Biblia mobimba na mokanda moko
BAKLISTO ya liboso bazali bato ya liboso oyo bamipesaki na kosalela codex mpo na kosala bakopi ya Biblia; codex ezali mokanda oyo ezali na nkasa, elingi koloba ete ekeseni na rulo. Kasi, baklisto yango babandaki kobimisa Biblia mobimba na mokanda moko te. Ezali na ekeke ya motoba nde Flavius Cassiodore azwaki mpo na mbala ya liboso likanisi oyo efungolaki nzela na kobimisama ya Babiblia ya mobimba na mokanda moko.
Flavius Magnus Aurelius Cassiodorus abotamaki na mobu soki 485-490 na ntango na biso na libota moko ya bato ya mbongo oyo bazalaki kofanda na etúká ya Calabre, na sudi mpenza ya Italie. Na ntango oyo azalaki na bomoi, kimya ezalaki mpenza te na Italie; liboso ezalaki Ba-Goth nde bayaki kofanda na makasi na ekólo yango mpe nsima na bango ezalaki Ba-Byzantin. Ntango akokisaki mbula soki 60 to 70, Cassiodore afungolisaki monastɛrɛ mpe bibliotɛkɛ ya Vivarium, pene na ndako na ye na mboka Squillace, na etúká ya Calabre.
Mobimisi ya Biblia oyo azalaki kotya likebi mpenza na makambo
Moko ya makambo oyo Cassiodore amibanzabanzaki mpo na yango ezali ete Biblia elanda kokabolama tii na bato oyo bakobotama nsima. Peter Brown, moto ya mayele ya istware, akomaki boye: “Na makanisi ya Cassiodore, esengelaki kosalela mikanda nyonso ya Latin mpo na kopalanganisa Makomami. Biloko nyonso oyo bazalaki kosalela liboso mpo na koyekola mpe kokoma mikanda esengelaki kosalelama mpo na kokanga ntina ya Makomami mpe kokoma yango malamu. Se lokola mabele, sanza mpe minzoto ebalukaka zingazinga ya moi, mimeseno ya bato oyo balobaka Latin esengelaki kosala se ndenge moko zingazinga ya moi monene oyo ezali Liloba ya Nzambe.”
Cassiodore ayanganisaki babongoli mpe bato ya mayele oyo bayebi gramɛrɛ na monastɛrɛ ya Vivarium mpo na kotalela malamumalamu Biblia mobimba mpe ye moko akambaki mosala ya kobimisa yango, yango ezalaki kosɛnga likebi mingi. Apesaki mosala yango kaka na bato moke ya mayele. Bato yango basengelaki kosala mbangumbangu te mpo na kobongisa oyo bango bamoni, kozanga bilembeteli ya sikisiki, ete ekoki kozala mabunga ya bato oyo basalaki bakopi ya Biblia kala. Soki bakutani na mokakatano mpo na gramɛrɛ, mpo na kosembola yango, basengelaki libosoliboso kotalela bamaniskri ya kala ya Biblia na esika ya kotalela ndenge likambo yango elobamaka na Latin. Cassiodore apesaki etinda oyo: “Ndenge oyo gramɛrɛ esalelamaki, ata ezali malamu te na miso na bino, . . . bótika yango bongo, mpamba te makomi oyo toyebi ete epemamaki na elimo ya Nzambe ekoki kobebisama te. . . . Esengeli kolanda elobeli ya Biblia, masese na yango mpe maloba na yango ya bwanya ndenge ezali na Liebele, ata soki ezali koyokana malamu te na Latin; ndenge moko mpe, esengeli kotika bankombo ndenge ebengamaka na Liebele.”—The Cambridge History of the Bible.
“Codex Grandior”
Bapesaki bakomeli ya monastɛrɛ ya Vivarium mosala ya kobimisa lolenge soki misato ya Babiblia na Latin. Moko ya Babiblia yango ebimisamaki na volimi libwa mpe ekoki kozala ete ezalaki na makomi ya libongoli “Latin ya Kala” oyo ebimaki pene ya nsuka ya ekeke ya mibale. Biblia ya mibale oyo babimisaki esalelaki makomi ya libongoli ya Latin babengi Vulgate oyo Jérôme asilisaki kobongola soki na ebandeli ya ekeke ya mitano. Ya misato, Codex Grandior, oyo elimboli “codex oyo eleki na mwa monene,” esalemaki uta makomi ya Babiblia misato. Ezala Biblia ya mibale to Biblia ya misato oyo babimisaki, mokomoko na yango esangisaki mikanda nyonso ya Biblia esika moko mpo na kosala mokanda moko.
Ekoki mpenza kozala ete Cassiodore nde azali moto ya liboso oyo abimisaki Babiblia mobimba ya Latin na mokanda moko; abengaki yango pandectae.a Na ntembe te, amonaki ete ezalaki malamu mingi kosangisa Biblia mobimba na mokanda moko; na ndenge yango alongolaki mosala ya kolukaluka na mikanda mingi, yango ezalaki kolekisela moto ntango mpamba.
Euti na sudi ya Italie mpe ekei tii na Angleterre
Mwa moke na nsima ya liwa ya Cassiodore (ekoki kozala na mobu soki 583 T.B.), bakómaki komema Codex Grandior na bisika ndenge na ndenge. Balobaka ete ezali na ntango wana nde bamemaki mikanda mosusu oyo ezalaki na bibliotɛkɛ ya Vivarium mpo na kotya yango na bibliotɛkɛ ya Lateran, na Rome. Na mobu 678 na ntango na biso, Ceolfrith, moto ya Angleterre oyo azalaki mokambi ya monastɛrɛ, azongaki na codex yango na mboka na ye nsima ya kofanda na Rome. Na bongo, codex yango ekómaki ya monastɛrɛ mibale oyo Ceolfrith azalaki kokamba: monastɛrɛ ya Wearmouth na monastɛrɛ ya Jarrow; bamonastɛrɛ yango ezalaki na oyo ezali lelo oyo etúká ya Northumbria, na Angleterre.
Ceolfrith na basango oyo azalaki kokamba basepelaki mingi na Biblia mobimba na mokanda moko oyo Cassiodore abimisaki mpo bamonaki ete ezalaki mpasi te mpo na kosalela yango. Yango wana, nsima ya mwa bambula moke, babimisaki Babiblia mosusu misato ya mobimba; mokomoko na yango na mokanda moko. Na Babiblia oyo misato, kaka maniskri moko ya monene oyo babengi Codex Amiatinus nde ezali tii lelo. Ezali na nkasa 2 060 ya mposo ya mwana ya ngɔmbɛ mpe lokasa mokomoko ezali na bolai ya santimɛtrɛ pene na 51 mpe na monene soki ya santimɛtrɛ 33. Banda na ezipeli ya liboso kino na ezipeli ya nsuka ezali na bonene ya santimɛtrɛ 25 mpe ezali na kilo 34. Yango nde eumeli mingi koleka Babiblia nyonso ya mobimba ya Latin oyo ezali na mikanda nyonso. Fenton Hort, molimboli moko ya Biblia na ekeke ya 19 oyo ayebanaki mingi, nde amonaki codex yango na mobu 1887. Hort alobaki ete: “Ata soki moto ya ntango na biso amoni maniskri yango, ekokamwisa ye mpenza.”
“Codex Grandior” ezongi na Italie
Codex Grandior oyo mpenza Cassiodore asalaki ezali lisusu te. Kasi, mokitani na yango oyo esalemaki na Angleterre, Codex Amiatinus, ezongaki na Italie mwa moke na nsima ya kosalema na yango. Mwa moke liboso akufa, Ceolfrith asalaki mobembo mpo na kozonga na Rome. Amemaki bamaniskri misato ya Biblia oyo ezalaki na Latin lokola likabo epai ya Pápa Grégoire II. Ceolfrith akufaki na nzela, na mobu 716 na ntango na biso, na engumba Langres, na France. Kasi, bato oyo asalaki na bango mobembo bakómisaki Biblia na ye na Rome. Nsukansuka, codex na ye etyamaki na bibliotɛkɛ ya monastɛrɛ Monte Amiata, na kati mpenza ya Italie; kuna nde ezwaki nkombo ya Codex Amiatinus. Na mobu 1782, bamemaki maniskri yango na bibliotɛkɛ ya Médicis na engumba Florence, na Italie, epai ezali tii lelo moko ya mikanda ya motuya mingi ya bibliotɛkɛ yango.
Codex Grandior etali biso na nini? Banda na ntango ya Cassiodore, bakomeli mpe banyati ya mikanda bakómaki kolinga mingi kobimisa Babiblia ya mobimba na mokanda moko. Tii na moi ya lelo, ezali mpasi te mpo na koluka esika ya kotánga na kati ya Biblia mobimba na mokanda moko mpe na bongo, bato bakoki kozwa matomba ya nguya na yango na bomoi na bango.—Baebele 4:12.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ekoki kozala ete na Grɛki, Babiblia ya mobimba ebimisamaki banda ekeke ya minei to ya mitano.
[Karte na lokasa 29]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Bisika oyo ‘Codex Grandior’ ekómaki
Monastɛrɛ ya Vivarium
Rome
Jarrow
Wearmouth
Bisika oyo ‘Codex Amiatinus’ ekómaki
Jarrow
Wearmouth
Monte Amiata
Florence
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Mountain High Maps® Copyright © 1997 Digital Wisdom, Inc.
[Bililingi na lokasa 30]
Na likoló: ‘Codex Amiatinus’ Na lobɔkɔ ya mwasi: Elilingi ya Ezela na kati ya ‘Codex Amiatinus’
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Biblioteca Medicea Laurenziana, Firenze