Mpo na nini osalelaka Nzambe?
Mokonzi moko oyo azalaki mpenza kobanga Nzambe, apesaki mwana na ye toli oyo: “Yebá Nzambe ya tata na yo mpe salelá ye na motema malamu mpe na [molimo ya esengo, NW ].” (1 Ntango 28:9) Emonani polele ete, Yehova alingaka basaleli na ye básalela ye na motema ya botɔndi mpe ya esengo.
LOKOLA tozali Batatoli ya Yehova, tozali kondima ete ntango balimbolelaki biso bisakweli ya Biblia mpo na mbala ya liboso, mitema na biso esepelaki mingi. Mokolo na mokolo, tozalaki koyekola makambo ya sika oyo etali mikano ya Nzambe. Ntango tokómaki koyeba makambo mingi mpo na Yehova, mposa na biso mpe ezalaki kokóma makasi mpo na kosalela ye na “motema malamu mpe na molimo ya esengo.”
Bato mingi oyo bakómaka Batatoli ya Yehova, balandaka kosalela Yehova na esengo bomoi na bango mobimba. Nzokande, baklisto mosusu babandaka malamu, kasi na nsima, babosanaka ntina oyo etindaka biso tósalela Nzambe. Likambo yango ekómeli yo? Soki ɛɛ, kolɛmba nzoto te. Okoki kozongela esengo oyo obungisi. Ndenge nini?
Kanisá mapamboli oyo ozali na yango
Ya liboso, kanisá mapamboli ya mokolo na mokolo oyo Nzambe azali kopesa yo. Kanisá makabo kitoko ya Yehova: misala na ye ndenge na ndenge ya bozalisi oyo moto nyonso akoki kosepela na yango; biloko ya kolya mpe mai, mwa bokolɔngɔnɔ ya nzoto oyo ozali na yango, boyebi na yo ya mateya ya solo ya Biblia, mpe na koleka nyonso, likabo ya Mwana na ye. Liwa ya Mwana na ye ebongisaki nzela mpo ete yo osalela Nzambe na lisosoli ya pɛto. (Yoane 3:16; Yakobo 1:17) Soki ozali kokanisa malamu ya Nzambe mingi, okosepela na ye mpe mingi. Na bongo motema na yo ekotinda yo osalela ye na botɔndi mpo na makambo nyonso oyo asali. Na ntembe te okomiyoka lisusu lokola mokomi ya nzembo oyo akomaki boye: “Ɛ, [Yehova], Nzambe na ngai, yo osali makambo mingi, misala na yo na kokamwa mpe mikano na yo izali mpo na biso; mosusu lokola yo azali te. . . . Ikoleka oyo ikoki kotángama.”—Nzembo 40:5.
Davidi moto akomaki maloba wana, ye mpe akutanaki na mikakatano na bomoi na ye. Ntango azalaki elenge, Davidi alekisaki ntango mingi na bomoi na ye na kokimakima lokola Saulo, mokonzi mabe mpe bakɛngɛli na ye bazalaki koluka koboma ye. (1 Samwele 23:7, 8, 19-23) Davidi azalaki mpe na bolɛmbu oyo asengelaki kobundisa. Andimaki yango na Nzembo 40 ete: “Makambo mabe mazingeli ngai, motuya mokotángama te; masumu na ngai makuti ngai, kino nayebi kotala lisusu te. Izali mingi mpenza, koleka nsuki ya motó na ngai.” (Nzembo 40:12) Ya solo, Davidi azalaki na mikakatano, kasi atikaki yango ezindisa ye mobimba te. Azalaki kotalela mingi ndenge Yehova azalaki kopambola ye, mpe amonaki ete mapamboli yango ezalaki mingi koleka bampasi na ye.
Ntango omoni ete mikakatano na yo elekeli yo to ozali komona lokola ete okoki te, ezali malamu ofanda naino mwa nyɛɛ mpe okanisa mapamboli oyo ozali na yango, ndenge Davidi asalaki. Na ntembe te, ntango osepelaki na mapamboli, yango nde etindaki yo omipesa na Yehova; makanisi ya ndenge yango ekoki lisusu kosalisa yo ozongela esengo oyo obungisi mpe ekosalisa yo osalela Nzambe na motema ya esengo.
Makita ya lisangá ekoki kosalisa
Longola kokanisa malamu ya Yehova biso moko, tosengeli kosanganaka na bandeko na biso baklisto. Kokutana pɔsɔ na pɔsɔ na mibali, basi, mpe bilenge oyo balingaka Nzambe mpe bazali na ekateli ya kosalela ye, elendisaka biso. Ndakisa na bango ekoki kotinda biso tósalela Yehova mosala na molimo na biso mobimba. Bango mpe bakoki kolendisama ntango bazali komona biso na Ndako ya Bokonzi.
Ya solo, soki tozongi na ndako nsima ya kosala mosala ya makasi mokolo mobimba to soki tolɛmbi nzoto mpo na mokakatano mosusu to bolɛmbu, ezalaka mwa mpasi mpo na kokanisa kokende na makita na Ndako ya Bokonzi. Na bantango ya ndenge yango, tosengeli mpenza komipesa disipilini, ezali lokola ‘tozali kobɛta nzoto na biso,’ mpo na kotosa mobeko ya koyangana na bandeko na biso baklisto.—1 Bakolinti 9:26, 27; Baebele 10:23-25.
Soki tokómi na mwa bolɛmbu mpo na kokende na makita, tosengeli nde koloba ete tozali kolinga mpenza Yehova te? Te. Ezala baklisto oyo batelaki na elimo na ntango ya kala, baoyo moto te akokaki kotya ntembe ete balingaki Nzambe, basengelaki kotya milende mpo na kosala mokano ya Nzambe. (Luka 13:24) Ntoma Paulo azalaki moko na kati ya baklisto yango. Amonisaki polele ndenge oyo azalaki koyoka ntango akomaki boye: “Nayebi ete eloko moko malamu efandi na ngai, kati na nzoto na ngai, te. Mpo ete, ata nazali kokana malamu, nayebi kosala yango te. Malamu oyo elingi ngai kosala, nakosalaka yango te. Kasi mabe oyo elingi ngai te, nakosalaka bobele yango.” (Baloma 7:18, 19) Ayebisaki mpe baklisto ya Kolinti ete: “Soko nazali kosakola Nsango Malamu, ezali na ngai likambo na komikumisa te. Napesami [mokumba, NW ] ete nasala boye. . . . Zambi soko nakosala likambo oyo na mokano na ngai mpenza, nakozwa libonza; nde soko na mokano na ngai mpenza te, napesameli lotomo mpe bongo.”—1 Bakolinti 9:16, 17.
Lokola mingi kati na biso, nzoto ya ntoma Paulo ezalaki na mposa ya kosala masumu oyo ezalaki kokanga mposa na ye ya kosala makambo ya malamu. Kasi, azalaki kobundisa bamposa yango makasi, mpe mbala mingi azalaki kolonga. Ya solo, ntoma Paulo alongaki na makasi na ye moko te. Akomaki boye: “Nayebi kosala makambo nyonso kati na ye oyo akokembisaka ngai na nguya.” (Bafilipi 4:13) Yehova, ye oyo apesaki ntoma Paulo nguya, akopesa yo mpe nguya mpo na kosala makambo ya malamu soki osɛngi ye asalisa yo. (Bafilipi 4:6, 7) Yango wana bundá “etumba makasi ya kondima,” mpe Yehova akopambola yo.—Yuda 3, NW.
Ozali yo moko te mpo na kobunda etumba yango. Na masangá ya Batatoli ya Yehova, baklisto oyo bakómi bankulutu bateli na elimo, bazali kolendendela na “etumba ya kondima,” bakosalisa yo. Soki okei epai ya nkulutu moko mpo asalisa yo, akosala makasi mpo na ‘kosolola’ na yo na ‘maloba ya kobɔndisa.’ (1 Batesaloniki 5:14, NW ) Mokano na ye ekozala ya kozala ‘lokola ebombamelo mpo na mopɛpɛ, ezipelo na ntango ya mbula makasi.’—Yisaya 32:2.
“Nzambe azali bolingo,” mpe alingaka ete basaleli na ye básalela ye na bolingo. (1 Yoane 4:8) Soki bolingo na yo mpo na Nzambe esengeli lisusu kozonga ndenge ezalaki kala, salá nyonso oyo esengeli mpo na kozongisa yango, lokola emonisami na lisolo oyo. Okosepela mpenza soki osali bongo.