Okoki kozala na kondima ya solosolo
Sarah Jayne azalaki na mbula 19 ntango minganga bayebisaki ye ete azali na maladi ya kanser. Nsima ya kosala ye lipaso, akómaki malamu mpe azalaki na elikya ete nzoto na ye ekozonga kolɔngɔnɔ. Kutu, lokola azalaki kobanga te mpo na mikolo oyo ezalaki liboso, ntango akokisaki mbula 20, akómaki na fianse mpe abandaki komilɛngɛla mpo na libala na ye. Kasi, kaka na mbula yango, kanser ezongaki, mpe minganga bayebisaki ye ete atikali lisusu na bomoi molai te, akoumela kaka mwa bapɔsɔ. Sarah Jayne akufaki na sanza ya Yuni 2000, ntango etikalaki moke akokisa mbula 21.
LIKAMBO ezalaki kokamwisa bato nyonso oyo bazalaki kokende kotala ye na lopitalo ezali motema ya kokita mpe elikya oyo azalaki na yango mpo na mikolo oyo ekoya; azalaki mpe na kondima makasi epai ya Nzambe mpe na Liloba na ye, Biblia. Atako liwa na ye ezalaki mosika te, azalaki na elikya ya lisekwa, azalaki na elikya ete akokutana lisusu na baninga na ye nyonso. (Yoane 5:28, 29) Azalaki koloba ete: “Tokomonana na mokili ya sika.”
Mpo na bato mosusu, kozala na kondima ya ndenge wana ezali komikosa. Ludovic Kennedy alobaki boye: “Bomoi nsima ya liwa ezali nini? Ezali kaka makanisi ya mpamba ete ntango kelelo ya nsuka ekobɛta bato bakolya, bakomela, bakosepela, bakobɛta miziki na elanga moko kitoko ya Edene, bakokutana mpe bakosepela na baoyo bakufá liboso na bango mpe baoyo bakolanda na nsima!” Na maloba wana, tokozongisa motuna ete: Nini ezali likanisi ya malamu? Kondima ete “nyonso esukaka kaka na bomoi oyo, yango wana ebongi tósepela na ndenge ekoki mpenza na bomoi oyo,” ndenge oyo Kennedy amonisi yango, to tosengeli nde kondima Nzambe mpe elaka ya lisekwa? Sarah Jayne aponaki kondima Nzambe mpe elaka ya lisekwa. Nini esalisaki ye akóma na kondima ya ndenge wana?
‘Koluka Nzambe mpe kozwa ye’
Mpo na kondimela moto mpe kotyela ye motema, esengeli naino koyeba ye, koyeba makanisi mpe misala na ye. Yango esɛngaka kotya mpenza motema mpe makanisi na makambo yango. Ezali mpe ndenge moko mpo na kokóma na kondima ya solosolo epai ya Nzambe. Osengeli koyeba Nzambe, koyekola bizaleli mpe bomoto na ye, koyeba ete tokoki mpenza kotyela maloba na ye nyonso motema mpe koyeba ete akokisaka bilaka na ye.—Nzembo 9:10; 145:1-21.
Bato mosusu bamonaka ete likambo ya ndenge wana ekoki kosalema te. Mpo na bango, Nzambe, soki kutu azali, amibanzabanzaka na makambo na biso te, tokoki mpe koyeba ye te. Bato oyo bakakatanaka mpo na kondima Nzambe batunaka motuna oyo: “Soki Nzambe azali mpenza, ndenge baklisto lokola Sarah Jayne bakanisaka, mpo na nini amimonisaka epai na biso bamosusu te?” Kasi, ezali mpenza solo ete Nzambe amibanzabanzaka mpo na biso te mpe tokoki koyeba ye te? Ntango ntoma Paulo asololaki na bato ya filozofi mpe bato ya mayele na Atene, alobaki na bango ete “Nzambe asalaki mokili, na biloko nyonso na kati na yango,” apesi mpe nyonso oyo esengeli mpo na ‘koluka ye mpe kozwa ye.’ Kutu, Paulo alobaki ete: “Azali mosika na moto na moto na biso te.”—Misala 17:24-27.
Kasi, ndenge nini tokoki ‘koluka Nzambe mpe kozwa ye’? Bato mosusu balukaki Nzambe mpe bamonaki ete azali mpenza kaka na kotalatala biloko oyo bazali komona na molɔ́ngɔ́. Bato mingi balobaka ete biloko yango endimisaka bango ete Mozalisi azali.a (Nzembo 19:1; Yisaya 40:26; Misala 14:16, 17) Bato yango bakanisaka lokola ntoma Paulo, ete “Makambo ya [Nzambe oyo] mazangi komonana, yango nguya na ye ya seko mpe bonzambe na ye, asili koyebisa yango polele epai ya makanisi ya bato kati na misala na ye.”—Baloma 1:20; Nzembo 104:24.
Osengeli kotánga Biblia
Kasi, mpo na kokóma na kondima ya solosolo na Mozalisi, osengeli na eloko mosusu oyo apesi biso. Eloko yango ezali Biblia, Liloba ya Nzambe oyo epemami na elimo santu; na kati na yango, Nzambe ayebisi biso mokano na ye. (2 Timote 3:16, 17) Kasi, okoki kotuna motuna ete: “Ndenge nini okoki kondima maloba ya Biblia soki okanisi makambo mabe oyo bato oyo balobaka ete balandaka Biblia basalaka?” Ya solo, mangomba ya boklisto etondi na lokuta, na makambo mabe mpe ya nsɔni. Kasi, moto nyonso oyo akanisaka malamu, akomona ete bato ya mangomba ya boklisto balobaka kaka na monɔkɔ ete balandaka Biblia.—Matai 15:8.
Biblia yango moko elobaki liboso ete bato mingi bakoloba na monɔkɔ ete basambelaka Nzambe, kasi “bakowangana ata Mokonzi oyo asili kosikola bango.” Ntoma Petelo alobaki ete: “Mpo na bango, nzela ya solo ekotukama.” (2 Petelo 2:1, 2) Yesu Klisto alobaki ete bato yango bazalaki “bato ya misala oyo ezali kobuka mibeko,” misala mabe na bango ekomonisa bango polele. (Matai 7:15-23, NW) Moto oyo aboyi kondima Biblia mpo na misala ya mangomba ya boklisto, akokani na moto oyo aboyi kozwa mokanda oyo moninga na ye ya motema atindeli ye kaka mpo moto oyo ayeli ye yango ayebani lokola moto mabe.
Kozanga Liloba ya Nzambe, tokoki kokóma na kondima ya solosolo te. Ezali kaka na nzela ya Biblia nde Nzambe azali komonisa makanisi na ye. Azali kopesa biyano na mituna oyo bato bamitunaka banda kala; na ndakisa, mpo na nini atiki nzela na mabe mpe bampasi mpe akosala nini mpo na yango. (Nzembo 119:105; Baloma 15:4) Sarah Jayne akómaki kondima ete Biblia ezali Liloba epemami na Nzambe. (1 Batesaloniki 2:13; 2 Petelo 1:19-21) Ndenge nini? Ezali kaka te mpo baboti na ye bayebisaki ye yango, kasi azwaki ntango ya kotalela na bosembo mpenza likambo mokomoko oyo ezali kolakisa ete Biblia ezali mokanda ya Nzambe. (Baloma 12:2) Na ndakisa, amonaki ete Biblia ezali na nguya ya kobongola bato oyo bazali kolanda mitinda na yango. Na lisalisi ya mikanda lokola La Bible: Parole de Dieu ou des hommes?, b atalelaki mpe makambo ebele na kati ya Biblia yango moko oyo ezali kondimisa mpenza ete epemami na Nzambe.
“Kondima euti na koyoka”
Kasi, kozala na Biblia to mpe kondima ete ezali mokanda epemami na Nzambe ekoki te. Ntoma Paulo akomaki ete “kondima euti na koyoka.” (Baloma 10:17) Eloko etongaka kondima ezali nde koyoka makambo oyo Biblia elobaka, kasi ezali kaka te kozala na yango. Okoki “koyoka” maloba ya Nzambe soki ozali kotánga mpe koyekola Liloba na ye. Ata kutu bana mike bakoki kosala yango. Paulo alobaki ete mama ya Timote na nkɔkɔ na ye ya mwasi bateyaki ye “makomi mosantu” “longwa na bomwana” na ye. Elingi koloba ete bazalaki koteya mwana makambo mpo na kozipa ye miso? Te! Basalaki Timote likambo moko te mpo na kobungisa ye nzela to kokosa ye. ‘Bamemaki ye na kondima’ makambo oyo ayokaki mpe oyo atángaki.—2 Timote 1:5; 3:14, 15, NW.
Ezali na ndenge yango nde Sarah Jayne mpe andimaki. Lokola bato ya Beloya na ekeke ya liboso, Sarah Jayne ‘ayambaki Liloba [oyo baboti na ye mpe balakisi mosusu bazalaki koteya ye] na mposa mingi.’ Na ntembe te, ntango azalaki mwana moke azalaki kondima maloba ya baboti na ye kozanga ete asosola yango malamumalamu. Na nsima, ntango akolaki, andimaki kaka bindimelá te makambo nyonso oyo bazalaki koteya ye. Azalaki ‘kotalela malamumalamu Makomami mokolo na mokolo soki makambo yango ezalaki mpenza bongo.’—Misala 17:11, NW.
Okoki kokóma na kondima ya solosolo
Yo mpe okoki kokóma na kondima ya solosolo oyo ntoma Paulo alobelaki na mokanda ya Baebele. Paulo alobaki ete kondima ya ndenge wana ezali “elikya ya solosolo ya makambo oyo moto azali kozela, kolakisama polele ya makambo oyo ezangi komonana.” (Baebele 11:1, NW) Soki ozali na kondima ya ndenge wana, okozala na ntembe ata moke te ete makambo nyonso oyo ozali kolikya, ata mpe elaka ya lisekwa oyo Nzambe apesi, ekokokisama. Okozala na kondima ete bilikya motindo wana ezali na ndanga ya solosolo, kasi ezali makanisi mpamba te. Okomona ete ata mbala moko te Yehova azangisaki kokokisa bilaka na ye. (Yosua 21:45; 23:14; Yisaya 55:10, 11; Baebele 6:18) Okomona mokili ya sika oyo Nzambe alaki lokola ete esilá kobanda. (2 Petelo 3:13) Okomona polele, na miso ya kondima, ete Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto bazali mpenza mpe ete Bokonzi ya Nzambe ezali likambo ya solo, kasi ezali ndɔtɔ mpamba te.
Mpo na kokóma na kondima ya ndenge wana, batiki yo olukaluka yo moko te. Yehova apesi biso Liloba na ye mpe lisusu, abongisi lisangá ya boklisto oyo ezali na mokumba ya kosalisa bato ya mitema sembo ete bákóma na kondima epai ya Nzambe. (Yoane 17:20; Baloma 10:14, 15) Ndimá lisalisi nyonso oyo Yehova azali kopesa na nzela ya ebongiseli yango. (Misala 8:30, 31) Mpe lokola kondima ezali mbuma ya elimo santu ya Nzambe, bondeláká ye ntango nyonso mpo elimo yango esalisa yo okóma na kondima ya solosolo.—Bagalatia 5:22.
Kobanga bato ya ntembe te, baoyo basɛkaka moto nyonso oyo azali kondima Nzambe mpe Liloba na ye. (1 Bakolinti 1:18-21; 2 Petelo 3:3, 4) Kutu, kondima ya solosolo ezali na ntina mingi mpo na kozala makasi liboso ya komekama ya ndenge wana. (Baefese 6:16) Sarah Jayne amonaki bosolo ya likambo yango, mpe azalaki ntango nyonso kolendisa bato oyo bazalaki kokende kotala ye na lopitalo ete bákolisa kondima na bango. Azalaki koloba na bango ete: “Bótika ete mateya ya solo efanda mpenza na mitema na bino.” “Bóyekolaka Liloba ya Nzambe. Bókangama na ebongiseli ya Nzambe. Bóbondelaka ntango nyonso. Bólɛmba te na mosala ya Nzambe.”—Yakobo 2:17, 26.
Ntango lifulume moko oyo azalaki kosalisa Sarah amonaki kondima oyo azalaki na yango epai ya Nzambe, alobaki ete: “Namoni mpenza ete ondimaka makambo yango.” Ntango batunaki ye soki nini ezalaki kopesa ye elikya ya ndenge wana atako azalaki na mikakatano, alobaki ete: “Ezali kondima epai ya Yehova. Azali moninga na ngai ya solosolo, mpe nalingaka ye mingi.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá mokanda Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 6]
Mama ya Timote na nkɔkɔ na ye ya mwasi bateyaki ye “makomi mosantu” “longwa na bomwana”
[Elilingi na lokasa 6]
Bato ya Beloya bakumisamaki mpamba te bazalaki kotánga Makomami mokolo na mokolo
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Euti na “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi,” oyo esalemaki na 1914
[Bililingi na lokasa 7]
Koyoka mpe kotosa Biblia nde etongaka kondima, kasi ezali kaka te kozala na yango
[Elilingi na lokasa 7]
“Tokomonana na mokili ya sika ya Nzambe”