Tribinale oyo etalelaka mibeko ya mboka epesi bango elonga
BATATOLI YA YEHOVA na Allemagne balongaki na likambo moko oyo bakobosana yango te, oyo ekatamaki na tribinale oyo etalelaka mibeko ya mboka (Tribunal constitutionnel fédéral) oyo ezalaka na engumba Karlsruhe. Elonga wana nde efungoli nzela mpo ete mibeko ya mboka endima lingomba na bango.
Banda Batatoli ya Yehova babandá mosala na bango na Allemagne, ekoki sikoyo mbula koleka 100. Baguvɛrnɛma mibale ya makambo mabe na ekeke ya 20 enyokolaki bango makasi: guvɛrnɛma ya Banazi mpe guvɛrnɛma ya Bakoministe. Banda 1990, Batatoli basalaki nyonso mpo lingomba na bango endimama na mibeko ya mboka. Basambaki likambo na bango mbala misato: balongaki mbala mibale, kasi lokola makambo esimbaki te na mbala ya misato, basɛngaki ete bákende kosamba likambo yango na tribinale oyo etalelaka mibeko ya mboka; na mokolo ya 19 Desɛmbɛ 2000, tribinale yango eyebisaki ekateli na yango.
Bazuzi nyonso balongisi Batatoli ya Yehova
Bazuzi nyonso nsambo ya tribinale yango balongisaki Batatoli ya Yehova. Bazuzi yango baboyaki ekateli oyo tribinale mosusu ya nse (tribunal administratif fédéral) ezwaki na 1997 mpe bayebisaki tribinale yango etalela lisusu, na ndenge ya malamu, likambo oyo Batatoli ya Yehova bazali kosɛnga.
Na libaku yango kaka, tribinale yango oyo etalelaka mibeko ya mboka emonaki mpe malamu elobela motindo nini Leta asengeli kotalela mangomba. Ndenge mibeko esɛngi, liboso ete Leta andima lingomba moko, “akotalela te mateya na yango, kasi akotalela nde bizaleli ya bandimi na yango.”
Tribinale yango elobaki lisusu boye, ntango Batatoli ya Yehova bazali “koboya kokɔta na makambo ya mokili mpo bazali baklisto,” bazali “kobebisa demokrasi te” mpe “mposa na bango ezali te ya koboma demokrasi mpo na kotya boyangeli ya ndenge mosusu.” Yango wana, ata soki Batatoli ya Yehova baboyaka kosala voti ya bakonzi ya politiki, yango te nde likambo oyo epesi nzela na koboya kokokisela bango likambo oyo bazali kosɛnga: kondima lingomba na bango na mibeko ya mboka.—Yoane 18:36; Baloma 13:1.
Tribinale yango ebakisaki lisusu ete na bantango mosusu, mondimi—ezala Motatoli ya Yehova to mondimi ya lingomba mosusu—akoki komona ete Leta asɛngi ye likambo oyo mateya ya lingomba na ye epekisi. Soki mondimi yango ayokeli lisosoli na ye, elingi koloba “atosi mateya ya lingomba na ye na esika ya kotosa mobeko ya mboka,” Leta asengeli komona yango mabe te, akoki nde kotya yango na molɔngɔ ya makambo oyo moto akoki kosala lokola tozali na bonsomi ya losambo.—Misala 5:29.
Bapanzi-nsango balobelaki mingi ekateli oyo tribinale yango ezwaki. Bazulunalo nyonso ya Allemagne, longola kaka ndambo, elobelaki likambo yango. Bastasyo nyonso ya minene ya televizyo mpe ya radio elobelaki likambo yango mpe bastasyo mosusu etunaki bato mituna mpo na likambo yango. Nkombo ya Yehova elobelamá na Allemagne, kasi ya mbala wana ezalaki nsɔmɔ.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 8]
AP Photo/Daniel Maurer