Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/10 nk. 3-4
  • Kondima ya solosolo ekoki lisusu kozala na moi ya lelo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kondima ya solosolo ekoki lisusu kozala na moi ya lelo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kondima ya solosolo
  • Kondima ezali lisusu te
  • Monisá kondima na bilaka ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • “Bakiselá biso kondima”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Ondimaka mpenza nsango malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Kondima—Ezaleli oyo epesaka makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/10 nk. 3-4

Kondima ya solosolo ekoki lisusu kozala na moi ya lelo?

“Kondima ezali kotyela ngɔlu ya Nzambe elikya makasi mpe ya solosolo; ezalaka likambo ya kotya ntembe te mpe ya solo na boye ete, ye oyo azali na yango, akoki kondima, ata mbala nkóto, kokufa mpo na yango.”​—MARTIN LUTHER, 1522.

“Tokoki mpenza koloba ete tokómi bato bazangi kondima; kondima mpe misala ya boklisto ekómi mpenza kolimwa.”​—LUDOVIC KENNEDY, 1999.

BATO na bato bazali na ndenge na bango oyo batalelaka kondima. Na ntango ya kala, bato nyonso bazalaki kondimela Nzambe. Lelo oyo, na mokili oyo etondi na makanisi ya ntembe mpe etondi na bampasi, bato mingi bazali lisusu na kondima ya solosolo epai ya Nzambe mpe na Biblia te.

Kondima ya solosolo

Mpo na bato mingi, “kondima” elimboli kaka kolanda mateya ya lingomba moko to kosambela ata na lingomba nini. Nzokande, na kati ya Biblia, “kondima” elimboli mpenzampenza kotyela Nzambe motema mobimba mpe kotyela mpenza bilaka na ye elikya. Moyekoli nyonso ya Klisto asengeli kozala na kondima.

Mokolo moko, Yesu Klisto alobaki ete tosengeli kobondelaka na “kolɛmba te.” Ntango alobaki bongo, atunaki soki na mikolo ya nsuka oyo tozali, kondima ya solosolo ekozala mpenza. Alobaki boye: “Ntango Mwana ya moto akoya, akokuta mpenza kondima awa na mabele?” Mpo na nini atunaki motuna wana?​—Luka 18:1, 8, NW, maloba na nse ya lokasa.

Kondima ezali lisusu te

Makambo mingi ekoki kosala ete moto abungisa kondima. Ndambo ya makambo yango ezali oyo: mitungisi mpe mikakatano ya bomoi. Na ndakisa, Profɛsɛrɛ Michael Goulder azalaká sango na engumba Manchester, na Angleterre, na 1958, ntango likama moko ya aviɔ ebomaki ebele ya babɛti-ndembo ya ekipi ya Manchester. Joan Bakewell, ye azali mopanzi-nsango, alobaki na televizyo ya Angleterre ete Goulder “azangaki likambo ya koloba mpo na kokitisa bato motema na mawa oyo bazalaki na yango.” Yango wana, “azalaki lisusu kondima te ete Nzambe asalisaka bato na ntango ya mpasi.” Goulder alobaki ete na makanisi na ye, “Biblia ezali . . . liloba ya solo ya Nzambe te” kasi, “liloba ya bato oyo ezali na mabunga, ekoki kozala na mwa makanisi ya Nzambe na bisika mosusu.”

Ntango mosusu kondima esilaka. Likambo yango ekómelaki Ludovic Kennedy, ye akomaka babuku mpe azali mopanzi-nsango. Alobi ete kobanda azalaki mwana moke azalaki “komituna mituna mingi mpe azalaki kokakatana mingi [mpo na Nzambe] mpe kozanga kondima ezalaki kaka kobakisama na motema na [ye].” Azalaki komona moto moko te oyo akokaki kopesa ye biyano na mituna na ye. Mwa kondima moke oyo azalaki na yango naino esilaki nyonso ntango tata na ye akufaki na mai. Na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, tata na ye azalaki na masuwa moko ya mobembo ntango basoda ya Allemagne oyo bazalaki na masuwa ya bitumba babɛtaki yango masasi; bato nyonso na kati ya masuwa yango babondelaki Nzambe ete “batelá biso na makama ya mai mpe na mabe ya monguna,” kasi eloko moko te esalemaki.​—Buku All in the Mind​—A Farewell to God.

Makambo ya ndenge wana esalemaka mingi. Ntoma Paulo alobaki ete “bato nyonso bazali na kondima te.” (2 Batesaloniki 3:2) Bongo yo okanisi boni? Na kati ya mokili oyo bato mingi bakómi kobɛtela makambo nyonso ntembe, moto akoki mpenza kozala na kondima ya solosolo? Tángá oyo lisolo oyo elandi elobi na motuna yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto