. Bato nyonso balingaki kobanda kolya mbala moko. Kasi mwana na biso Karl-Heinz, wana azalaki na mbula mitano, amonaki ete kosala bongo ebongi te. Alobaki boye: “Tóbondela naino.” Bato nyonso batalaki ye, nsima batalaki biso, mpe na nsuka batalaki moto oyo abengisaki biso nyonso. Mpo na koyokisa moto nsɔni te, nasɛngaki ete napesa Nzambe matɔndi mpo na bilei, mpe moto oyo abengisaki biso andimaki.

Likambo yango etindaki ngai nakanisa maloba ya Yesu oyo: “Longwá na minɔkɔ ya bana mpe baoyo bakonungaka mabɛlɛ, obimisi lisanzoli na malamu nyonso.” (Matai 21:16) Toyebi malamu ete kosala ntango nyonso mabondeli oyo euti na motema esalisaki bana bámona ete Yehova azali Tata na bango ya bolingo.

Mokumba na biso na miso ya Yehova

Koteya bana bálinga Nzambe esɛngaka mpe kotánga mpe koyekola Liloba na ye mbala na mbala. Yango wana, tozalaki kosala boyekoli ya libota pɔsɔ na pɔsɔ, mingimingi mokolo ya yambo na mpokwa. Lokola mwana ya nsuka abotamaki mbula libwa nsima ya oyo ya liboso, bana bazalaki na bamposa ndenge moko te; yango wana tokokaki te kosalela mateya ya ndenge moko mpo na bango nyonso.

Na ndakisa, mpo na bana oyo ya mike mpenza, tozalaki koteya bango kaka makambo ya pɛtɛɛ. Karla azalaki koyekola kaka vɛrsɛ moko ya Biblia na bango, to azalaki kosalela bililingi ya mikanda oyo elimbolaka Biblia. Nakanisaka na esengo ntango oyo bana ya mike bazalaki kolamwisa ngai soki bayei komata na mbeto mpo na kolakisa biso bililingi oyo bazalaki kolinga mingi na buku Mokili ya sika.a

Karla akómaki na mayele ya koteya bana na motema molai mpenza ntina oyo tosengeli biso nyonso kolinga Yehova. Moto akoki kokanisa ete likambo yango ezali pɛtɛɛ mpe ezali na mindɔndɔ te, nzokande, esɛngaki ete ngai na Karla tósala milende, ezala mpe na mayoki ntango nyonso. Atako bongo, tolɛmbaki te. Tozalaki na mposa ya kosimba mitema ya bana na biso liboso ete bato mosusu oyo bayebi Yehova te bábongola makanisi na bango. Mpo na yango, mwana nyonso asengelaki kozala wana na boyekoli ya libota soki kaka akómi koyeba kofanda.

Ngai na Karla toyebaki ntina ya kopesa bana ndakisa ya malamu na makambo etali losambo. Na yango, ezala ntango tozali kolya, kosala bilanga to kotambola, tozalaki kolendisa mwana na mwana azala na boyokani ya malamu na Yehova. (Deteronome 6:​6, 7) Kobanda na ntango oyo bazalaki naino bana mike mpenza, mwana nyonso azalaki na Biblia na ye. Lisusu, ntango kaka tozalaki kozwa bazulunalo, nazalaki kokoma nkombo ya mwana mokomoko na zulunalo na ye. Yango esalisaki bana báyeba mikanda na bango moko. Tozwaki mpe likanisi ya kopesa bana mikumba ya kotánga masolo mosusu ya Lamuká! Mokolo ya lomingo, nsima ya kolya na midi bazalaki kolimbwela biso makambo oyo batángaki.

Totyelaki bana likebi nyonso oyo ebongaki na bango

Ya solo, ntango mosusu makambo ezalaki kosalema ndenge oyo tolingaki te. Ntango bana bazalaki kokola, tomonaki ete esengelaki tóyeba naino makambo nini ezali na mitema na bango mpo tokoka kolona bolingo na mitema na bango. Yango ezalaki kosɛnga tóyokaka bango. Ezalaki mpe na makambo mosusu oyo ezalaki kosepelisa bana te. Yango wana, mpo na kosilisa mikakatano mosusu, ngai na Karla tozalaki kosolola na bango. Tozwaki ebongiseli ya kolekisaka miniti ntuku misato na nsima ya boyekoli ya libota mpo ete moto na moto amonisa polele makambo oyo azali na yango na motema.

Na ndakisa, bana na biso ya nsuka Thomas na Gabriele, bamonaki lokola ete biso tozalaki kolinga yaya na bango mingi koleka bana mosusu. Mokolo mosusu, nsima ya boyekoli, babimisaki makanisi na bango polele mpe balobaki boye: “Papa, biso tomonaka ete yo na Mama botikaka kaka Hans Werner asala nyonso oyo alingi.” Ntango nayokaki yango, nakamwaki mingi. Kasi, nsima ya kotalela malamumalamu likambo balobaki, Karla na ngai tomonaki ete bana balobaki solo. Na yango, tosalaki makasi mpo na kosalela bana nyonso makambo ndenge moko.

Na bantango mosusu, nazalaki kokende noki na kopesa bana etumbu to nazalaki kosala yango na bosembo te. Ntango likambo ya bongo ezalaki kosalema, esengelaki biso baboti toyeba kosɛnga bana bolimbisi. Mpe na nsima, tozalaki kosala libondeli epai ya Yehova. Ezalaki na ntina mingi ete bana báyeba ete baboti na bango bakakatanaka te mpo na kosɛnga bolimbisi epai ya Yehova mpe epai na bango. Yango wana, tozalaki koyokana malamu lokola baninga na bana na biso. Mbala mingi bazalaki koyebisa biso ete “Bozali baninga na biso ya motema.” Ezalaki kopesa biso esengo mingi.

Kosala makambo libota mobimba elendisaka bomoko. Mpo na yango, moto nyonso azalaki na mikumba na ye na misala ya ndako. Hans Werner azalaki na mokumba ya kokende mbala moko na pɔsɔ kosomba biloko ya kolya na magazini; elingi koloba ete tozalaki kopesa ye mbongo mpe liste ya biloko ya kosomba. Pɔsɔ mosusu, topesaki ye eloko moko te. Atunaki mama na ye mpo na nini, mpe mama na ye ayebisaki ye ete tozwaki naino mbongo te. Bana babandaki mbala moko kolobaloba na nse, mpe bango nyonso bakamataki bakɛsi na bango esika babombaka mbongo mpe babimisaki mbongo nyonso mpe batyaki yango na mesa. Bango nyonso balobaki ete: “Mama, sikoyo tokoki kokende kosomba biloko!” Bana bakómaki koyeba kopesa mabɔkɔ soki likambo ya mbalakaka ebimi, mpe yango esalaki ete tokóma lisusu na bomoko makasi.

Ntango bapusanaki na mbula, bana mibali bakómaki kosepela na bilenge ya basi. Na ndakisa, Thomas akómaki kosepela na ndeko mwasi moko Motatoli oyo azalaki na mbula 16. Nayebisaki ye ete soki alingi mpenza mwana mwasi yango, esengeli komibongisa mpo na kobala ye mpe kondima mokumba ya kozala na mwasi mpe na bana. Thomas amonaki ete akokaki naino mpo na libala te, mpamba te azalaki kaka na mbula 18.

Libota mobimba ezalaki kokende liboso

Mwana nyonso akomisaki nkombo na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi ntango azalaki naino moke. Tozalaki kolanda malamu badevware na bango mpe yango ezalaki kolendisa biso mpamba te, tozalaki komona ndenge bazalaki kolinga Yehova na motema mobimba. Bakɛngɛli ya zongazonga mpe ya etúká oyo bazalaki mbala mosusu kolala na ndako na biso, bazalaki kobɛtela biso masolo ya bomoi na bango to bazalaki kotánga makambo ya Biblia. Bandeko mibali yango na basi na bango basalisaki mpo na kolona mposa ya mosala ya ntango nyonso na libota na biso.

Tozalaki kozela mayangani na mposa makasi. Mayangani yango ezalaki na ntina mingi mpo na kobakisa milende na biso ya kolona epai na bana na biso mposa ya kozala basaleli ya Nzambe. Bana bazalaki koyoka esengo ya kolata bamakarɔ liboso ya kokende na liyangani. Tosepelaki mingi ntango Hans Werner abatisamaki ntango akokisaki mbula zomi. Bato mosusu bamonaki ete azalaki naino mwana mpo amipesa na Yehova; kasi ntango akómaki na mbula 50, ayebisaki ngai ete azalaka na botɔndi mingi na ndenge akokisaki mbula 40 na kosalela Yehova.

Tomonisaki na bana ete kozala na boyokani na Yehova ezali eloko oyo eleki ntina, kasi totindaki bango na makasi te ete bámipesa na ye. Atako bongo, tozalaki kosepela mingi ntango bana nyonso bakolaki na elimo mpe bazwaki batisimo, moto na moto na ntango na ye.

Toyekolaki kokitisela Yehova mikumba na biso

Toyokaki nsuka na esengo ntango Hans Werner azwaki diplome na kelasi ya mbala ya 51 na Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia mpe batindaki ye lokola misionɛrɛ na ekólo Espagne. Mwana nyonso asalaki mosala ya ntango nyonso, yango esepelisaki biso mingi. Ezalaki na ntango wana nde Hans Werner apesaki ngai Biblia oyo nalobelaki na ebandeli ya lisolo oyo. Tokanisaki ete esengo ya libota mobimba etondaki mpenza.

Nsima, tomonaki ete tosengeli kokangama makasi koleka na Yehova. Mpo na nini? Mpamba te tomonaki ete lokola bana bakolaki, bamosusu bazalaki kokutana na mikakatano oyo ezalaki komeka kondima na bango. Na ndakisa, mwana na biso ya mwasi Gabriele akutanaki na minyoko mingi. Na 1976, Lothar, ndeko mobali moko, abalaki ye. Lothar akómaki kobɛla mwa moke nsima ya libala. Lokola maladi ezalaki se kolɛmbisa ye, Gabriele abatelaki ye tii liwa na ye. Komona ndenge moto moko na kati ya libota oyo azalaki nzoto kolɔngɔnɔ abandi kobɛla mpe na nsima akufi etindaki biso tóbosana te ete tozalaka na mposa ya lisalisi ya Yehova.​—⁠Yisaya 33:⁠2.

Mikumba na kati ya ebongiseli ya Yehova

Ntango naponamaki mosaleli ya lisangá (lelo oyo mokɛngɛli-mokambi) na 1955, namonaki ete nakokaki naino te mpo na mokumba yango. Misala ezalaki mingi, mpe esɛngaki ntango mosusu ete nalamukaka na ngonga ya minei mpo na kosala makambo mosusu etali mokumba na ngai. Mwasi na ngai mpe bana na ngai bazalaki kolendisa ngai mingi, bazalaki kosala makasi ete eloko moko te etungisa ngai ntango nazali naino na makambo mosusu ya kosala na mpokwa.

Atako bongo, tozalaki kolekisa ntango mingi biso nyonso na libota. Mbala mosusu patrɔ na ngai azalaki kotikela ngai motuka na ye mpo tokende kotambola mokolo mobimba na libota na ngai. Bana bazalaki kosepela mingi na ntango tozalaki koyekola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na kati ya zamba. Tozalaki mpe kotambola na zamba elongo, wana mbala mosusu tozalaki koyemba nzembo mpe nazalaki kobɛta harmonica.

Na 1978, naponamaki lokola mokɛngɛli ya zongazonga mosungi. Nabangaki mpe nabondelaki ete: “Yehova, namoni lokola nakokoka kosala yango te. Kasi soki olingi ete nameka, nakosala nyonso oyo nakoki kosala.” Mbula mibale na nsima, ntango nakokisaki mbula 54, natikaki mombongo oyo nazalaki kosala epai ya mwana na biso ya mobali ya nsuka Thomas.

Bana na biso nyonso bakómaki mikolo, yango wana ngai na Karla tokokaki kosalela Yehova mingi koleka. Kaka na mbula wana, naponamaki mokɛngɛli ya zongazonga na ndambo ya engumba Hambourg mpe na Schleswig-Holstein mobimba. Toyebaki mikakatano ya baboti mpe ya bana mpamba te toyebaki mosala ya kobɔkola bana. Bandeko mingi bazalaki kobenga biso baboti na bango ya zongazonga.

Na ntango oyo tokokisaki mbula zomi elongo na mosala ya zongazonga, basalaki Karla lipaso. Kaka na mbula yango, minganga bamonaki ete nazali na kanser na bɔɔngɔ. Natikaki mosala na ngai ya mokɛngɛli ya zongazonga mpe basalaki ngai lipaso na motó. Nakokaki lisusu kozongela mosala ya mokɛngɛli ya zongazonga mosungi kaka nsima ya mbula misato. Ngai na Karla tokómi sikoyo na bambula koleka 70 mpe totiká mosala ya zongazonga. Yehova asalisaki ngai namona ete ezali na ntina te ya kokangama na mokumba oyo ozali lisusu na makoki ya kosala yango te.

Soki ngai na Karla tokanisi makambo nyonso oyo eleká, tozali na botɔndi epai ya Yehova mpo na ndenge asalisaki biso tólona na mitema ya bana na biso bolingo mpo na mateya ya solo. (Masese 22:⁠6) Yehova atambwisaki biso mpe abongisaki biso, asalisaki biso tókokisa mikumba na biso. Atako tozali mibange mpe nzoto elɛmbi, bolingo na biso mpo na Yehova ezali se makasi ndenge ezalaki na ebandeli.​—⁠Baloma 12:​10, 11.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova, kasi esilá.

[Elilingi na lokasa 26]

Libota mobimba, tozali kotambola pembeni ya Ebale Elbe na Hambourg, na 1965

[Elilingi na lokasa 28]

Ndambo ya libota na biso na liyangani ya mikili mingi na Berlin na 1998

[Elilingi na lokasa 29]

Na mwasi na ngai Karla

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto