Cyrille na Méthode—Babongoli ya Biblia oyo babimisaki alfabɛ moko
“Bato nyonso ya ekólo na biso bazwá batisimo, kasi tozali na moteyi te. Toyokaka Grɛki to Latin te. . . . Toyebi kotánga te mpe kokoma te; yango wana, tindelá biso bateyi oyo bakosalisa biso tóyeba Makomami mpe ndimbola na yango.”—Rostislav, mokonzi ya Moravie, na mobu 862 T.B.
LELO oyo, bato koleka milio 435 oyo balobaka nkota ya Slave basalelaka Biblia oyo ezali na monɔkɔ na bango.a Kati na bango, bato milio 360 basalelaka alphabet cyrillique. Nzokande, eleki sikoyo mbula 120, lokota na bango ezalaki kokomama na mikanda te mpe ezalaki na alfabɛ te. Bato oyo basalaki alfabɛ yango bazalaki leki na nkulutu: Cyrille na Méthode. Bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe bakomona ete milende oyo basalaki mpe mayele ya sika oyo babimisaki ezali likambo moko malamu na ndenge oyo Biblia ebatelamaki mpe ekabolamaki. Mibali yango bazalaki banani, mpe mikakatano nini bakutanaki na yango?
“Moto ya filozofi” na guvɛrnɛrɛ
Cyrille (827-869 T.B.; nkombo na ye ezalaki liboso Constantin) na Méthode (825-885 T.B.) babotamaki na libota moko ya lokumu na engumba Thessalonique, na ekólo Grèce. Na ntango wana, bato ya Thessalonique bazalaki koloba minɔkɔ mibale: Grɛki na lokota moko ya Slave. Ekoki kozala ete lokola Ba-Slave bazalaki mingi na engumba yango mpe lokola bato ya engumba yango bazalaki koyokana malamu na Ba-Slave mosusu oyo bazalaki nzinganzinga, yango esalisaki Cyrille na Méthode na koyeba malamumalamu lokota ya Ba-Slave ya sudi. Kutu, mokomi moko ya lisolo ya bomoi ya Méthode alobi ete mama na bango azalaki Slave.
Nsima ya liwa ya tata na ye, Cyrille akendaki na Constantinople, engumba-mokonzi ya Empire byzantin. Kuna, atángaki na inivɛrsite ya amperɛrɛ mpe ayebanaki na balakisi minene. Akómaki mokambi ya bibliotɛkɛ ya Hagia Sophia, oyo ezalaki ndako-nzambe oyo elekaki bandako-nzambe nyonso ya Mpoto ya Ɛsti; mpe na nsima, akómaki molakisi ya filozofi. Kutu, lokola azalaki na mayele mingi, Cyrille akómaki kobengama “Moto ya filozofi.”
Na ntango wana, Méthode amipesaki na misala ya Leta lokola tata na bango. Akómaki kutu guvɛrnɛrɛ ya etúká moko ya Grèce oyo ezali na ndelo na Empire byzantin epai Ba-Slave ebele bazalaki kofanda. Atako bongo, atikaki mosala yango mpe akendeki kofanda na monastɛrɛ moko na etúká ya Bitunia, na Asie Mineure. Na nsima, na mobu 855 T.B., Cyrille alandaki ye kuna.
Na mobu 860 T.B., mokonzi monene ya lingomba ya Constantinople atindaki Cyrille na Méthode na mboka mopaya lokola bamisionɛrɛ. Atindaki bango epai ya Ba-Khazar, bato oyo bazalaki kofanda na nɔrdi-ɛsti ya mer noire, kuna bazalaki kokakatana mpo na kopona lingomba oyo bakolanda: bálanda lingomba ya Bamizilma, Lingomba ya Bayuda, to lingomba ya boklisto. Ntango Cyrille asalaki mobembo mpo na kokende na mboka yango, alekisaki naino mwa ntango na mboka Cherson, na etúká ya Crimée. Bato mosusu ya mayele bakanisaka ete ezali na ntango wana nde ayekolaki lokota ya Liebele na lokota ya Basamalia, mpe abongolaki gramɛrɛ ya lokota ya Liebele na lokota ya Ba-Khazar.
Babengi bango na Moravie
Na mobu 862 T.B., Rostislav, mokonzi ya Moravie (lelo oyo ezali ɛsti ya Tchèquie, wɛsti ya Slovaquie mpe wɛsti ya Hongrie), asɛngaki na mokonzi ya Empire byzantin, Michel III, atindela ye bateyi ya Makomami, na maloba oyo ezali na paragrafe ya ebandeli. Bato ya Moravie oyo bazalaki koloba lokota ya Slave bayokaki mateya ya lingomba epai ya bamisionɛrɛ oyo bautaki na ɛsti ya mokili ya Ba-Franc (lelo oyo Allemagne na Autriche). Kasi, Rostislav azalaki komitungisa mpo ete makambo ya politiki mpe makambo ya losambo ya Ba-Germain ekómaki kopanzana mingi na mboka na ye. Akanisaki ete soki asali boyokani na Constantinople na makambo ya losambo, ekólo na ye ekotikala na bonsomi na makambo ya politiki mpe ya losambo.
Amperɛrɛ azwaki ekateli ya kotinda Méthode na Cyrille na Moravie. Na kotala bakelasi oyo basalaki, mateya oyo bazwaki, nkota oyo bayebaki, babongaki mpenza mpo na mokumba wana. Mokomi moko ya masolo ya bomoi ya bato oyo azalaki na bomoi na ekeke ya libwa, akomaki ete ntango amperɛrɛ azalaki kosɛnga bango bákende na Moravie, alobaki na bango boye: “Bino mibale bobotamaki na Thessalonique, mpe bato nyonso ya Thessalonique balobaka lokota ya Slave ya solosolo.”
Alfabɛ ya sika mpe libongoli ya sika ya Biblia esalemi
Basanza mingi liboso básala mobembo na bango, Cyrille amilɛngɛlaki mpo na mosala na bango na ndenge abongisaki balɛtɛlɛ oyo bakoki kokoma na yango lokota ya Slave. Balobaka ete ayebaki mpenza koyoka lolenge bato bazalaki koloba. Na yango, na lisalisi ya alfabɛ ya Liebele na alfabɛ ya Grɛki, asalaki lɛtɛlɛ moko mpo na moleli mokomoko ya lokota ya Slavon.b Bato mosusu ya mayele bakanisaka ete alekisaki bambula ebele liboso mpo na kobanda kobongisa alfabɛ yango. Lisusu, alfabɛ oyo mpenza Cyrille abimisaki eyebani malamumalamu te tii lelo.—Talá etanda oyo ezali na moto ya likambo “Cyrille abimisaki alphabet cyrillique to alphabet glagolitique?”
Se na ntango wana, Cyrille abandaki nokinoki mosala ya kobongola Biblia. Balobaka ete abandaki naino kobongola maloba ya liboso ya Evanzile ya Yoane na alfabɛ ya sika oyo autaki kosala, maloba yango elobi boye: “Na ebandeli Liloba azalaki . . . ” Nsima na yango, Cyrille abongolaki Baevanzile nyonso minei, mikanda ya Paulo mpe mokanda ya Nzembo.
Azalaki kosala mosala yango kaka ye moko? Emonani mpenza ete Méthode apesaki ye mabɔkɔ na mosala yango. Lisusu, mokanda moko (The Cambridge Medieval History) elobi boye: “Ekoki mpenza kozala ete [Cyrille] azalaki na bato mosusu mpo na kosalisa ye; bato yango basengelaki kozala Ba-Slave mpenza mpe baoyo bayekolaki mateya ya Bagrɛki. Soki totaleli malamu mabongoli ya kala mpenza, . . . tokomona ete ekomamaki na bato oyo bayebaki lokota ya Slavon malamu mpenza, na ntembe te eutaki epai ya bato oyo asalaki na bango, oyo bazalaki bango moko Ba-Slave.” Ndenge tokomona yango na nsima, Méthode nde asilisaki kobongola mikanda mosusu ya Biblia.
“Ndenge nsoso ebenganaka kombekombe”
Na mobu 863 T.B., Cyrille na Méthode babandaki mosala na bango na Moravie; kuna bayambaki bango na esengo mpenza. Longola kobongola Biblia mpe mikanda ya Lingomba, bazalaki lisusu na mosala ya koteya etuluku moko ya bato ya mboka wana alfabɛ ya Slavon oyo Cyrille autaki kobimisa.
Kasi, mikakatano ezangaki te. Bakonzi ya mangomba na Moravie oyo bazalaki Ba-Franc batɛmɛlaki makasi mpenza likambo ya kosalela lokota ya Slavon. Mpo na bango esengelaki kaka kosalela nkota misato na losambo: Latin, Grɛki na Liebele. Na mobu 867 T.B., Cyrille na Méthode bakendeki na Loma mpo na kolakisa Pápa alfabɛ ya sika oyo bautaki kobimisa na elikya ete, na ndenge yango akopesa bango nzela básala mosala na bango.
Ntango bazalaki kokende na Loma, na engumba Venise, Cyrille na Méthode bakutanaki na etuluku moko ya bakonzi ya mangomba oyo bazalaki koloba Latin mpe bazalaki kolendisa likambo ya kosalela kaka nkota misato oyo touti kotánga. Moto moko oyo azalaki na bomoi na eleko babengi Moyen-Âge mpe akomaki lisolo ya bomoi ya Cyrille ayebisi biso ete baepiskɔpɔ na basango ya engumba wana bango nyonso bazomelaki ye “ndenge nsoso ebenganaka kombekombe.” Lisolo yango elobi ete Cyrille azongelaki maloba ya 1 Bakolinti 14:8, 9 mpo na kopesa bango eyano, vɛrsɛ yango elobi ete: “Soki kelelo ekoloba polele te, nani [akomibongisa] mpo na etumba? Boye mpe na bino; soki bokobimisa maloba mayebani ntina te, mpo na kolobaloba na ndenge na ndenge, nani akososola yango elobami? Zambi bozali kolobaloba na mopɛpɛ.”
Nsukansuka ntango bakómaki na Loma, Pápa Adrien II andimaki ndenge bazalaki kosalela lokota ya Slavon. Na nsima ya mwa basanza mpe wana azalaki kaka na Loma, Cyrille abɛlaki makasi. Na nsima, sanza mibale kutu ekokaki te, akufaki; azalaki na mbula 42.
Pápa Adrien II alendisaki Méthode ete azonga kosala na Moravie mpe nzinganzinga ya engumba Nitra, oyo ezali lelo na kati ya ekólo Slovaquie. Lokola alingaki bokonzi na ye endimama na bamboka wana, Pápa apesaki Méthode mikanda oyo emonisaki ete andimaki básalelaka lokota ya Slavon; aponaki mpe Méthode lokola episkɔpɔ-mokonzi. Kasi, na mobu 870 T.B., Hermanrich, episkɔpɔ ya Ba-Franc, na lisalisi ya Mokonzi Svatopluk ya Nitra, akangaki Méthode. Batyaki ye na bolɔkɔ na boumeli ya mbula mibale na ndambo na monastɛrɛ moko na sudi-ɛsti ya Allemagne. Nsukansuka, Pápa Jean VIII, oyo alandaki Adrien II, apesaki mitindo ete bábimisa Méthode na bolɔkɔ. Azongisaki ye na diosɛzɛ na ye mpe amonisaki lisusu ete andimaki ete básalelaka lokota ya Slavon na losambo.
Kasi, bakonzi ya mangomba oyo bazalaki Ba-Franc, balandaki kotɛmɛla likambo yango. Ntango bafundaki ye ete apɛngwi, Méthode asambaki mpe amonisaki polele ete ezalaki lokuta. Nsukansuka, azwaki mokanda ya Pápa Jean VIII oyo epesaki ye ndingisa ya kosalela lokota ya Slavon na ndako-nzambe. Lokola Jean-Paul II, Pápa oyo azali sikoyo, alobaki yango, Méthode alekisaki bomoi na ye “na mibembo, na kozanga biloko, na bampasi, na botɛmɛli mpe na minyoko, . . . ata mpe na bolɔkɔ epai anyokwamaki mpenza.” Likambo ya kokamwa, makambo nyonso wana eutaki na baepiskɔpɔ na bakonzi ya Leta oyo bazalaki na boyokani na bapápa.
Babongoli Biblia mobimba
Ata batɛmɛlaki ye ntango nyonso, Méthode asilisaki kobongola mikanda ya Biblia oyo etikalaki na lokota ya Slavon, na lisalisi ya bato oyo bayebaki kokoma na sténo. Balobaka ete asilisaki mosala monene wana na sanza mwambe mpamba. Kasi, abongolaki te mikanda ya Makabe, oyo etángami te kati na mikanda ya Biblia oyo epemami.
Lelo oyo, ezali mpasi mpo na koyeba mpenza soki libongoli oyo Cyrille na Méthode basalaki ezali malamu. Tozali kaka na bamaniskri moke oyo ekomamaki mwa moke nsima ya kosala libongoli wana. Ntango bazali kotalela mwa bamaniskri moke ya liboso oyo ezali, bato ya mayele oyo bayekolaka nkota bamonaka ete libongoli wana ezalaki sikisiki mpe ekomamaki na ndenge ya pɛtɛɛ mpenza. Buku moko (Our Slavic Bible) elobi ete Cyrille na Méthode “babimisaki maloba mingi ya sika . . . Mpe basalaki nyonso wana na ndenge moko ya sikisiki mpenza [mpe] yango epesaki lokota ya Slave maloba ya sika ebele.”
Libula oyo ekolimwa te
Nsima ya liwa ya Méthode na mobu 885 T.B., batɛmɛli na bango oyo bazalaki Ba-Franc babenganaki bayekoli na ye na Moravie. Bakendeki kofanda na etúká ya Bohême, oyo ezali lelo na sudi ya Pologne mpe Bulgarie. Na bongo, bakobaki mosala ya Cyrille na Méthode mpe bapalanganisaki yango. Lokota ya Slavon, oyo babimisaki alfabɛ na yango mpo ete ekomamaka na mikanda, epanzanaki mpe na nsima, ekómaki kolobama na mitindo ndenge na ndenge. Lelo oyo, Slave ezali na nkota 13 mpe nkota yango ezali kolobama na lolenge mingi.
Lisusu, milende oyo Cyrille na Méthode basalaki mpo na kobongola Biblia esalisaki mabongoli ndenge na ndenge ya Makomami na lokota ya Slave oyo ezali lelo oyo. Ebele ya bato oyo balobaka nkota wana bazali na litomba ya kozala na Liloba ya Nzambe na monɔkɔ na bango. Atako botɛmɛli ezalaki makasi, maloba ya Yisaya 40:8 emonani solo ete: “Liloba ya Nzambe na biso ekotɛlɛma libela.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nkota ya Slave elobamaka na Mpoto ya Ɛsti mpe na Mpoto ya Ntei; kati na yango tozali na Russe, Ukrainien, Serbe, Polonais, Tchèque, Bulgare mpe minɔkɔ mosusu ya motindo wana.
b Na lisolo oyo, tosaleli liloba “slavon” mpo na kolobela lolenge moko ya lokota ya Slave oyo Cyrille na Méthode basalelaki na mosala na bango mpe na makomi na bango. Lelo, bato mosusu babengaka yango “Slavon ya Kala” to “Slavon ya Lingomba ya Kala.” Kasi, bato ya mayele oyo bayekolaka nkota balobaka ete Ba-Slave nyonso ya ekeke ya libwa T.B. bazalaki koloba ndenge moko te.
[Etanda na lokasa 29]
Cyrille abimisaki alphabet cyrillique to alphabet glagolitique?
Ntembe mingi ebimaki kati na bato oyo bayekolaka nkota, mpamba te bayebaka mpenza te soki Cyrille abimisaki alfabɛ nini. Alfabɛ oyo babengi alphabet cyrillique euti mingimingi na alfabɛ ya Grɛki mpe babakisi balɛtɛlɛ soki zomi na mibale mpo na komonisa mileli ya lokota ya Slavon oyo ezali na Grɛki te. Nzokande, bamaniskri mosusu ya kalakala ya lokota ya Slavon ezali na alfabɛ ya ndenge mosusu oyo ebengami alphabet glagolitique. Bato mingi ya mayele bakanisaka ete Cyrille abimisaki nde alfabɛ wana. Emonani ete mwa balɛtɛlɛ mosusu ya alphabet glagolitique euti na makomi ya Grɛki oyo ekomamaka na kokangisa balɛtɛlɛ ndenge elandani, to makomi ya Liebele. Ekoki mpe kozala ete balɛtɛlɛ mosusu eutaki na bilembo oyo bazalaki kosalela na makomi ya Moyen-Âge. Kasi, asalaki balɛtɛlɛ mingi ye moko mpe ezalaki mindɔndɔ te. Emonani ete alphabet glagolitique ezalaki mpenza alfabɛ ya sika, oyo ekeseneki mingi na alfabɛ mosusu nyonso. Kasi, alphabet cyrillique nde ebimisaki baalfabɛ oyo bazali kosalela na mikolo na biso na nkota ya Russe, Ukrainien, Serbe, Bulgare na Macédonien; bakisa mpe nkota mosusu 22 oyo, mosusu kati na yango euti na lokota ya Slavon te.
[Karte na lokasa 31]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Mer Baltique
(Pologne)
Bohême (Tchéquie)
Moravie (Ɛsti ya Tchéquie, wɛsti ya Slovaquie, wɛsti ya Hongrie)
Nitra
ƐSTI YA MOKILI YA BA-FRANC (Allemagne na Autriche)
ITALIE
Venise
Loma
Mai Monene ya Méditerranée
BULGARIE
GRÈCE
Thessalonique
(Crimée)
Mer Noire
Bitunia
Constantinople (Istanbul)
[Elilingi na lokasa 31]
Biblia moko na lokota Slavon ekomami na “alphabet cyrillique” na mobu 1581
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Biblia: Narodna na univerzitetna knjiz̆nica-Slovenija-Ljubljana