Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/8 nk. 9-13
  • Bazali kongɛnga lokola miinda na engumba ya pole

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali kongɛnga lokola miinda na engumba ya pole
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Mokakatano ya kosakola na engumba yango
  • Litatoli ya mbalakaka ezali kobota mbuma
  • Pole mpo na mabota nyonso
  • Eloko ya motuya oyo ebombami
  • Bakitisi mopɛpɛ makasi
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/8 nk. 9-13

Bazali kongɛnga lokola miinda na engumba ya pole

Fluctuat nec mergitur, to “Mbonge ebɛtaka yango kasi ezindaka te.” Wana ezali mokano oyo engumba Paris ezalaka na yango.

PARIS ezali lokola masuwa oyo, na boumeli ya mbula koleka 2 000, epikaki pende mpo ezinda te liboso ya mipɛpɛ makasi oyo eutaki libándá mpe botomboki oyo ebimaki kati na yango moko. Lelo oyo, Paris ezali moko ya bingumba oyo eleki kitoko na mokili mobimba. Bato mingi basepelaka na yango mpo na bandako na yango ya kitoko, babalabala na yango oyo ezali na banzete pembenipembeni, mpe na bisika na yango ya kobomba biloko ya kala oyo ekendá nsango na mokili mobimba. Bato mingi balobaka ete ezali engumba oyo bakomi ya maloba ya ntɔki, bayemi mpe bato ya filozofi bakɛndaka mbala mingi. Bamosusu basepelaka na bilei na yango ya kitoko mpe bakumisaka ndenge oyo batongaka bilamba na engumba yango.

Banda kalakala, Paris ezali mpenza engumba ya Lingomba ya Katolike. Eleki sikoyo mbula 200, lokola bato ya engumba yango bazalaki na molɔngɔ ya liboso na ebongiseli moko ya mikili ya Mpoto mpo na kolendisa mateya ya filozofi oyo babengaki Lumière (Pole), bakómaki kobenga engumba yango Engumba ya Pole. Lelo oyo, ezala ete bayebi yango to te, bafandi mingi ya Paris balandaka mateya ya filozofi wana ya kala, kasi mangomba te.

Nzokande, mayele ya moto engɛngisi bomoi ya bato te ndenge bazalaki kokanisa na yango. Lelo oyo, bato mingi bazali koluka kongɛngisama na esika mosusu. Eleki sikoyo mbula soki 90, Batatoli ya Yehova bazali “kongɛnga lokola miinda” na Paris. (Bafilipi 2:15) Ndenge moko na bato ya masuwa oyo bayebi malamu mosala na bango, bazali ntango nyonso kolanda ndenge makambo ezali kobongwana mpo na koluka “biloko kitoko ya mabota nyonso.”​—Hagai 2:7, NW.

Mokakatano ya kosakola na engumba yango

Na mobu 1850, Paris ezalaki na bato 600 000. Lelo oyo, engumba yango, sangisá mpe bakartye ya zingazinga, ekómi na bato koleka milio libwa. Yango esali ete Paris ekóma engumba ya France oyo ezali na bato mingi oyo bauti na bisika ndenge na ndenge. Ezali engumba oyo biteyelo ya minene ezali mingi, esika tokoki kokuta bainiversite oyo eumeli mingi na mokili mobimba, epai bayekoli soki 250 000 batángaka. Bakartye mosusu ya Paris, oyo ezali na bandako mingi ya milaimilai, mpe eyebani mpo na mobulu na yango mpe ezali na bato mingi oyo basalaka te, ebebisaka engumba yango. Na ntembe te, esɛngaka mpenza ete Batatoli ya Yehova bázala na mayele mpe báyeba komesana na makambo ya sika mpo na kosakola nsango malamu na ndenge oyo ekosepelisa bato ya lolenge nyonso.​—1 Timote 4:10.

Mbula na mbula, baturiste koleka milio 20 bakendaka kotala Paris. Ntango mosusu baturiste yango basepelaka komata na Tour Eiffel, kotambola na Ebale Seine, kolekisa ntango na komɛla mwa kɔpɔ na barestora to na banganda mpe kotala loyenge oyo ezalaka na engumba yango. Nzokande, bomoi ya mokolo na mokolo ya bato ya Paris etondi na yikiyiki. Christian, oyo azali mosaleli ya ntango nyonso, alobi ete: “Bato bawelaka kaka ngonga. Soki bauti mosala, balɛmbaka mingi.” Kosolola na bato yango, oyo bazalaka kaka na ntango te, ezali pɛtɛɛ te.

Mokakatano mosusu ya monene oyo Batatoli ya Yehova bazalaka na yango na Paris ezali ya kokutana na bato na bandako na bango. Babuludingi mosusu ezali na telefone ya libanda mpo na kosolola na moto nyonso liboso ya kopesa ye nzela ya kokɔta kuna. Kasi, lokola mobulu ezali se kobakisama na engumba yango, mopaya akoki kokɔta te mpo bikɔtelo ekangamaka na bamasini ya elektroniki, oyo mpo na kofungola yango esengeli kozala na nimero oyo bato mosusu bakoki koyeba te. Na ntembe te, likambo yango esali ete na bakartye mosusu, soki ozwi bato 1400, mbala mosusu Motatoli azali kaka moko. Yango wana, bapesaka mingi litatoli ya telefone mpe litatoli ya mbalakaka. Batatoli ya Yehova bakokaki ‘kongɛngisa pole na bango’ na balolenge mosusu?​—Matai 5:16.

Mabaku mpe bisika ya kopesa litatoli ya mbalakaka ezali mingi. Martine amonaki mwasi moko na elongi ya mawa atɛlɛmi na esika bazelaka bisi. Mwasi yango autaki kokufela mwana na ye ya mwasi kaka moko. Martine apesaki ye mwa buku oyo ezalaki kolobela lisekwa, elikya ya kobɔndisa oyo Biblia ezali kopesa. Kobanda wana, mwa basanza elekaki, akutanaki lisusu na mwasi yango te. Ntango Martine amonaki lisusu mwasi yango, abandaki koyekola na ye Biblia. Atako mobali na ye azalaki kotɛmɛla ye, mwasi yango akómaki Motatoli.

Litatoli ya mbalakaka ezali kobota mbuma

Paris ezali moko ya bingumba ya mokili mobimba oyo ezali na ebongiseli malamu ya mituka mpe bingbunduka mpo na komema bato nyonso. Mokolo na mokolo, Métro to engbunduka oyo etambolaka na kati ya mabele, ekendá nsango na mokili mobimba, ememaka bato soki 5 000 000. Balobaka ete Châtelet-Les-Halles, oyo ezali esika monene epai bingbunduka oyo eutaka bipai na bipai na engumba eyaka kosuka, ezali esika oyo ezalaka na bato mingi mpe ezalaka na yikiyiki mingi koleka bisika nyonso mosusu na mokili. Mabaku ya kokutana na bato na esika yango ezali mingi. Alexandra, azwaka Métro mikolo nyonso mpo na kokende mosala. Mokolo moko, asololaki na elenge mobali moko oyo azalaki lisusu na bomoi molai te mpo na maladi ya leucémie. Alexandra apesaki ye trakte oyo ezalaki kolobela elikya ya Paladiso. Mokolo na mokolo, na boumeli ya pɔsɔ motoba, bakómaki kosolola masolo ya Biblia na ngonga mpe na esika yango. Na nsima mobali yango azalaki koya lisusu te. Mwa moke na nsima, mwasi na ye abengaki Alexandra na telefone mpe ayebisaki ye ete akende na lopitalo, mpo mobali na ye, mpasi eyaki makasi. Kasi, ntango Alexandra akómaki, mobali yango asilaki kokufa. Nsima ya liwa na ye, mwasi na ye akendaki kofanda na engumba Bordeaux, na sudi-wɛsti ya France, epai Batatoli ya engumba yango bakendaki kotala ye. Nsima ya mbula moko, Alexandra azwaki nsango ya esengo ete mwasi yango oyo akufelaki mobali akómaki Motatoli ya Yehova, azwaki batisimo, na elikya ya komona mobali na ye na lisekwa!​—Yoane 5:28, 29.

Mobange mwasi moklisto moko asololaki na Renata ntango bazalaki kosala mobembo na engbunduka, kolongwa na Paris mpo na kokende na Limoges, na katikati ya France. Ntango azalaki naino na Pologne, mboka na ye, Renata ayekolaki teoloji, Liebele na Grɛki na boumeli ya mbula mitano, kasi azalaki lisusu kondima Nzambe te. Sanza misato liboso, abondelaki Nzambe. Atako azalaki mpenza kotya likebi te na makambo oyo ndeko mwasi wana mobange azalaki koyebisa ye, mpe akanisaki ete akoki kosolola na ye lisusu te, Renata apesaki ye nimero na ye ya telefone. Kasi, ndeko mwasi yango azalaki na molende mpe mwa moke na nsima alingaki komindimisa ete bandeko bakendaki kotala Renata. Ntango ndeko moko na mwasi na ye bakendaki kotala ye, Renata alobaki na nse ya motema ete, ‘Eloko nini mpenza bakoki bateya ngai?’ Atako atángaki kelasi ya teoloji, na komikitisa mpenza, Renata asepelaki na mateya ya solo ya Biblia. Alobi boye: “Eumelaki te mpo nasosola ete ezalaki mateya ya solo.” Lelo oyo, azali na esengo ya koyebisa bato mosusu nsango oyo euti na Biblia.

Michèle azalaki koyekola kotambwisa motuka. Bayekoli mosusu oyo bazalaki mpe na kelasi yango babandaki kosolola masolo ya kosangisa nzoto liboso ya kobala. Michèle amonisaki ete likambo wana ezali malamu te. Nsima ya pɔsɔ moko, Sylvie, mwasi oyo azalaki kolakisa bango kotambwisa motuka, atunaki ye boye: “Ozali Motatoli ya Yehova?” Sylvie akamwaki na makanisi euti na Biblia oyo Michèle apesaki. Babandaki koyekola Biblia, mpe na nsima ya mbula moko, Sylvie azwaki batisimo.

Paris ezali na baparke mpe bilanga ya bafololo ebele, bisika ya malamu oyo okoki kokuta bato ya kosolola na bango. Na ntango ya bopemi, Josette akendaki na parke mpo na kozwa mwa mopɛpɛ; kuna akutaki Aline, mobange mwasi oyo akendaki mpe kotambola. Josette ayebisaki ye bilaka kitoko oyo ezali na kati ya Biblia. Bayokanaki mpo báyekolaka Biblia, mpe eumelaki te, Aline akolaki tii azwaki batisimo. Aline, oyo azali lelo na mbula 74, azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza oyo azali kobota mbuma mingi, mpe azali na esengo ya koyebisa bamosusu mateya ya solo ya boklisto.

Pole mpo na mabota nyonso

Batatoli oyo bazali na Paris bazali na mposa ya kokende na bamboka mosika te mpo na komona mimeseno mosusu ndenge na ndenge. Kati na bato oyo bafandaka na Paris, bato 20 likoló ya monkama bazali bapaya. Ezali na masangá mpe na bituluku na minɔkɔ 25.

Mbala mingi, esɛngaka mpenza kosalela mayele mpe kokanisa lolenge ya kosala mpo mosala ya kosakola, oyo ezali mosala ya ntina mingi, ekoka kobota mbuma. Motatoli moko, moto ya ekólo Philippines, afungolaki teritware na ye. Na ntango ya kosomba biloko, azwaki likoki ya kobanda koyekola Biblia na bato ebele, mpo azalaki kosolola na bato mosusu ya ekólo Philippines na kati ya bamagazini.

Bandeko bazwaka mbano soki bazali koluka mayele oyo ebongi mpo na kosakola. Na sanza ya Desɛmbɛ 1996, ntango bayokaki ete bato ya lisano ya cirque, lisano moko monene oyo eyebani na mokili mobimba bakoya na Paris, Batatoli ya lisangá moko oyo balobaka monɔkɔ ya bapaya bazwaki mokano ya kokutana na bato oyo bayaki mpo na kosala masano yango. Mokolo moko na mpokwa, ntango bato yango basilisaki lisano na bango mpe bazalaki kozonga na otɛlɛ oyo bazalaki kolala, bandeko basololaki na bango. Masolo yango ebotaki mbuma malamu, mpo na libaku yango, bakabolaki Babiblia 28, babuku 59, mwa babuku 131 mpe bazulunalo 290. Na nsuka ya pɔsɔ misato oyo balekisaki wana, mosani moko atunaki ete: “Ndenge nini nakoki kokóma Motatoli ya Yehova?” Mosusu alobaki ete: “Nakosakola na mboka na ngai!”

Eloko ya motuya oyo ebombami

Bato oyo bakendaka kotala Paris bamonaka bandako ya kitoko ya kalakala bipai na bipai. Nzokande, ezali mpe na biloko mosusu ya kitoko koleka, oyo esengeli koluka yango. Aniza ayaki na France, elongo na mobali ya tata mwasi na ye oyo azali ambasadɛrɛ. Azalaki kotánga Biblia mbala na mbala na ndako. Mokolo moko, ntango azalaki kobima na ndako nokinoki, mobongisi-nzela moko apesaki ye trakte Mpo na nini osengeli kondimela Biblia? Bayokanaki mpo na kokutana na pɔsɔ oyo elandaki mpe babandaki koyekola Biblia. Bandeko ya Aniza basepelaki te mpe bazalaki kopekisa ye makasi mpenza. Kasi alandaki koyekola tii azwaki batisimo. Ndenge nini atalelaka libaku malamu oyo azali na yango ya koyebisa bato mosusu mateya ya solo? Alobi boye: “Na ebandeli, mosala ya kosakola ezalaki mpasi, mpo nalobaka mingi te. Kasi, ntango natángaka Biblia, epesaka ngai makasi. Soki nasakoli te, nazalaka kimya te.” Batatoli mingi na Paris bazali ndenge yango, bazali na ‘mingi ya kosala na mosala ya Nkolo.’​—1 Bakolinti 15:58.

Solo ya Biblia ezali mpe kongɛnga na bakartye mosusu oyo ezali zingazinga ya Paris mpe ezali kobimisa “biloko” mosusu ya motuya. Bruce akendaki kotala moninga na ye moko mpo azalaki na mposa ya kodefa badiskɛ; nzokande, moninga na ye wana akómá Motatoli ya Yehova. Ntango akutaki baninga na ye bazali kosolola masolo ya Biblia, Bruce alandaki masolo na bango na likebi mpenza. Andimaki koyekola Biblia kasi azalaki na mwa mikakatano. Alobi boye: “Nayebanaki mingi na kartye. Yaya na ngai ya mobali azalaki ntango nyonso kobunda, mpe ngai nazalaki kosalisa bokutani ya bilenge mpo na kobina. Nazalaki komituna ete bato mosusu bakoloba nini soki bayoki ete nakómi Motatoli?” Atako baninga na ye bazalaki kaka kotya ye mbamba mpo abongisaka bokutani na bango, Bruce atikaki likambo yango. Nsima ya sanza moko, abandaki kosakola. Alobi ete: “Na kartye, moto nyonso azalaki koluka koyeba mpo na nini nakómi Motatoli.” Eumelaki te, azwaki batisimo. Na nsima, azwaki libaku malamu ya kokɔta na Eteyelo mpo na kobongisa basungi.

Mpo na kozwa eloko ya motuya, esɛngaka mbala mosusu milende makasi. Kasi, ezalaka mpenza esengo ntango litomba malamu emonani! Jacky, Bruno mpe Damien bazalaki kosala na esika moko oyo basalaka mampa na Paris. Jacky alobi boye: “Ezalaki mpasi mpo na kokutana na biso, mpo tozalaki ntango nyonso na mosala, tozalaki kofanda na ndako te.” Patrick, ye azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza, amonaki ete na etaze ya nsuka ya buludingi moko oyo azalaki kofanda, ezalaki na mwa bandako ya mike, mpe akanisaki ete ekoki kozala ete bato mosusu bafandaka ata na moko na yango. Lokola azalaki kaka kosala milende mpo akutana na bato yango, nsukansuka azwaki litomba na mpokwa moko, akutanaki na Jacky, oyo azalaki kofanda wana mpo na mwa ntango. Esukaki boni? Baninga yango misato bakómaki Batatoli mpe bazwaki mosala mosusu, oyo epesaki bango nzela ya kosangana ntango nyonso na misala ya Teokrasi.

Bakitisi mopɛpɛ makasi

Eleki mwa mikolo, bapanzi-nsango mosusu na ekólo France bapanzaki nsango ete Batatoli ya Yehova bazali mwa lingomba oyo esengeli kokeba na yango. Na 1996, Batatoli basanganaki na molende mpenza mpo na kokabola trakte oyo ezalaki na nsango moko ya ntina mingi, oyo ezalaki na motó ya likambo Les Témoins de Jéhovah ​— Ce que vous devez savoir (Oyo bosengeli koyeba mpo na Batatoli ya Yehova). Trakte yango ebimisaki matomba ya malamu.

Bandeko basalaki mpenza makasi mpo na kokutana na moto nyonso. Bakonzi mingi bakumisaki Batatoli mpo na likambo yango. Mopesi-toli ya guvɛrnɛrɛ moko akomaki ete: “Batatoli ya Yehova basali malamu ndenge bakaboli trakte oyo. Ezongisi makambo na molɔngɔ.” Monganga moko alobaki boye: “Nazalaki kozela yango banda kala!” Mobali moko ya Paris akomaki boye: “Natángaki Les Témoins de Jéhovah ​— Ce que vous devez savoir na mbalakaka. Nakosepela koyeba makambo mosusu mingi mpe koyekola Biblia na ndako kozanga ete nafuta mbongo.” Mwasi mosusu akomaki boye: “Matɔndi mingi mpo na bosembo na bino.” Mwasi moko Mokatolike ayebisaki Batatoli boye: “Ah! Bosukisi mpenza lokuta oyo!”

Likambo oyo epesaki bilenge Batatoli mingi esengo na Paris, ezalaki kampanye ya mosala ya kosakola oyo ebongisamaki na 1997, na mokolo ya fɛti ya bilenge Bakatolike ya mokili mobimba. Atako moi ezalaki makasi mokolo yango, Batatoli pene na 2 500 basanganaki na kampanye yango. Na boumeli ya mwa mikolo moke kaka, bakabolaki mwa babuku 18 000 oyo ezali na motó ya likambo Un livre pour tous (Buku mpo na bato nyonso) epai ya bilenge oyo bautaki na mokili mobimba. Longola litatoli malamu mpo na nkombo ya Yehova oyo epesamaki na kampanye yango mpe mboto ya solo oyo elonamaki, tokoki mpe kobakisa ete kampanye yango ebakiselaki bilenge Batatoli makasi. Ndeko mwasi moko elenge, oyo akataki konje na ye mpo asangana na kampanye yango akomaki boye: “Yehova azali na bato ya esengo awa na mabele bato oyo bazali kosalela makasi na bango mpo na kokumisa nkombo na ye. Mikolo wana oyo etondaki na makambo ya kolendisa, ezalaki mpenza na motuya mingi koleka bakonje nyonso ya bomoi! (Nzembo 84:10)”

Na mokolo ya 28 Febwali 1998, mbula 65 ekokaki banda mokolo oyo Hitler abimisaki mobeko oyo epekisaki Batatoli ya Yehova na Allemagne. Na mokolo yango, Batatoli ya France balakisaki kasɛti video La fermeté des Témoins de Jéhovah face à la persécution nazie (Ndenge Batatoli ya Yehova batikalaki ngwi liboso ya minyoko ya Banazi) na bisika oyo bafutelaki; kasɛti yango emonisaka ndenge oyo basaleli ya Yehova banyokwamaki. Bakabolaki nkasa ya libyangi koleka milio nsambo. Bato ya mayele na istware mpe bato oyo bazalaki na babolɔkɔ na ntango wana balobaki makambo oyo esimbaki mitema ya bato. Na Paris, pene na bato 5 000 oyo batalaki yango, mingi kati na bango bazalaki Batatoli te.

Bato mingi na Paris basepelaka na pole ya elimo, mpe bazali na esengo ndenge basakoli ya Bokonzi bazali kongɛnga lokola miinda. Ezali kaka ndenge Yesu alobaki ete: “Mbuma na elanga iteli mingi mpenza nde basali bazali mingi te.” (Matai 9:37) Molende oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala mpo na kolonga mokakatano ya kosakola na Paris, ekómisi yango engumba ya pole na ndimbola mosusu, mpo na nkembo ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 9]

Hôtel de ville

[Elilingi na lokasa 9]

Opéra Garnier

[Elilingi na lokasa 9]

Musée du Louvre

[Bililingi na lokasa 10]

Bazali koyebisa nsango ya Biblia epai ya bato oyo bazalaka kaka na ntango te, na esika nyonso oyo bakoki kokuta bango

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto