Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/5 lok. 25
  • Tángáká elongo na bana na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tángáká elongo na bana na yo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/5 lok. 25

Tángáká elongo na bana na yo

Zulunalo Veja ya ekólo Brésil eyebisi ete baboti oyo batángaka mingi, bakolisaka epai ya bana na bango mposa makasi ya kotánga mikanda koleka bana oyo baboti na bango batángaka te. Martha Hoppe, nganga-mayele moko oyo ayekolaka ndenge oyo bana bakolaka, alobi ete: “Kotánga elongo na bana ekolisaka boyokani ya baboti na bana mpe epesaka mwana likoki ya kosimba malamu makambo oyo ekomami na mikanda.”

Kotángela bana na mongongo makasi epesaka libaku ya koyanola na mituna na bango. Bokoki kolobela bililingi nyonso oyo ezali na mokanda. Hoppe alobi ete, “Ntango mwana azali koyeba makambo oyo ekomami na mikanda, akozala mpe na mposa makasi ya kotánga mikanda mpo na koluka koyeba makambo mosusu.”

Batatoli ya Yehova mingi oyo bazali na bana basepelaka kotánga na bana na bango elongo. Batángaka mikanda lokola Mokanda mpo na masolo ya Biblia, Boyoka Moteyi Monene, mpe Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo.a Mikanda ya ndenge oyo wana esalisaka bana na kokóma batángi malamu mpe esalaka ete básepela mingi lisusu na buku oyo eleki babuku nyonso: Biblia Mosantu. Yango wana, soki ozali na bana, zalá moto oyo alingaka mpenza kotánga Liloba ya Nzambe mpo opesa bana na yo ndakisa. (Yosua 1:7, 8) Mpe salá makasi mpo na kozwa ntango ya kotángela bango!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto