“Yehova asaleli ngai boboto mingi!”
MOKOLO moko na mpokwa, na sanza ya Marsi 1985, bandeko oyo basalaka na Departema ya Bokomi na biro monene ya Batatoli ya Yehova na New York, bamonaki likambo moko oyo babosanaka yango te. Na ntango wana, Karl Klein akokisaki mbula 60 na mosala ya ntango nyonso. Ndeko Klein azalaki na esengo mpe alobaki ete: “Yehova asaleli ngai boboto mingi!” Alobaki ete alingaka vɛrsɛ ya Nzembo 37:4 mingi. Na nsima, abɛtaki violon mpo na kosepelisa bango nyonso.
Na boumeli ya mbula 15 oyo elandaki, Ndeko Klein akobaki kosala na Departema ya Bokomi, azalaki mpe na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova. Bongo, na mokolo ya 3 Yanuali 2001, Karl Klein akómaki na nsuka ya bomoi na ye awa na mabele; azalaki na mbula 95.
Karl abotamaki na Allemagne. Libota na bango mobimba bakendaki kofanda na États-Unis, mpe Karl akolaki na kartye moko ya Chicago na etúká ya Illinois. Ntango bazalaki naino bilenge, Karl na leki na ye Ted bakómaki kosepela mingi na Biblia. Karl azwaki batisimo na 1918, mpe makambo oyo ayokaki na liyangani moko ya Bayekoli ya Biblia na 1922 esepelisaki ye mpe epesaki ye mposa ya kosala mosala ya kosakola mpe asalaki yango bomoi na ye mobimba. Alingaki kolekisa ata pɔsɔ moko te kozanga ete abima na mosala ya kosakola mpe asalaki bongo tii na bapɔsɔ ya nsuka ya bomoi na ye.
Karl akɔtaki na biro monene na 1925, epai abandaki kosala na esika banyataka mikanda. Alingaki miziki mingi, mpe na boumeli ya mwa bambula, azalaki kobɛta violon na lisangá ya bayembi oyo bazalaki kobɛta miziki na radio ya la Société. Na nsima, akómaki kosala na Departema ya Mosala ya Kosakola; kuna, azalaki na esengo mingi ya kosala na Ndeko Thomas Sullivan, oyo azalaki mokɛngɛli ya departema yango. Leki na ye Ted mpe abalaki mpe ye na mwasi na ye Doris bakendaki mosala ya misionɛrɛ na ekólo Porto Rico.
Karl Klein alekisaki mbula soki 50 na Departema ya Bokomi, mpe kuna asungaki mingi na mosala na ye mpamba te alingaki koyekola mikanda mpe ayebaki Biblia mingi. Na 1963, Karl abalaki Margareta, ndeko mwasi moko moto ya Allemagne oyo azalaki misionɛrɛ na ekólo Bolivie. Na lisungi mpe bolingo ya Margareta, mingimingi ntango akómaki na mikakatano ya kolɔngɔnɔ ya nzoto, Karl azalaki naino makasi na mosala, ata ntango alekaki mpenza mbula oyo bato mingi bazwaka epaso. Lokola azalaki moto ya boboto mpe ya esengo mpe azalaki kolinga miziki, bandeko mingi babosanaka te masolo oyo azalaki kosala na masangá mpe na mayangani. Mwa moke liboso akufa, atambwisaki likita ya ntɔngɔ mpo na kotalela mokapo ya mokolo na libota monene ya Betele ya New York; bato nyonso basepelaki na mateya na ye mpe bazwelaki yango litomba.
Bato mingi oyo batángaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli banda kala bakoki koyeba lisusu lisolo malamu ya bomoi na ye oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai 1985 (na Lifalanse). Soki otángi lisolo wana to ozongeli yango, okosepela na yango mingi, mpe kanisá ete nsima ya kokoma yango alekisaki lisusu mbula 15 na kosalela Nzambe na bosembo lokola moklisto oyo amipesi mpenza.
Lokola azalaki mopakolami ya Nkolo, Ndeko Klein azalaki na mposa mingi ya koyangela na Klisto na likoló. Tozali mpenza na elikya ete Yehova akokisi mposa na ye.—Luka 22:28-30.
[Elilingi na lokasa 31]
Karl na Thomas Sullivan, Ted na Doris, na 1943
[Elilingi na lokasa 31]
Karl na Margareta, na Ɔkɔtɔbɛ 2000