Batelá lisosoli na yo
SOKI bayebisi yo omata na mpɛpɔ oyo ordinatɛrɛ oyo basalelaka mpo na kotambwisa yango ezali malamu te, okondima komata? Te, okobanga. Kanisá sikoyo ete moto moko abebisi biloko oyo etambwisaka mpɛpɔ to abongolibongoli yango na nko, ekozala boni? Tokoki koloba na maloba ya elilingi ete ezali likambo yango mpenza nde moto moko azali koluka kosala na lisosoli na yo. Mposa na ye mpenza ezali ete abebisa eloko oyo etambwisaka yo na makambo etali bizaleli malamu. Mokano na ye ezali ete abebisa boyokani na yo na Nzambe—Yobo 2:2-5; Yoane 8:44.
Moto yango ya motema mabe ezali nani? Na kati ya Biblia, babengi ye “nyoka ya ebandeli, oyo babengaka ye Motɛmɛli mpe Satana, oyo abungisaka mokili mobimba efandami nzela .” (Emoniseli 12:9, NW) Abandaki mosala na ye na elanga ya Edene na ntango oyo asalelaki makanisi oyo emonanaki lokola ya solo mpo na kokosa Eva mpe kopusa ye aboya kolanda makambo oyo ye ayebaki ete ezali mpenza solo mpe atombokela Nzambe. (Genese 3:1-6, 16-19) Kobanda wana, Satana azali kotambwisa masangani oyo bato basali, masangani oyo ezali mpo na kobebisa bato, mpo bápusa bato ebele ete bákóma banguna ya Nzambe. Na masangani yango nyonso, oyo eleki mpenza kobebisa bato ezali bongo losambo ya lokuta.—2 Bakolinti 11:14, 15.
Losambo ya lokuta ebebisaka lisosoli ya bato
Soki otángi Biblia na mokanda ya Emoniseli, okomona ndenge balobeli losambo ya lokuta lokola mwasi ya ndumba oyo bazali kobenga ye Babilone Monene. Mateya na ye ebebisi bizaleli ya bato mingi mpe epusi bato mingi na koyina bato mosusu oyo bazali na bindimeli oyo ekeseni na oyo ya bango mpe kobimisela bato yango mobulu. Kutu, mokanda ya Emoniseli elobi ete Nzambe atii ngambo ya makila libosoliboso likoló ya losambo ya lokuta mpamba te esopi makila “na bango nyonso babomamaki na mokili”; na kati ya bato yango oyo babomamaki ezali mpe na basambeli mpenza ya Nzambe.—Emoniseli 17:1-6; 18:3, 24.
Yesu akebisaki bayekoli na ye mpo na oyo etali ndenge oyo losambo ya lokuta ekobebisa bizaleli malamu ya bayekoli mosusu, alobaki ete: “Ntango ekoya wana moto moko akoboma bino, akokanisa ete asaleli Nzambe mosala mosantu.” Na oyo etali bizaleli malamu, bato wana bazipami mpenza miso! Yesu alobaki lisusu ete: “Bayebi Tata te soki ngai te.” (Yoane 16:2, 3) Nsima ya koloba maloba wana, eumelaki te, bakonzi mosusu ya mangomba batindaki ete báboma Yesu, bandimisaki lisosoli na bango ete likambo oyo basalaki ezalaki mpenza mabe te. (Yoane 11:47-50) Nzokande, Yesu alobaki ete bayekoli na ye ya solo bakoyebana mpo na bolingo oyo bakomonisana. Kasi bolingo na bango esuki kaka kati na bango te, balingaka ata mpe banguna na bango.—Matai 5:44-48; Yoane 13:35.
Ndenge mosusu oyo losambo ya lokuta ebebisi lisosoli ya bato ezali ya kondima mpe kolendisa bizaleli ya mabe mpo kaka bato mingi basepelaka na yango; nzokande bayebi ete ezali bizaleli malamu te. Ntoma Paulo asakolaki likambo yango, alobaki boye: “Ntango ekoya wana ekoyokaka bato mateya na sembo te kasi, mpo na konyomitisa matoi na bango, bakoyanganisa balakisi kobila mposa na bango mpenza.”—2 Timote 4:3.
Lelo oyo, bakonzi ya mangomba bazali koteya kaka makambo oyo bato balingi koyoka, na ndakisa bazali koloba ete kosangisa nzoto na moto oyo azali mwasi to mobali na yo te ezali mabe te na miso ya Nzambe. Bamosusu kutu bazali kokanga miso na makambo ya kosangisa nzoto mibali na mibali mpe basi na basi. Kutu, bakonzi mosusu ya mangomba bango moko mpe basangisaka nzoto mibali na mibali. Lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo The Times ya Angleterre elobaki ete “bakonzi zomi na misato oyo bayebani polele ete basangisaka nzoto na mibali” baponamaki na kati ya lisangani ya bakambi ya Lingomba ya Angleterre. Soki bakonzi ya mangomba batiki kolanda bizaleli malamu oyo Biblia eteyaka mpe mangomba na bango ezali kosala bango eloko moko te, bandimi na bango bakolanda mitinda nini? Yango wana tokoki kokamwa te soki tomoni bamilio ya bato bazali mpenza na kati ya mobulungano.
Eleki malamu kotambwisama na mateya ya solo oyo etali bizaleli malamu mpe makambo ya elimo; mateya yango oyo ezali na kati ya Biblia ezali lokola bilembo oyo elakisaka nzela! (Nzembo 43:3; Yoane 17:17) Na ndakisa, Biblia ezali koteya ete bato oyo basalaka pite mpe ekobo “bakosangola Bokonzi ya Nzambe te.” (1 Bakolinti 6:9, 10) Ezali koyebisa biso ete mibali mpe basi oyo babongoli “lolenge oyo nzoto na bango esengelaki kosalelama mpo na kosalela yango na ndenge ebongi te . . . bazali kosala makambo ya nsɔni” na miso ya Nzambe. (Baloma 1:26, 27, 32, NW) Mateya wana ya solo na ntina etali kokesenisa malamu na mabe euti te epai ya bato ya kozanga kokoka; ezali mitinda oyo epemamaki na Nzambe, mpe tii lelo naino abongolá yango ata moke te. (Bagalatia 1:8; 2 Timote 3:16) Kasi, Satana asalaka makambo mosusu mpo na kobebisa lisosoli ya bato.
Yebaká kopona masano
Kotinda moto na makasi ete asala likambo moko ya mabe ezali malamu te, kasi komema moto yango alinga kosala likambo oyo ezali malamu te, ezali mabe koleka. Yango nde ezali mokano ya Satana, “mokóló na mokili.” Mpo na kokɔtisa makanisi na ye ya mabe na kati ya bɔɔngɔ mpe ya mitema ya bazoba to epai ya bato oyo bayebi mayele na ye te—mingimingi bilenge nde bazalaka na likama—asalelaka biloko lokola mikanda ya mabe, bafilme, miziki, masano ya ordinatɛrɛ, mpe Internet na bisika oyo elakisaka bolumbu ya basi na mibali.—Yoane 14:30; Baefese 2:2.
Lapolo moko oyo ebimaki na zulunalo Pediatrics eyebisi ete: “[Na États-Unis,] bilenge batalaka mbula na mbula na televizyo makambo 10 000 ya mobulu, mpe baemisyo ya bana mike nde eleki mpenza mobulu.” Lapolo yango eyebisi mpe ete “mbula na mbula, bilenge batalaka makambo soki 15 000 oyo ezali kolakisa to mpe kolobela, ezala na ndenge ya polele to na ndenge ya polele te, makambo etali kosangisa nzoto.” Lapolo yango emonisaki mpe ete ata baemisyo ya televizyo oyo elekaka na bangonga oyo bato mingi batalaka televizyo na butu “elakisaka na ngonga mokomoko makambo 8 ya kosangisa nzoto, motángo yango ezali mbala minei koleka motángo ya mobu 1976.” Lapolo yango emonisi mpe ete “bato mingi bakómi kosalela elobeli moko ya nsɔni.” Nzokande, ezala Biblia to mpe mikanda ebele ya siansi ezali kokebisa ete komesana kotala makambo ya ndenge wana mpe komesana na elobeli ya ndenge wana ebebisaka mpenza bato. Yango wana, soki olingi kosepelisa Nzambe mpe kozwa litomba, landá toli ya Masese 4:23: “Batelá motema na yo na mpiko nyonso mpɔ ete makambo na bomoi ikoutaka wana.”—Yisaya 48:17.
Miziki mingi oyo bato ebele balingaka ebebisaka mpe lisosoli. Lapolo moko oyo ebimaki na zulunalo The Sunday Mail ya Australie, elobi ete alanga-nzembo moko oyo banzembo na ye etɛkamaka mingi na mikili mingi ya Mpoto asalaka “makasi mpo ete [banzembo na ye] ezala mpenza ya nsɔni.” Lisolo yango eyebisi ete “banzembo na ye ekumisaka bangi, kosangisa nzoto bandeko na bandeko, kobebisa basi”; mpe “ayembaka ete abomi mwasi na ye mpe abwaki ye na mai.” Maloba mosusu ya banzembo na ye oyo batángaki ezali mpenza ya nsɔni, tokoki kutu kokoma yango awa te. Atako bongo, azwaki mbano moko ya lokumu mpo na miziki na ye. Okolinga kolona na kati ya bɔɔngɔ na yo mpe motema na yo makanisi ya mabe lokola oyo touti kolobela, ata soki miziki ezali komonisa yango lokola ete ezali malamu? Tozali kolikya ete okolinga kosala bongo te, mpamba te baoyo bazali kosala bongo bazali kobebisa lisosoli na bango mpe nsukansuka bazali kokómisa ‘mitema na bango mabe,’ bazali komikómisa banguna ya Nzambe.—Baebele 3:12; Matai 12:33-35.
Yango wana, zalá na mayele ntango ozali kopona lisano nini olingi kosala. Biblia elendisi biso ete: “Bókanisa bobele oyo ezali malamu mpe wana bakoki kokumisa; makambo ya solo, ya lokumu, ya bosembo, ya kokoka, ya bolingo mpe ya malonga.”—Bafilipi 4:8, Boyokani ya Sika.
Baninga bakoki kobongisa to kobebisa lisosoli na yo
Ntango Neil na Franz bazalaki bana mike, bazalaki na baninga oyo bazalaki baklisto ya solo.a Kasi na nsima, Neil alobi ete: “Nakómaki kotambola na baninga mabe.” Nsukansuka, asalaki mobulu mpe akɔtaki bolɔkɔ; likambo yango epesaki ye mawa mpenza. Ezalaki mpe ndenge moko mpo na Franz. Alobi ete: “Nazalaki kokanisa ete ata soki nazali esika moko na bilenge ya mokili, ekosala ngai eloko te. Kasi, lokola Bagalatia 6:7 elobi yango, ‘Nzambe akokosama te. Soko moto akokona nini, akobuka bobele yango.’ Zoba liboso mayele nsima, nayaki komona ete nakanisaki malamu te, kasi Yehova nde alobaki solo. Mpo na mabe oyo nasalaki, bakateli ngai etumbu ya kofanda na bolɔkɔ tii liwa na ngai.”
Kokóma kosala mobulu lokola Neil na Franz, ezali likambo oyo eyaka mbala moko te; na ebandeli bazalaki kokanisa te ete ekosukela bango ndenge wana. Likambo yango eyaka naino mokemoke, mingimingi ebandaka na kotambola na baninga mabe. (1 Bakolinti 15:33) Nsima na yango, okomona moto akómi komela bangi to akómi kolangwa masanga. Yango wana, balobaka kutu ete lisosoli ya moto ezali “eteni ya bomoto [na ye] oyo elimwaka na kati ya masanga ndenge mungwa elimwaka na kati ya nzungu.” Nsima na yango, mpo moto asala mobulu to akwea na pite ezalaka lisusu likambo ya mpasi te.
Bongo, mpo na nini okolinga kobanda kotambola na baninga ya mabe? Nzokande, ezali mpenza malamu kotambola na bato ya mayele oyo balingaka mpenza Nzambe. Bakosalisa yo okembisa lisosoli na yo mpo ete etambwisa yo na ndenge ya malamu, mpe mikakatano mingi ekokómela yo te. (Masese 13:20) Atako Neil na Franz bazali naino na bolɔkɔ, bamoni sikoyo ete lisosoli na bango ezali mpenza likabo ya Nzambe oyo esengeli koteyama na ndenge ebongi, oyo tosengeli mpe kolinga mingi. Lisusu, bazali kosala makasi mpo bákóma na boyokani malamu elongo na Yehova, Nzambe na bango. Zalá na mayele, mpe tiká ete mabunga oyo basalaki eteya yo.—Masese 22:3.
Batelá lisosoli na yo
Tokomonisa ete tozali kobatela lisosoli na biso soki tolingi Nzambe mpe tozali na kondima epai na ye, soki mpe tozali kobanga ye na ndenge esengeli. (Masese 8:13; 1 Yoane 5:3) Biblia ezali komonisa ete soki lisosoli ya moto ezangi bizaleli yango, mbala mingi ekoyeba te kokesenisa bizaleli ya malamu na oyo ya mabe. Na ndakisa, Nzembo 14:1 elobeli baoyo balobaka na kati ya motema na bango ete: “[Yehova] azali te.” Ndenge nini bizaleli na bango emonisaka ete bazali na kondima yango te? Vɛrsɛ yango elobi lisusu boye: “Bamibebisi, bazali kosala makambo mabe.”
Bato oyo bazangi kondima ya solosolo epai ya Nzambe bazalaka mpe na elikya ata moke te ete bomoi ekozala malamu na mikolo oyo ezali koya. Yango wana, basalaka nyonso kaka mpo na bomoi ya lelo, bamipesaka na bamposa ya nzoto. Bango balobaka boye: “Tolyaka mpe tomɛlaka zambi tokokufa lobi.” (1 Bakolinti 15:32) Nzokande, bato oyo bazali kozela bomoi ya seko batikaka nzela te na bisengo ya mokili oyo, bisengo oyo ezali kaka mpo na ntango mokuse, ete epɛngwisa bango. Ndenge moko na ordinatɛrɛ oyo basalelaka mpo na kotambwisa mpɛpɔ, ordinatɛrɛ oyo ezali na makambo ya sikisiki, lisosoli na bango oyo eteyami malamu esalisaka bango ete bátikala kaka na nzela oyo ezali kosɛnga kotosa Nzambe na bosembo nyonso.—Bafilipi 3:8.
Mpo ete lisosoli na yo ezalaka ntango nyonso makasi mpe sikisiki, esengeli ete Liloba ya Nzambe etambwisaka yango ntango nyonso. Na elobeli moko ya kitoko, Biblia ezali koyebisa biso ete komona nzela yango ya kotambola ezali mpasi te; totángi boye: “Matoi na yo makoyoka liloba nsima na yo ete, Oyo ezali nzela, tambolá na yango, wana ekobongwana yo na epai ya [lobɔkɔ ya] mobali to na epai ya [lobɔkɔ ya] mwasi.” (Yisaya 30:21) Mpo na yango, bómbaka ntango ya kotánga Biblia mikolo nyonso. Yango ekopesa yo makasi mpe ekolendisa yo ntango ozali kosala makasi mpo osala oyo ezali sembo to mpe ntango omoni ete makambo oyo ekoki kobotela yo mitungisi elingi kokómela yo. Ndimá mpenza ete Yehova akotambwisa yo na makanisi mpe na elimo soki otii motema na yo mobimba epai na ye. Ɛɛ, mekolá mokomi ya Nzembo oyo akomaki ete: “Natii [Yehova] liboso na ngai libela; azali lobɔkɔ na ngai ya mobali, bongo nakokwea te.”—Nzembo 16:8; 55:22.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu.
[Bililingi na lokasa 5]
Losambo ya lokuta, oyo Biblia ebengi yango “Babilone Monene,” elɛmbisi lisosoli ya bato mingi
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Sango azali kobenisa basoda: Fɔtɔ ya U.S. Army
[Bililingi na lokasa 6]
Soki ozali kotala makambo ya mobulu mpe ya pite, lisosoli na yo ekobeba
[Elilingi na lokasa 7]
Soki ozali kotambwisama mikolo nyonso na Liloba ya Nzambe, lisosoli na yo ekobatelama