Osengeli kozala na lisosoli oyo eteyami
Motambwisi-mpɛpo moko ya kompanyi Air Nouvelle-Zélande mpe bato oyo basalaki mobembo na mpɛpɔ yango oyo ekendeki na etúká moko oyo ezalaka kaka mabanga ya mai (Antarctique), bakanisaki ete bakosala mobembo moko kitoko oyo bakobosana yango soki moke te. Ntango mpɛpɔ DC-10 yango ekómaki pene na etúká yango, motambwisi-mpɛpɔ akitisaki mpɛpo mwa mingi na nse mpenza mpo bámona bisika yango malamu; bato nyonso oyo bazalaki na kati ya mpɛpɔ bamibongisaki mpo na kokanga bafɔtɔ, bazalaki mpe na esengo ya komona bisika wana ya kitoko.
MOTAMBWISI ya mpɛpɔ yango aumelá mbula 15 na mosala wana, asalá ngonga 11 000 ya kotambwisa mpɛpɔ. Liboso ete abuta na mpɛpɔ yango, akɔtisaki na likebi mpenza na kati ya ordinatɛrɛ oyo ezalaka na kati ya mpɛpɔ plan nyonso ya mobembo, kasi ayebaki te ete makambo oyo ezalaki na plan yango oyo bapesaki ye ezalaki te oyo esengelaki. Ntango DC-10 yango elekaki na katikati ya lipata moko oyo ekokaki ata mɛtrɛ 600 te na mabele, DC-10 yango etutaki na mopanzi ya Ngomba Erebus, bongo bato 257 nyonso oyo bazalaki na kati ya mpɛpɔ bakufaki.
Lelo oyo mpɛpɔ etambolaka na plan oyo ezali na ordinatɛrɛ mpo na koyeba nzela nini esengeli kolanda kuna na likoló, ndenge moko mpe Nzambe apesá moto nyonso lisosoli mpo etambwisaka ye na bomoi na ye. Likama ya mpɛpɔ oyo touti kolobela ekoki koteya biso mwa makambo mingi mpo na oyo etali lisosoli na biso. Na ndakisa, mpɛpɔ ekokóma malamu esika ezali kokende soki bisaleli nyonso oyo etambwisaka yango ezali kosala malamu mpe soki bilembo oyo elakisaka nzela eyebani polelepolele; ndenge moko mpe na biso, tokozala malamu na elimo, na bizaleli, mpe na nzoto soki tozali koyokela lisosoli na biso oyo etambwisami na mitinda ebongi mpo na oyo etali bizaleli malamu, mitinda oyo ezali lokola bilembo oyo elakisaka nzela.
Kasi, na mokili oyo tozali lelo, bilembo yango oyo elakisaka nzela ezali kolimwa nokinoki to mpe bato bazali kotalela yango te. Molakisi moko na États-Unis alobaki ete: “Lelo oyo na États-Unis, okozanga te koyoka moto azali koloba ete mwana-kelasi Songolo ayebi kotánga te, ayebi kokoma te, mpe ayebi te kolakisa esika nini France ezali na karte ya mokili. Lisusu, mwana yango ayebi mpe te kokesenisa malamu na mabe. Longola likambo oyo ete bato mosusu bayebi kotánga te mpe bayebi mituya te, tosengeli mpe kobakisa na molɔngɔ ya mikakatano oyo ezali komonana lelo na likambo ya kobɔkɔla bana mokakatano oyo: mobulungano makasi oyo ekɔti na makambo etali bizaleli malamu.” Molakisi yango alobaki mpe ete “bilenge ya lelo bayebi mpenzampenza te eloko babengi bizaleli malamu. Tuná kaka moko na bango soki ‘mabe na malamu’ ezalaka, okokamwa; okomona ete elenge yango azangi maloba, akómi nsɔninsɔni to mpe akómi komitungisa . . . Mpe na esika ete mobulungano yango esila ntango bazali kokɔta na biteyelo ya likoló, kasi ezali nde kokóma makasi.”
Moko ya bantina oyo mobulungano ekoti bongo ezali mpo na likanisi oyo epalangani mingi ete mitinda oyo emonisaka bizaleli ya mabe to ya malamu etaleli moto na moto to mboka na mboka. Kanisá naino, elingaki kozala ndenge nini soki, na esika ete batambwisi ya mpɛpɔ bálanda bilembo ya polelepolele oyo elakisaka nzela, bazali kolanda nde bilembo oyo eumelaka mpenza te na bisika na yango mpe mbala mosusu elimwaka yango nyonso! Mbɛlɛ makama lokola oyo esalamaki na Ngomba Erebus esalamaka mikolo nyonso. Ndenge moko mpe, lokola bato basundoli mitinda ya bizaleli malamu, mitinda oyo etyamá banda kala, mokili ekómi na mpasi mingi mpe bato bazali kokufa mingi mpe mabota ezali kopanzana mpo na ekobo mpe mingi bazali kozwa sida to bamaladi mosusu oyo ezwamaka na nzela ya kosangisa nzoto.
Likanisi oyo ete bizaleli ya mabe to ya malamu etaleli moto na moto ekoki komonana lokola likanisi moko ya malamu mingi, kasi soki totali malamu, bato oyo bandimaka likanisi yango bazali lokola bato ya Ninive oyo bayebaki te kokesenisa ‘lobɔkɔ ya mobali na lobɔkɔ ya mwasi.’ Bato yango bakokani mpe na Bayisalaele oyo bapɛngwaki, baoyo bazalaki kobenga “mabe ete malamu mpe malamu ete mabe.”—Yona 4:11, NW; Yisaya 5:20.
Bongo, epai wapi tokoki kozwa mibeko mpe mitinda ya polelepolele oyo ekosalisa biso tóteya lisosoli na biso mpo etambwisaka biso malamu? Bamilio ya bato bamoni ete Biblia nde ezali mpenza kosalisa biso na likambo yango. Ezali na likambo ata moko te ya ntina oyo Biblia ezangi kolobela; na ndakisa, tokokuta kuna mateya etali bizaleli malamu na esika ya mosala mpe na makambo mosusu ya bomoi, ndenge ya kobɔkɔla bana mpe ndenge ya kosambela Nzambe. (2 Timote 3:16) Biblia emonisi, na boumeli ya ebele ya bambula oyo eleki, ete ebongi mpenza kotyelama motema. Lokola mitinda oyo ezali na kati ya Biblia mpo na oyo etali bizaleli malamu etyamaki nde na mokonzi oyo aleki bakonzi nyonso, ye Mozalisi na biso, mitinda yango ebongi mpo na bato nyonso. Yango wana, ebongi te tózangaka koyeba malamumalamu mitinda oyo etali bizaleli malamu.
Nzokande, lelo oyo, lisosoli na biso ezali kobundisama makasi koleka ndenge ezalaki kala. Nini esali bongo? Ndenge nini okoki kobatela lisosoli na yo? Mpo na koyeba yango malamu, tosengeli koyeba liboso nani nde azali kobundisa lisosoli na biso mpe mayele nini asalelaka. Tokolobela makambo yango na lisolo elandi.