Nsango malamu ya kimya ekómi na bamboka ya bangomba na Chiapas
Zulunalo “EL Universal,” ekomaki ete: “Na mokolo ya 22 Desɛmbɛ 1997, na mboka Acteal, na etúká ya Chiapas, bato oyo bazalaki na mindoki mpe babombaki bilongi na bango, batiki kaka miso, babomaki bato 45 na mboka yango, kati na bango bana 13. Moto moko te akobosana likambo wana oyo bato mingi bakufaki, na etúká ya Chiapas.”
CHIAPAS ezali etúká oyo ezali na sudi mpenza ya ekólo Mexique, na ndelo oyo ekaboli ekólo yango na ekólo Guatemala. Lokola banda kala bato bazali babola mpe bazali kokelela, na Yanuali 1994, etuluku moko ya bana-mboka (Indiens Mayas) basalaki lingomba moko ya batomboki oyo bazali na mindoki, mpe bapesaki lingomba na bango nkombo Ejército Zapatista de Liberación Nacional (EZLN). Batomboki yango bazalaki koyokana te na guvɛrnɛma na makambo oyo bazalaki kosolola mpo na kosilisa matata yango na kimya. Basoda ya guvɛrnɛma babundaki bitumba makasi na batomboki yango mpe bitumba yango esopaki makila mingi mpe bato mingi bakufaki. Lokola mboka yango ekómaki na yikiyiki, bato mingi bakimaki mboka yango.
Na kati ya yikiyiki yango, ezali na bato oyo balingaka kimya mpe bakɔtaki te na bitumba ya bato ya politiki. Bazali koteya na molende mpenza, ete Bokonzi ya Nzambe ezali elikya se moko mpo na kosilisa mikakatano oyo ezali kotungisa bato, na mboka na bango mpe na mokili mobimba. (Danyele 2:44) Bato yango ezali banani? Ezali Batatoli ya Yehova. Bazali kotosa mobeko ya Yesu, bazali kosala makasi mpo na komema nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mosika na bamboka ya bangomba na Chiapas. (Matai 24:14) Ndenge nini basalaki mpo na koteya na kati ya yikiyiki yango, mpe matomba nini bazwaki?
“Nazali Motatoli ya Yehova”
Mokolo moko, Adolfo, elenge mobali moko oyo akómaki mosakoli ya Bokonzi sika, azalaki kosala esika baemisyo ya radio esalemaka na engumba Ocosingo. Mbala moko, ayokaki babɛti ekuke makasi. Bato babombi bilongi mpe batiki kaka miso, bakɔtaki na makasi mpe batalisaki ye mindoki na motó. Balekaki nokinoki na ndako oyo basalaka baemisyo, bakamataki mikro, mpe balobaki na radio ete babandi bitumba na guvɛrnɛma.
Ntango bazongelaki Adolfo, balobaki na ye akɔta na lingomba na bango. Atako azwaki naino batisimo te, Adolfo alobaki ete: “Nazali Motatoli ya Yehova.” Alobaki na bango ete elikya se moko mpo na kimya ezali Bokonzi ya Nzambe, mpe aboyaki kozwa sokoto na bango mpe mondoki oyo bapesaki ye. Ntango bamonaki ndenge aboyaki, batikaki ye akende. Ntango akanisaki likambo yango, Adolfo alobi ete: “Likambo yango elendisaki mpenza kondima na ngai.”
Na nsima mwa kimya ekɔtaki, kasi mboka yango ezalaki kaka na mabɔkɔ ya basoda. Atako bongo, Adolfo andimaki na esengo nyonso ntango bankulutu ya lisangá na bango basɛngaki ye akende kosala na bandeko mosusu na teritware moko esika lisangá ezalaki te. Na bisika nyonso oyo bazalaki kotala mikumba ya moto nyonso oyo asengelaki koleka, basoda bazalaki kopesa ye limemya ntango azalaki koloba ete azali Motatoli ya Yehova. Na nsima azwaki batisimo mpe asepelaki na ndenge asalisaki bato oyo bazalaki na teritware yango esika lisangá ezalaki te mpe lisangá moko ya Batatoli ya Yehova ekómá kuna. Adolfo alobaki ete: “Sikoyo lokola nazwi batisimo, nakoki nde koloba mpenza ete nazali Motatoli ya Yehova!”
“Yehova apesaki biso makasi”
Mwa moke nsima ya ntango oyo bato ya EZLN balobaki na radio ete babandi bitumba na guvɛrnɛma, bato nyonso ya mboka bakimaki. Mobongisi-nzela moko, nkombo na ye Francisco, alimbolaki ndenge Yehova asalisaki ye na mwasi na ye ete bázwa makasi mpe báyeba ndenge ya kosala na makambo oyo basengelaki kokutana na yango.
“Nsima ya kotambola na makolo ngonga misato, tozwaki ekateli ete tófanda na mboka moko. Lisangá moko ezalaki wana, na yango tozalaki esika moko na bandeko na biso. Etikalaki mikolo mingi te mpo liyangani ya zongazonga esalema na mwa mboka moko babengi Palenque. Ngai na mwasi na ngai tolingaki te kozangisa likita mpo na babongisi-nzela, kasi toyokaki ete bato ya EZLN bakangi nzela oyo tosengeli koleka mpo na kokende na liyangani. Toyokanaki ete tosengeli kokende na nzela ya zamba, mpe totambolaki ngonga libwa. Tokómaki na ngonga ya malamu mpe tokɔtaki na likita mpo na babongisi-nzela, tosepelaki na yango mingi, tolandaki mpe liyangani mobimba.
“Ntango tozongaki epai na biso, tokutaki batumbi ndako na biso mpe bayibi bibwele na biso. Etikalaki kaka sakosi moko ya moke ya bilamba. Toyokaki mawa mingi, kasi bandeko ya Ocosingo bayambaki biso na boboto nyonso na bandako na bango. Balakisaki mpe biso ndenge ya kosala misala oyo, biso bato ya bilanga, tosalaki yango liboso te. Ndeko moko alakisaki ngai kokanga fɔtɔ, mpe mosusu alakisaki ngai kobongisa sapato. Na ndenge yango nde ngai na mwasi na ngai tozali komibikela tii sikoyo kozanga kotika mosala ya mobongisi-nzela. Soki tokanisi makambo oyo elekaki, tomoni ete atako ezalaki mpasi mpo tóyikela yango mpiko, Yehova apesaki biso makasi.”
Mbuma oyo mosala ya kosakola eboti
Batatoli na etúká ya Chiapas batikaki nzela te ete mpasi oyo likama yango ebimisaki epekisa bango kosala milende mpo na koteya bato oyo bafandaka kuna nsango malamu. Na ndakisa, na Aprili mpe Mai 1995, basalaki lokola bandeko na bango baklisto ya mokili mobimba, na mosala monene ya kokabola batrakte Nsango ya Bokonzi No. 34, oyo ezalaki na motó ya likambo oyo ebongi mpenza ete Mpo na nini bomoi etondi na mikakatano?
Ntango bazalaki kokabola batrakte na ferme moko babengi Pueblo Nuevo, mobongisi-nzela moko nkombo na ye Ciro, akutanaki na bato ya libota moko oyo basepelaki na nsango na ye. Ntango azongaki nsima ya mikolo misato, abandaki koyekola na bango Biblia. Kasi mokolo oyo Ciro na ndeko mosusu bazongaki mpo na kokoba boyekoli na bato ya libota yango, tata ya libota yango azalaki te. Nzokande, batomboki wana bazalaki kozela ye mpo na kosala ye mabe. Batunaki Ciro na moninga na ye soki bazalaki koluka nini mpe balingaki báboma bango. Nsima ya kobondela Yehova na kati ya motema, Ciro na moninga na ye bayebisaki bango na mpiko nyonso ete bayaki mpo na koteya bato ya libota yango mateya ya Biblia. Ntango bayokaki bongo, batomboki yango batikaki bango. Mpo na bantina mosusu, tata ya libota yango azongaki na ndako te mokolo yango.
Mokolo moko, nsima ya mbula misato, Ciro akamwaki ntango amonaki tata yango na ndako na ye. Ciro asepelaki mingi ntango ayebisaki ye ete libota na ye mobimba bazwá batisimo mpe bazali na lisangá moko na ekólo Guatemala! Mwana na ye moko ya mwasi kutu akómá mobongisi-nzela ya sanza na sanza.
Basepelaka na bilei ya elimo
Atako mpasi ezali kosila te na Chiapas, mokɛngɛli ya etúká moko alobaki ete bandeko basepelaka koyangana na makita. (Baebele 10:24, 25) Ayebisi makambo elekaki na liyangani ya mokolo moko oyo eutaki kosalema, oyo basalaki ete ebanda na ntɔngɔ mpo bayangani bákoka kozonga na bandako na bango ntango moi ezali naino. Atako bato mingi batambolaki na boumeli ya ngonga koleka misato na kati ya zamba mpo na kokóma na esika ya liyangani, moto nyonso oyo azalaki wana afandaki na esika na ye na ngonga ya 7 ya ntɔngɔ. Bato motoba ya EZLN bazalaki mpe wana, bazalaki kolanda masolo nyonso mpe bazalaki kobɛta mabɔkɔ. Emonani ete basepelaki na mateya oyo epesamaki na liyangani. Bango mpe batambolaki na makolo ngonga misato mpo na kozala na liyangani. Bato ntuku mibale ya EZLN bazalaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto, oyo esalemaki na Ndako ya Bokonzi na mboka na bango.
Lingomba ya batomboki epesaki elenge mobali moko mokumba akɛngɛlaka zamba moko. Ntango akómaki na mboka moko na kati ya zamba yango, akutaki bato nyonso, oyo mingi na bango bazalaki Batatoli ya Yehova, bakimá. Afandaki na ndako moko oyo basundolaki. Lokola azangaki eloko ya kosala, azwaki mwa babuku oyo amonaki na ndako yango mpe abandaki kotánga. Ezalaki mikanda ya la Société Watch Tower oyo Batatoli ya Yehova batikaki. Lokola azalaki ye moko, elenge yango azwaki ntango mpo na kokanisa makambo oyo azalaki kotánga. Azwaki ekateli ete asengeli kobongola bomoi na ye mpe kotika mosala ya soda. Asalaki nokinoki, akutanaki na Batatoli mpe abandaki koyekola Biblia. Nsima ya sanza motoba, akómaki koteya bato mosusu nsango malamu. Ye na bato misato mosusu ya libota na ye oyo bazalaki na lingomba ya batomboki, bazali sikoyo baklisto oyo bazwi batisimo.
Bamoni ngámbo ya malamu
Atako bomoi ezali mpasi, matata oyo ezali kuna esalaki ete bato bándima nsango malamu. Nkulutu moko na engumba oyo bitumba ebandaki alobi ete: “Ntango bitumba ebandaki, nsima ya mikolo mitano, tomibongisaki mpo na kosakola na engumba mpe na bamboka ya pembenipembeni. Bato bazalaki kosepela mingi mpo na koyoka biso. Tokabolaki mikanda mingi oyo elimbolaka Biblia mpe tobandaki koyekola Biblia na bato mingi. Na esika moko, bato mingi bazalaki kolinga mateya ya solo te, kasi mpo na etumba, bayokaka, bayekolaka Biblia, mpe bakendaka na makita mpe na mayangani.”
Bandeko bazali na esengo mpo basalaki ete misala ya Teokrasi ekende liboso atako mboka ezalaki na yikiyiki. Lokola bato ya guvɛrnɛma mpe bato ya EZLN bayebi bango, bazali kolanda kosala mayangani, oyo elendisaka bango na elimo. Bakɛngɛli-batamboli oyo bazali kotala bandeko kuna bazali kolendisa bango mpo na kokoba mosala ya kosakola. Likambo ya esengo, maloba mosusu ya kolendisa eutaka ata epai ya bato oyo bazali kobunda, baoyo mbala mingi balobaka na Batatoli ete bákoba na mosala na bango ya kosakola.
Atako komekama mpe mpasi oyo bato bayikelaki yango mpiko na Chiapas ekiti mwa moke nsima ya bambula mingi, kasi esili naino te. Atako bongo, likambo oyo ezali solo ete: Batatoli ya Yehova bazali na mokano ya kolɛmbisa milende na bango te mpo na kosakolela bato nsango malamu ya kimya oyo ezali na Biblia, Liloba ya Nzambe. (Misala 10:34-36; Baefese 6:15) Bayebi malamu, lokola mosakoli Yilimia alobaki, ete “Nzela na moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye [ye] moko.” (Yilimia 10:23) Kaka Bokonzi ya Nzambe oyo apesi na mabɔkɔ ya Mwana na ye, Yesu Klisto, nde ekoki kosilisa kozanga bosembo mpe bobola na mokili.—Matai 6:10.
[Karte na lokasa 9]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Golfe ya Mexique
CHIAPAS
GUATEMALA
Mbu ya Pasifike
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Mountain High Maps® Copyright © 1997 Digital Wisdom, Inc.
[Elilingi na lokasa 9]
Batatoli na mosala ya kosakola na bamboka ya bangomba na Chiapas