Basalaki mokano ya Yehova
Makabo ya bolingo malamu mpo losambo ya pɛto ekende liboso
BAYISALAELE bamonaki makasi oyo Yehova azali na yango mpo na kobikisa. Bamonaki ndenge Mai Motane ekabwanaki na likamwisi, mpe epesaki bango nzela ya kokatisa na mabelé oyo ekauki mpe kobika liboso ya basoda ya Ezipito oyo bazalaki kolanda bango. Nzokande, bamonaki na mwa mosika ndenge mai yango ezongaki mpe ebomaki bato oyo bazalaki kolanda bango. Yehova abikisaki bango!—Exode 14:21-31.
Kasi, na mawa nyonso, Bayisalaele mosusu batyolaki makambo oyo Nzambe na bango asalaki. Ntango Mose azalaki na Ngomba Sinai, bayaki na babiju ya wolo epai na Alona mpe basɛngaki ye asalela bango ekeko mpo básambela yango. Ntango Mose azongaki, akutaki ebele ya batomboki yango bazali kolya, komela, kobina, mpe kofukamela mwana ngɔmbɛ ya wolo! Yehova apesaki etinda mpe babomaki bato soki 3 000, ekoki mpenza kozala baoyo babandaki botomboki wana. Na mokolo yango, libota ya Nzambe ezwaki liteya moko monene, elingi koloba basengeli kosambela kaka Yehova.—Exode 32:1-6, 19-29.
Mwa moke nsima ya likambo yango, Mose abongisaki mosala ya kotonga mongombo ndenge Nzambe atindaki. Ezalaki ndako ya kapo mpo na losambo, bakoki kokanga mpe komema kapo yango. Mosala yango ya kotonga esɛngaki biloko ya motuya mingi mpe bato ya mayele. Yango eutaki wapi? Mpe liteya nini tokozwa na lisolo yango oyo ekomami na Biblia?
Bapesi biloko mpe mayele na bango lokola makabo
Na monɔkɔ ya Mose, Yehova alobaki na Bayisalaele boye: “Bókamata na kati na bino makabo mpo na Yawe. Soko moto alingi kopesa na motema malamu, mbɛlɛ aya na likabo na Yawe.” Makabo ya ndenge nini? Kati na biloko oyo Mose atángaki ezalaki wolo, palata, motako, nsinga, bilamba, mposo ya nyama, mabaya, mpe mabanga ya ntalo.—Exode 35:5-9.
Bayisalaele bazalaki na biloko oyo ekokaki mpo na kopesa makabo yango ya bolingo malamu. Tóbosana te ete ntango babimaki na Ezipito, bamemaki biloko ya wolo na palata, na bilamba mingi. Ɛɛ, “bapunzaki Baezipito.”a (Exode 12:35, 36) Liboso, Bayisalaele bapesaki na bolingo na bango moko babiju mpo na kosala ekeko mpo na losambo ya lokuta. Sikoyo, bakomonisa mposa ya kopesa makabo mpo losambo ya solo ekende liboso?
Kasi, tomoni ete Mose akataki te motuya ya biloko oyo mokomoko asengelaki kopesa, amonisaki mpe bango te ete bazali na nyongo to ayokisaki bango nsɔni te mpo na kotindika bango na kopesa. Kasi, asɛngaki bobele na “moto oyo alingi kopesa na motema malamu.” Emonani ete Mose amonaki ntina te ya kosɛnga basaleli ya Nzambe makabo na makasi. Azalaki na elikya ete moto na moto akopesa nyonso oyo akoki kopesa.—Talá 2 Bakolinti 8:10-12.
Kasi, mpo na kotonga hema yango bazalaki na mposa kaka ya biloko te. Yehova ayebisaki Bayisalaele lisusu boye: “Bato nyonso ya mayele kati na bino báya mpe básala biloko nyonso bisili Yawe kolaka.” Ya solo, bazalaki mpe na mposa ya bato ya mayele. Bazalaki na mposa ya bato ya “mayele” na mosala ya mabaya, ya bibende, mpe ya biju, mpo na kotonga hema yango. Kasi, Yehova atambwisaki mayele ya bato yango, mpe lokumu ya mosala nyonso basalaki epesamaki na ye.—Exode 35:10, 30-35; 36:1, 2.
Bayisalaele bandimaki likambo yango na esengo mpe bapesaki biloko mpe mayele na bango lokola makabo. Biblia elobi ete: “[Bayaki], moto na moto na mposa na motema na ye mpe moto na moto akanaki boye na makanisi na ye, bayaki na makabo na Yawe mpo na kobongisa hema na koyangana mpe mpo na mosala na yango mpe mpo na bilamba na bulɛɛ. Bongo, bayaki, babali mpe basi, bango nyonso bazalaki na mposa na mitema na bango.”—Exode 35:21, 22.
Liteya mpo na biso
Lelo oyo, mosala monene ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali kokokisama na lisalisi ya makabo ya bolingo malamu. Mbala mingi, makabo yango ezalaka mbongo. Nzokande, bandeko baklisto bazali kosalela mayele na bango mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi, Bandako ya Mayangani, mpe bafiliale. Ezali mpe na mosala oyo ezali kosalema na Babetele koleka nkama na mokili mobimba, mosala oyo esɛngaka mayele na makambo ndenge na ndenge. Bato nyonso ya mitema malamu oyo bapesi makabo ya ndenge wana báyeba ete Yehova akobosana misala makasi na bango te!—Baebele 6:10.
Likambo yango ezali mpe kotalela ndenge oyo mokomoko na biso azali kosangana na mosala ya boklisto. Biso nyonso tolendisami ete tósomba ntango mpo na kosangana na mosala ya kosakola na molende. (Matai 24:14; Baefese 5:15-17) Bamoko bazali kosala yango lokola basakoli ya ntango nyonso, to babongisi-nzela. Nzokande, bamosusu mpo na bantina ya ndenge na ndenge, bazali kokoka te kolekisa ntango mingi na mosala ya kosakola lokola babongisi-nzela. Kasi, bango mpe bazali kosepelisa Yehova. Ndenge moko na makabo mpo na kosala mongombo, Yehova ayebisi te ngonga boni moto mokomoko asengeli kolekisa na mosala ya kosakola. Kasi, azali kosɛnga ete, moto na moto asalela ye na motema mobimba, na molimo mobimba, na makanisi mobimba, mpe na makasi na ye mobimba. (Malako 12:30) Soki tozali kosala bongo, tokoki kozala na elikya ete akopesa biso mbano mpo na makabo ya bolingo malamu oyo tozali kopesa mpo losambo ya solo ekende liboso.—Baebele 11:6.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Likambo yango ezalaki moyibi te. Bayisalaele basɛngaki Baezipito makabo, mpe Baezipito bapesaki yango na makasi te. Lisusu, lokola ezalaki likambo malamu te ete Baezipito bákanga Bayisalaele na boombo, basengelaki kofuta basaleli ya Nzambe mpo na mosala makasi oyo basalisaki bango bambula ebele.