“Likama oyo ebombami mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato”
ANKƐTƐ moko euti kosalema mikolo oyo emonisi ete, na États-Unis, bato soki 200 000 (moto moko kati na bato misato) oyo basalelaka Internet, basi bafungolá bisika oyo bazali kolobela pite na Internet. Bato mingi mpenza bakómi kofungola bisika oyo bazali kolobela pite na Internet mpo na kokokisa bamposa na bango ya nzoto. Doktɛrɛ Al Cooper, moto moko ya mayele na pisikoloji oyo akambaki ankɛtɛ yango, alobi ete: “Likambo yango ezali likama oyo ebombami mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato mpe ezali kopalangana mingi; mpe ezali bongo mpamba te bato moke kaka nde bazali kondima ete likambo yango ezali likama to bazali kozwa yango na lisɛki te.”
Banani oyo bazali kobendama mingi na makambo ya pite na Internet? Doktɛrɛ Cooper alobi ete: “Ezali bato oyo bazalaki kosala pite te to bamipesaki na yango mingi te,” kasi “na mbala moko, basopeli bango ebele ya makambo ya pite” na Internet.
Nzokande, bato mingi oyo bafungolaka bisika oyo bazali kolobela pite na Internet, bamonaka mabe to likama na yango te. Kasi ezali mpenza bongo? Moto oyo amelaka bangi amesenisaka nzoto na ye na bangi, ndenge moko mpe, bato mingi oyo bazali kotala makambo ya pite na Internet bazali koluka makambo ya pite “mingi koleka” na Internet mpo na kokokisa bamposa na bango. Bato yango bakoki ata kobebisa mosala mpe mabala na bango!
Kasi, bato oyo balingaka kosepelisa Nzambe baboyaka kofungola bisika oyo bazali kolobela pite na Internet mpo na ntina mosusu lisusu. Liloba ya Nzambe elobi boye: “Yango wana, bóboma binama na bino ya nzoto oyo ezali na mokili, na oyo etali makambo ya pite, bosɔtɔ, mposa ya kosangisa nzoto, lokoso ya mabe mpe elulela, oyo ezali losambo ya bikeko. Ezali mpo na makambo yango nde nkanda ya Nzambe ezali koya.” (Bakolose 3:5, 6, NW) Mpo ‘na koboma binama ya nzoto’ na oyo etali mposa ya pite, esengeli ete moto akolona bolingo mingi mpo na Yehova Nzambe. (Nzembo 97:10) Soki abendami na likama ebombami mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto, elingi koloba makambo ya pite na Internet, asengeli koyekola Biblia, Liloba ya Nzambe mpo na kolendisa bolingo na ye mpo na Yehova. Soki moto azali koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova na Ndako ya Bokonzi na bango, yango ekoki kolendisa ekateli na ye ya kosepelisa Nzambe.