Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/11 lok. 32
  • Zalá na bokatikati na mosala mpe na kominanola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zalá na bokatikati na mosala mpe na kominanola
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/11 lok. 32

Zalá na bokatikati na mosala mpe na kominanola

“KOMINANOLA ezali elamba kitoko, kasi ebongi kolata yango ntango nyonso te.” Na maloba yango, mokomi moko oyo ayebisi nkombo na ye te amonisi ntina ya kominanola. Kasi, amonisi ete tosengeli kozala na bokatikati na kominanola mpe mosala oyo ebotaka mbuma.

Salomo, mokomi moko ya Biblia alobaki mpe likambo yango. Mokonzi yango ya mayele mingi amonisaki bandelo mibale oyo tosengeli kolekisa te. Ya liboso, alobaki boye: “Zoba akokanga mabɔkɔ na ye elongo mpe akolya mosuni na ye moko.” (Mosakoli 4:5) Ya solo, gɔigɔi ekoki kokómisa moto mobola. Ekoki kozala likama mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto, to mpo na bomoi ya moto ya goigoi. Nzokande, bato mosusu basundolaka makambo nyonso mpo na komipesa na mosala makasi. Salomo alobaki ete ndenge bazali kominyokola ntango nyonso “ezali se mpamba mpe ezali lokola kolanda [mopɛpɛ]!”—Mosakoli 4:4, Liloba lya Nzambe.

Na yango, Salomo asɛngaki biso tózala na bokatikati. Alobaki boye: “Malamu ozala na mwa ntango ya bopemi esika ’te osala mosala ntango inso mpe olanda [mopɛpɛ].” (Mosakoli 4:6, Liloba lya Nzambe) Esengeli moto “azwa esengo kati na mosala [makasi, NW] na ye,” elingi koloba, asengeli kozwa ntango ya kosepela na biloko oyo azwi. (Mosakoli 2:24) Moto asengeli mpe kosala makambo mosusu na bomoi na ye longola mosala ya mosuni. Tosengeli kolekisa mwa ntango na libota na biso. Salomo amonisaki ete mokumba na biso ya libosoliboso ezali mosala ya mosuni te, kasi mosala ya Nzambe. (Mosakoli 12:13) Yo mpe otalelaka mosala na bokatikati?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto