Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/5 nk. 26-27
  • Venda: Mokili oyo ezali kobota mbuma mingi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Venda: Mokili oyo ezali kobota mbuma mingi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Lokota moko makasi
  • Mbuma ya elimo
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/5 nk. 26-27

Venda: Mokili oyo ezali kobota mbuma mingi

NA MBULA zomi oyo eleki, ngai na mwasi na ngai tosalaki mosala ya mobongisi-nzela epai ya Bavenda. Bavenda bafandi na sudi ya Ebale Limpopo, na nɔrdi ya Afrika ya Sudi, mpe ekólo na bango ezali na bituluka ndenge na ndenge oyo bakatisaki na ngámbo mosusu ya Ebale Limpopo eleki sikoyo bikeke mingi. Bavenda mosusu balobaka ete bankɔkɔ na bango bakendaki kofanda kuna esali sikoyo mbula 1 000 to koleka.

Na ntango ya kala, etúká yango ezalaki na kati ya ekólo moko babéngaki Bokonzi ya Mapungubwe. Yango ezalaki engumba ya liboso na Afrika ya Sudi mpe etongamaki na esika oyo ezali likoló na kati ya lobwaku monene ya Ebale Limpopo mobimba, banda na ekólo Botswana na ngámbo ya wɛsti tii na ekólo Mozambique na ngámbo ya ɛsti. Banda pene ya mobu 900 T.B. tii na mobu 1100 T.B., Baarabe oyo bazalaki kosala mombongo bazalaki kosomba mpɛmbɛ ya nzoku, maseke ya rhinocéros, mposo ya nyama, kwivre, mpe wolo na Mapungubwe. Na mwa ngomba moko babéngi Mapungubwe, oyo ezalaki malita ya mokonzi, bakundolaki biloko babaká wolo, biloko oyo esalemaki na basali ya mayele. Buku moko eyebisi ete yango ezali “bilembo ya liboso ya mosala ya kotimola wolo na sudi ya Afrika.”

Lelo oyo, batimolaka lisusu wolo kuna te. Mokili ya Venda eyebani mingi lokola epai oyo mbuma ebotaka mingi. Na sudi ya Bangomba Soutpansberg, lobwaku moko ya mabelé malamu ezali wana; mbuma lokola savoka, bitabe, manga, mpe mapela ezali bebo. Longola mwa mbuma mike lokola noix de pécan na macadamia, ezali mpe na ndunda ndenge na ndenge. Moko na yango ezali muroho oyo ebimaka na zamba, ezali elɛngi lokola épinard, mpe bato ya mboka wana balingi yango mingi.

Bavenda balingi kimya mpe bayambaka bapaya malamu. Mbala mingi mokonzi ya libota abomelaka mopaya oyo ayei na mbalakaka nsɔsɔ. Balyaka yango na vhuswa, bilei oyo bato balyaka mingi na mboka wana, basalaka yango na masango. Soki mopaya alingi kozonga, tata ya libota akendaka kotika ye mwa moke na nzela. Yango ezali ndenge na bango ya kolakisa limemya mpo na mopaya. Bateyaka bana kopesa mopaya mbote na bonkonde, na kogumbama mpe kosala lokola moto azali kopakola lobɔkɔ moko na mosusu. Na fɔtɔ okomona Bavenda mibale ya basi bazali kopesana mbote ndenge basalaka na mboka na bango.

Lokota moko makasi

Ezali mpasi mpo moto ya Mpoto ayeba koloba lokota ya Venda malamu. Moko na makambo oyo epesaka kwɔkɔsɔ ezali ete maloba mingi ekomamaka ndenge moko kasi etángamaka ndenge moko te. Mokolo moko, nazalaki kosala lisukulu na lisangá ya Batatoli ya Yehova oyo balobaka lokota ya Venda, nalingaki kolendisa bayoki ete básololaka na moto nyonso. Moto moko na kati ya bayoki akatanaki na kosɛka mpo nalobaki kosolola na “mosapi na mosapi” na esika ya kosolola na “moto na moto.”

Mbala ya liboso oyo namekaki koloba lokota ya Venda na mosala ya kosakola, mwasi moko ya Venda azongisaki ete: “Nayebi koloba Lingelesi te.” Ngai nakanisaki ete nalobaki Venda malamu, nzokande ye akanisaki ete nalobi na Lingelesi! Mokolo mosusu, ntango nakómaki na ndako moko, natindaki elenge moko abénga nkolo ndako. Na Venda, babéngaka mokonzi ya libota thoʹho. Ngai nasalaki libunga, nalobaki thohoʹ, elingi koloba ete natindaki ye abénga makako ya ndako! Mabunga ya ndenge oyo ezalaki kolɛmbisa ngai, kasi na molende makasi, lelo oyo, ngai na mwasi na ngai tosololaka mwa malamu na Venda.

Mbuma ya elimo

Mokili ya Venda ezali mpe kobota mbuma mingi na elimo. Na bambula ya 1950, Batatoli ya Yehova oyo bazalaki na kati ya bato oyo bautaki na mikili ya zingazinga oyo bakendaki mosala ya kotimola kwivre basalaki lisangá moko na mboka Messina. Molende na bango na mosala esalisaki Bavenda mingi na koyoka solo ya Biblia. Nsima ya mbula zomi, etuluku moko ya Bavenda oyo bakómaki Batatoli bazalaki kosala makita na ndako moko na mboka Sibasa.

Mpo na kokolisa lisusu mosala, filiale ya Société Watch Tower na Afrika ya Sudi etindaki babongisi-nzela na teritware wana oyo ezali kobota mbuma mingi. Nsima ya mwa ntango, etuluku ya Sibasa ekolaki mpe ekómaki lisangá monene. Na ntango wana, bazalaki kosala makita na ndako moko ya kelasi. Kasi, Batatoli ya Yehova ya mboka Pietersburg​—kilomɛtɛlɛ 160 na sudi​—basalisaki bandeko wana mpo na kotonga Ndako ya Bokonzi na mboka Thohoyandou oyo ezali mosika te.

Na nɔrdi ya Afrika ya Sudi, bato koleka 500 000 balobaka lokota ya Venda. Na bambula ya 1950, ezalaki ata na Motatoli moko te ya Venda ntango babandaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi kuna. Lelo oyo Batatoli bazali koleka 150. Kasi, ezali naino na bisika mingi oyo nsango malamu ekómi naino te mpe mosala ezali naino mingi. Na 1989 tobandaki kokende na mboka moko ya Bavenda babéngi Hamutsha. Motatoli moko mpamba azalaki kuna. Lelo oyo, basakoli ya Bokonzi koleka 40 bafandi na mboka wana. Tozali kosala mosala makasi mpo na kosilisa kotonga Ndako ya Bokonzi oyo tozwi na lisalisi ya Batatoli ya masangá ya Pietersburg mpe makabo ya bandeko ya mikili ya bozwi.

Tolalaka na ferme moko na kati ya caravane (mwa ndako oyo babendaka na motuka). Lokola tozalaka na bomoi ya mindɔndɔ te, tozwaka ntango mingi mpo na kotala bato ya mboka mpo na komemela bango nsango malamu. (Malako 13:10) Mpo na yango, tozwi mapamboli mingi na mabaku malamu ya kosalisa bato ebele bámipesa na Yehova Nzambe. Na ndakisa, nakoki kotánga mobali moko na nkombo Michael; ye amonaki buku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis na ndako ya moninga na ye.a Abandaki kotánga yango mpe mbala moko amonaki ete makambo yango ezali solo. Na yango, atindaki mokanda na Société Watch Tower ete bátindela ye babuku mosusu. Na mokanda na ye, Michael alobaki ete kala mingi te autaki kozwa batisimo na Lingomba ya Apostolique. Abakisaki ete, “Sikoyo, namoni ete nazali na nzela mabe mpo na kokóma na Bokonzi ya Nzambe. Nalingi kokɔta na lingomba na bino, kasi nayebi ndenge ya kosala te.” Na nsima, apesaki adresi na ye mpe asɛngaki ete bátindela ye Motatoli ya Yehova mpo asalisa ye. Nalukaki Michael mpe nabandaki koyekola na ye Biblia. Lelo oyo, azali Motatoli oyo azwi batisimo mpe azali kosalela Yehova na bosembo.

Na Desɛmbɛ 1997, tokendaki na liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Kondima kati na Liloba ya Nzambe.” Liyangani yango esalemaki na libándá ya masano na mboka Thohoyandou. Tozalaki bato 634, mpe bato 12 bazwaki batisimo. Nazwaki libaku ya kosala masukulu mibale na lokota ya Venda. Yango ezalaki mpenza likambo monene na mbula zomi ya esengo oyo tolekisi na mokili oyo ezali kobota mbuma mingi!​—Ekomami na motangi moko.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto