Lipaso kozanga kozongisa makila—“Minganga mingi bakómi kosalela yango”
LISOLO moko oyo ebimaki na zulunalo moko (Maclean’s) ezalaki na motó ya likambo ete “Lipaso ‘kozanga kozongisa makila,’” emonisaki ete na bisika mingi na Canada, minganga, “na mbula mitano oyo eleki, bazali kosalela mayele oyo ya sika, mpe bakómi kosala lipaso kozanga kozongisa makila.” Moko ya minganga yango ezali Brian Muirhead, ye azali anesthésiste na lopitalo moko (Health Sciences Centre) ya engumba Winnipeg. Nini etindaki ye na kosalela mayele oyo ezali kosɛnga kosala lipaso kozanga kozongisa moto makila?
Na 1986, Doktɛrɛ Muirhead andimaki kosala likambo moko ya mpasi: kopasola mobali moko ya mbula 70 oyo azalaki na mpota oyo ezalaki kobima makila. Lokola moto yango azali Motatoli ya Yehova, atosaka mibeko ya Biblia; asɛngaki ete básalisa ye kozanga kozongisa ye makila. (Misala 15:28, 29) Zulunalo Maclean’s elobi boye: “[Doktɛrɛ Muirhead] asalelaki mayele oyo minganga basalelaka mingimingi te, ya kopesa moto ya maladi nkisi oyo esalaka ete tansyo ya moto ekita te. Mayele yango esalisaki mpenza, mpe mpo na yango Muirhead andimaki likambo oyo etindaki ye aloba ete ‘tolekisaki kozongisa bato makila. Nakanisaki ete ekómaki ntango ya kosalela mayele mosusu na esika ya kozongisaka makila.’”
Likambo ya koluka mayele ya kosala bato lipaso kozanga kozongisa bango makila “engalaki mpamba te, minganga bakómaki komituna soki na mikolo ekoya makila oyo bato bazali kopesa mpe bazali kobomba ekozala kaka mingi, lisusu, bato mingi ya maladi bakómaki kobanga kozwa mikrobe mosusu na makila oyo bazongisi bango.” Na lisalisi ya mayele ya sika oyo minganga bazali koyekola, Batatoli ya Yehova mpe bato mosusu ebele bazwi litomba na yango. Zulunalo Maclean’s elobi ete: “Lipaso kozanga kozongisa makila ezali kosala ete bato mingi básalisama kozanga ete bázongisa bango makila mpe ekitisi likama ya kozwa maladi na nzela ya makila oyo ezali na mikrobe, atako likama yango ezali moke.” Kasi ata makila “ya pɛto” ekoki kopesa maladi mpamba te, na boumeli ya mwa ntango, esilisaka makoki oyo nzoto ezali na yango ya kobundisa mikrobe.
Mpo na nini Batatoli ya Yehova balingaka ete minganga básalela mayele oyo ezali kosɛnga kozongisa makila te? Mbala mosusu okosepela kotánga mwa buku Comment le sang peut-il vous sauver la vie? Batatoli ya Yehova bakosepela kopesa yo yango.