Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/4 nk. 30-31
  • Lisangá ya bandeko na mokili mobimba oyo bazali kosalisana

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lisangá ya bandeko na mokili mobimba oyo bazali kosalisana
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Lisungi ya bandeko
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/4 nk. 30-31

Lisangá ya bandeko na mokili mobimba oyo bazali kosalisana

EPAI nyonso okobalola miso, ozali komona kaka bato, batondi bisika nyonso tii na mosika. Mingi bazali mibange mpe bamosusu balɛmbi mpe bazali lisusu kokoka kotambola te. Basi mosusu bazali na zemi mpe bilenge mibali na basi na bango basimbi bana ya mike na mabɔkɔ. Bango nyonso bakimi bitumba, makama to mikakatano mosusu na bikólo na bango mpe bayei kofanda na mboka moko ya mopaya, oyo ezali pene ya mboka na bango. Mpo na bamosusu, oyo ezali mbala ya liboso te ete bákima bamboka na bango. Soki kaka eyindi, ezala ete bitumba ebandi to likama mosusu, bakokangisa mwa biloko na bango, bakamati bana na bango mpe basimbi nzela tii na esika oyo bakoki komona ete likama ezali te. Na nsima, soki makambo ebongi, mingi bazongaka mpo na kotonga lisusu bandako na bango mpe kozongela lisusu misala na bango.

Banda bambula mingi, République centrafricaine ezali koyamba bato mingi oyo bazali kokima bamboka na bango. Na mikolo oyo euti koleka, bankóto ya bato, na kati na bango bamosusu bazali Batatoli ya Yehova, bakimaki bitumba na République démocratique du Congo mpe bakendaki kofanda na République centrafricaine epai oyo mwa kimya ezali.

Lisungi ya bandeko

Batatoli ya République centrafricaine basepelaki na libaku malamu ya kosunga bato oyo bakimaki bitumba. Babongisaki bisika mpo na koyamba bandeko na bango baklisto oyo bazalaki kokómela bango. Na ebandeli, bazalaki kozwa bisika ya kolala na bandako ya bandeko; kasi ntango bakómaki ebele, emonanaki ete esengelaki kozwa bibongiseli mosusu. Bandako ya Bokonzi mosusu ekómaki bisika ya kolala. Batatoli ya ekólo yango basalaki mosala monene mpo na kotya miinda, kolekisa batiyo ya mai, mpe kotya simá na ndako mpo bandeko na bango báfanda kuna. Bato oyo bakimaki bitumba basalaki elongo na bandeko ya esika yango mpo na kobongisa bisika yango oyo basengelaki kolala mpo na mwa ntango. Babongisaki programɛ ya kosala makita nyonso na Lingala mpo bandeko oyo bazalaki koya bázanga bilei ya elimo te. Boyokani malamu oyo ezalaki kati na bandeko ya ekólo yango na bapaya na bango emonisaki ete bondeko ya solosolo mpenza ezali kati na bato yango oyo bazali na mikili mingi.

Ntango mosusu, bandeko ya libota moko bazalaki koya nzela moko te. Bato ya libota moko oyo babunganaki bazalaki kokende kokutana kaka kuna. Na Ndako ya Bokonzi mokomoko batyaki bankombo ya bato nyonso oyo bakómaki malamu. Bazwaki bibongiseli mpo na koluka baoyo bazalaki komonana te. Biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na ekólo yango ezalaki kotinda mituka misato na mokolo mpo na kosunga Batatoli oyo bazalaki naino na nzela mpe mpo na koluka baoyo, mbala mosusu, babungaki. Na mituka yango bakomaki na makomi minene ete “WATCH TOWER​—Batatoli ya Yehova.”

Kanisá esengo oyo ezalaki ntango bana nsambo, baoyo babunga, bamonaki motuka ya Batatoli ya Yehova. Bakendaki mbangu na motuka yango mpe bayebisaki ete bazali Batatoli. Bandeko bamemaki bango na motuka mpe bakendaki na bango na Ndako ya Bokonzi, mpe na nsuka, bakutanaki na baboti na bango.

Nini esalisaki baklisto yango ya sembo na kolonga bampasi ya ndenge wana, mbala moko te, kasi mbala ebele? Bazali mpenza na kondima ete tozali sikoyo na mikolo ya nsuka oyo Makomami Mosantu esakolaki.​—2 Timote 3:1-5; Emoniseli 6:3-8.

Yango wana, bayebi ete etikali moke Yehova Nzambe asukisa bitumba, koyinana, mobulu mpe matata. Bato bakimá mboka bakozala lisusu te. Liboso na yango, Batatoli ya Yehova bazali kolanda toli oyo ntoma Paulo apesaki na 1 Bakolinti 12:14-26, bazali kosalisana. Atako bibale, bikólo, minɔkɔ mpe bamboka ekaboli bango, bakanisaka bandeko na bango; yango wana, bakangaka mabɔkɔ te soki moto moko azali na mpasi.​—Yakobo 1:22-27.

[Karte na lokasa 30]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

AFRIKA

République centra-fricaine

République démocratique du Congo

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Mountain High Maps® Copyright © 1997 Digital Wisdom, Inc.

[Bililingi na lokasa 30]

Bandako ya Bokonzi misato oyo ekómaki bisika ya koyamba bato

[Elilingi na lokasa 31]

Babongisaki nokinoki bisika ya kolamba

[Elilingi na lokasa 31]

Bato bazalaki se koya

[Bililingi na lokasa 31]

Bana babotami sika, mbala moko bakimi mboka

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto