Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/2 nk. 4-8
  • Nini esengeli mpo libala ezala malamu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nini esengeli mpo libala ezala malamu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Libala ezali nini?
  • Omitalela yo moko
  • Kotalela moto oyo olingi kobalana na ye
  • Matomba mpe mikumba
  • Lolenge ya komibongisa mpo na libala oyo ekolónga
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Libala—Likabo oyo euti na Nzambe
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Libala ezali likabo ya Nzambe ya bolingo
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Libala ekoki kolonga na mokili ya lelo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/2 nk. 4-8

Nini esengeli mpo libala ezala malamu?

Okondima komibwaka na ebale soki oyebi naino kobɛta mai te? Bozoba ya ndenge wana ekoki kozala likama, ata mpe koboma yo. Kasi kanisá naino, bato boni bazali kowela kobala kozanga koyeba malamu ndenge ya kokokisa mikumba ya libala.

YESU alobaki: “Soko moto moko kati na bino azali na mposa na kotonga ndako, akofanda liboso kotánga motuya na yango kotala soko azali na mosolo na kosilisa yango te?” (Luka 14:28) Kobala ezali lokola kotonga ndako. Baoyo balingi kobala basengeli kotánga motuya na likebi mpenza mpo bámindimisa ete bakolonga.

Libala ezali nini?

Kozala na molongani oyo bokofanda na ye na ntango ya bisengo mpe na ntango ya mpasi ya bomoi ezali mpenza lipamboli. Libala ekoki kokokisa mposa ya kozala na moninga to kobɔndisa moto oyo azangi elikya. Ekoki kokokisa mposa tobotamá na yango ya koluka ete bálinga biso, tózala na baninga, mpe tózala na moto oyo toyebisanaka basɛkɛlɛ. Yango wana, nsima ya kosala Adama, Nzambe alobaki malamu ete: “Ezali malamu te ete moto azala ye moko. Nakosalela ye mosungi mobongi na ye.”​—Genese 2:18; 24:67; 1 Bakolinti 7:9.

Ɛɛ, kobala ekoki kosilisa mwa mikakatano. Kasi, ebimisaka mpe mikakatano mosusu. Mpo na nini? Mpamba te libala esangisaka bato mibale bakeseni, baoyo mbala mosusu atako bayokani kasi bakokani te. Yango wana, ata babalani oyo babongi mpenza moko na mosusu, bazwanaka ntango mosusu na matata. Ntoma moklisto Paulo akomaki ete baoyo bazali kobala bakozala na “mpasi na nzoto”​—to ndenge La Bible en français courant ebongoli yango, “bakonyokwama na bomoi na bango ya mokolo na mokolo.”​—1 Bakolinti 7:28.

Tokoloba nde ete Paulo azalaki na makanisi mabe? Te! Azalaki se kokebisa baoyo balingi kobala ete bákanisa malamu. Kolangwa bolingo ya moto oyo ozali kolula ezali yango te nde elakisaka ndenge oyo libala ekozala nsima ya basanza mpe bambula. Libala na libala ezali na mikakatano mpe mitungisi na yango. Yango wana, likambo ezali te ya koyeba soki mikakatano ekozala kasi nde ndenge nini kosilisa yango soki ebimi.

Mikakatano epesaka mwasi na mobali libaku ya kolakisa bozindo ya bolingo oyo moko azali na yango epai ya moninga. Tópesa ndakisa: Masuwa oyo esɛmi na libongo ekoki komonana monene. Kasi, makasi na yango eyebanaka ntango ezali na kati ya ebale, mbala mosusu na ntango ekutani na mopɛpɛ to mbonge makasi. Ndenge moko, bokasi ya libala eyebanaka te kaka na ntango makambo mazali kimya mpe lolango ezali makasi. Ntango mosusu, emekamaka na makambo ya mpasi oyo esɛngaka ete babalani bálonga komekama.

Mpo na kosala yango, babalani basengeli kolapa ndai ya kokangana moko na mosusu, mpamba te Nzambe alingaki ete mobali ‘asangana na mwasi na ye’ mpe bango mibale bákóma “mosuni moko.” (Genese 2:24) Lelo oyo, kolapa ndai ya ndenge wana ebangisaka bato mingi. Kasi, yango ezali lolenge se moko ya malamu mpo na bato mibale oyo balingani solo bakoki kopesana elaka ete bakotikala elongo. Ndai epesaka libala lokumu. Epesaka elikya ete, ata soki likambo nini ebimi, mobali na mwasi na ye bakopesana mabɔkɔ.a Soki okoki naino kolapa ndai ya ndenge wana te, boye obongi naino na kobala te. (Talá Mosakoli 5:4, 5.) Ata baoyo babalani, ekoki kozala malamu básosola lisusu malamumalamu ntina ya ndai mpo ete libala eumela.

Omitalela yo moko

Na ntembe te okoki kotánga bizaleli oyo olingaka epai ya moto oyo okobalana na ye. Kasi, ezali mpasi mingi omitalela yo moko mpo na koyeba soki okoki kosala nini mpo libala na yo ezala malamu. Komitalela ezali na ntina mingi, ezala liboso to nsima ya kolapa ndai ya libala. Na ndakisa, omituna mituna oyo.

• Nakondima mpenza kolapa ndai ya kokangana libela na molongani na ngai?​—Matai 19:6.

Na ntango ya mosakoli Malaki, mibali mingi batikaki basi na bango, mbala mosusu mpo bábala basi mosusu oyo bazalaki naino bilenge. Yehova alobaki ete etumbelo na ye etondaki na mpisoli ya basi oyo basundolamaki, mpe amonaki mabe na ndenge mibali yango ‘basalelaki’ basi na bango ‘na bokosi.’​—Malaki 2:13-16.

• Soki nazali kokanisa kobala, nasili koleka bambula ya bolenge, eleko oyo mposa ya nzoto ezalaka makasi na boye ete ekoki kozipa ngai miso na ntango nalingi kotalela makambo ya ntina?​—1 Bakolinti 7:36.

Mwasi moko na nkombo Nikki abalaki ntango azalaki na mbula 22, alobi boye: “Kobala na ntango ozali naino elenge mpenza ezali likama monene.” Apesi likebisi oyo: “Mayoki na yo, mikano na yo, mpe bamposa na yo ekobanda se kobongwana banda ozali naino elenge mpenza kino okokóma pene ya mbula 30.” Ya solo, kokoka mpo na kobala ezali kaka likambo ya mbula oyo moto azali na yango te. Atako bongo, kobala na ntango oyo ozali naino na mbula ya bolenge, ntango mposa ya kosangisa nzoto elamuki sika mpe ezali naino makasi, ekoki kobebisa makanisi ya moto mpe kozipa ye miso na mikakatano oyo ekoki kobima nsima.

• Bizaleli malamu nini nazali na yango oyo ekosala ete libala na ngai ezala malamu?​—Bagalatia 5:22, 23.

Ntoma Paulo akomelaki Bakolose boye: “Bómilatisa mitema na mawa, na boboto, na [komikitisa, NW], na bopɔlɔ, na mitema pɛtɛɛ.” (Bakolose 3:12) Toli oyo ezali malamu mpo na baoyo balingi kobala mpe mpo na baoyo babalá.

• Nazali mpenza na makanisi ya bomoto oyo ebongi mpo na kosunga mobalani na ngai na ntango ya mpasi?​—Bagalatia 6:2.

Monganga moko alobi boye: “Ntango mikakatano eyaka, moto nyonso awelaka kopesa foti na molongani na ye. Likambo oyo eleki ntina ezali te ya koluka koyeba nani azali na foti. Kasi, ndenge nini mwasi na mobali bakoki kosalisana mpo báyokana malamu.” Maloba ya Salomo, mokonzi oyo azalaki na mayele mingi, ebongi mpo na babalani. Akomaki ete: “Mibale baleki moko na malamu. . . . Mpo ete soko bakokwea, moko akotombola moninga na ye. Kasi mawa epai na ye oyo azali bobele ye moko wana ekokwea ye, zambi mosusu mpo na kotombola ye azali te.”​—Mosakoli 4:9, 10.

• Nazalaka mingimingi na esengo mpe na makanisi ya kolonga, to nazalaka mawamawa mpe na makanisi ya kolonga te?​—Masese 15:15.

Mpo na moto oyo azali na makanisi malamu te mokolo nyonso ezalaka kaka mabe. Libala ebongolaka makanisi wana lokola na likamwisi te! Mobali to mwasi monzemba oyo amilelalelaka ntango nyonso to azalaka na makanisi ya kolonga te akosuka se na kozala mobalani oyo amilelalelaka mpe oyo azalaka na makanisi ya kolonga te. Lolenge mabe wana ya komona makambo ekoki kokɔtisa mindɔndɔ na kati ya libala.​—Talá Masese 21:9.

• Soki batumoli ngai, nayebaka kozala kimya to natombokaka?​—Bagalatia 5:19, 20.

Baklisto basɛngisami ete ‘básilikaka noki te.’ (Yakobo 1:19) Liboso to nsima ya kobala, mobali to mwasi asengeli kosala makasi alanda toli oyo: “Bóyoka nkanda, nde na lisumu te; tiká te ete moi elimwa naino bozali na nkanda na bino.”​—Baefese 4:26.

Kotalela moto oyo olingi kobalana na ye

Lisese moko ya Biblia elobi boye: “Moto na mayele akotala malamu na nzela ekokenda ye.” (Masese 14:15) Likambo oyo ezali mpenza solo mpo na kopona mobalani. Kopona mobalani ezali moko na bikateli eleki monene oyo moto asengeli kozwa na bomoi na ye. Kasi, emonanaka ete bato mingi bazwaka ntango ya kokanisa liboso ya kopona motuka oyo basengeli kosomba to kelasi oyo basengeli kotánga kasi balekisaka ntango moke mpo na kopona moto oyo babongi kobalana na ye.

Na lisangá ya boklisto, bato oyo bazali kozwa mikumba ‘bazali komekama liboso soki babongi.’ (1 Timote 3:10, NW) Soki ozali kokanisa kobala, osengeli komindimisa ete moto oyo olingi kobalana na ye “abongi.” Na ndakisa, talelá mituna oyo elandi. Atako mituna yango ekomami lokola nde mwana mwasi azali kotuna yango, ebongi mpe na mobali. Baoyo babalá bakoki mpe kozwa litomba na kotalela yango.

• Bato bayebi ye na bizaleli nini?​—Bafilipi 2:19-22.

Masese 31:23 elobeli mobali oyo “ayebani na bikuke wana ekofandaka ye kati na bampaka na mokili.” Bampaka ya mboka bazalaki kofanda na bikɔtelo ya mboka mpo na kokata makambo. Boye, na ntembe te bato nyonso bakokaki kotyela ye motema. Lokumu ya moto eyebanaka na ndenge oyo bato mosusu batalelaka ye. Soki likoki ezali, talelá mpe ndenge nini bato oyo bazali na nse ya bokonzi na ye bamonaka ye. Yango ekoki komonisa yo ndenge akobanda kotalela yo, soki bobalani.​—Talá 1 Samwele 25:3, 23-25.

• Azali na etamboli nini?

Mayele mauti na likoló mazali “liboso pɛto.” (Yakobo 3:17) Moto oyo olingi kobalana na ye, atyaka bamposa na ye ya kosangisa nzoto liboso ya lokumu na ye mpe lokumu na yo na miso ya Nzambe? Soki azali kosala makasi ya kolanda mitinda ya Nzambe sikoyo te, nini elakisi ete akosala yango nsima ya kobalana?​—Genese 39:7-12.

• Ndenge nini atalelaka ngai?​—Baefese 5:28, 29.

Mokanda ya Masese elobi mpo na mobali oyo ‘motema na ye ekondima’ mwasi na ye. Lisusu, “akosanzola ye.” (Masese 31:11, 28) Azali na zuwa ya bozoba te, mpe asɛngaka makambo oyo eleki ndelo te. Yakobo akomaki ete mayele mauti na likoló mazali “na kimya na boboto, . . . matondi na mawa mpe na mbuma malamu.”​—Yakobo 3:17.

• Ndenge nini atalelaka bandeko na ye?​—Exode 20:12.

Basɛngi na bana ete bátosa baboti na bango. Biblia elobi: “Yokamelá tata na yo oyo abotaki yo mpe tyolá mama na yo te wana ekonuna ye.” (Masese 23:22) Doktere Hugh Missildine akomaki likambo moko oyo ezali kobenda likebi: “Bato bakoki kopɛngola mikakatano mingi mpe kozanga koyokana na kati ya mabala, to mpe bakoki koyeba ete mikakatano ekozanga te soki, liboso ya kobalana, mobali na mwasi, moto na moto na ngámbo na ye, azwaki ntango ya kokende epai ya baboti ya ‘fianse’ na ye mpe amonaki ndenge oyo azalaka na baboti na ye. Ndenge oyo atalelaka baboti na ye ekosala bopusi na ndenge oyo akotalela molongani na ye. Moto asengeli komituna: ‘Nakosepela asalela ngai makambo oyo azali kosalela baboti na ye?’ Mpe ndenge oyo baboti na ye batalelaka ye ezali elembo malamu oyo ekolakisa ndenge akomitambwisa mpe ndenge oyo akolinga ete yo otalela ye soki bobalani.”

• Asilikaka mpambampamba mpe abimisaka maloba mabe?

Biblia epesi toli ete: “Makambo nyonso na bololo mpe likunya mpe nkanda mpe kongala mpe kotɔnga málongwa na bino.” (Baefese 4:31) Paulo akebisaki Timote mpo na baklisto mosusu oyo ‘babɛlaki motó mpo na ntembe mpe kowelana mpo na maloba’ mpe oyo bazalaki na “zuwa mpe nkaka mpe kotuka mpe ntembe mabe mpe kowelana.”​—1 Timote 6:4, 5.

Paulo akomaki lisusu ete moto oyo abongi kozwa mikumba na kati ya lisangá asengeli kozala “moto oyo abɛtaka te.” Makomi ya Greke ya ebandeli elobi ete “oyo abɛtaka makofi te.” (1 Timote 3:3, NW, maloba na nse ya lokasa) Asengeli kozala moto oyo abɛtaka bato na nzoto te to na maloba te. Moto oyo aumelaka kotomboka te ntango azali na nkanda azali mobalani malamu te.

• Azali na mikano nini?

Bato mosusu bamipesaka na koluka bozwi mingi mpe basukaka na kobuka mbuma mabe ya ezaleli na bango. (1 Timote 6:9, 10) Bato mosusu bazalaka na mikano te na bomoi na bango. (Masese 6:6-11) Nzokande, moto oyo alingaka Nzambe akozala na ekateli lokola ya Yosua, oyo alobaki: “Kasi mpo na ngai mpe ndako na ngai, biso tokosalela [Yehova].”​—Yosua 24:15.

Matomba mpe mikumba

Libala ezali ebongiseli ya Nzambe. Yehova Nzambe nde abandisaki mpe apesaki nzela na ebongiseli yango. (Genese 2:22-24) Asalaki ebongiseli ya libala mpo ete mobali na mwasi báfanda libela mpe básalisana moko na mosusu. Ntango bazali kolanda mitinda ya Biblia, mobali na mwasi na ye bakoki kolikya kozala na bomoi ya esengo.​—Mosakoli 9:7-9.

Kasi, tosengeli koyeba ete tozali na “ntango ya mpasi.” Biblia esakolaki ete na ntango oyo, bato bakozala “bamikumisi na bango mpenza, baluki na mosolo, bato na lolendo, bato na ngambo, . . . bakosi, bato na nko, bato bavimbi na lolendo.” (2 Timote 3:1-4) Bizaleli motindo yango bikoki kozala na bopusi makasi na libala. Yango wana, baoyo bazali na likanisi ya kobala basengeli kotánga motuya na likebi mpenza. Mpe baoyo babalá basengeli ntango nyonso kosala milende mpo na kolendisa boyokani na bango na nzela ya boyekoli mpe na kolanda litambwisi ya Nzambe oyo ezwami na kati ya Biblia.

Ɛɛ, baoyo balingi kobala basengeli kotala mosika koleka mokolo ya libala. Moto nyonso asengeli kokanisa kaka kobala te kasi kokanisa mpe makambo oyo esɛngamaka na moto oyo abali. Luká litambwisi ya Yehova mpo ete okanisa malamu na esika ete lolango ezipa yo miso. Soki okosala bongo, na ntembe te libala na yo ekozala malamu.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Biblia epesi nzela ya koboma libala mpe kobala moto mosusu kaka na likambo moko: “ekobo,” elingi koloba kotika molingani na yo mpe kosangisa nzoto na moto mosusu.​—Matai 19:9.

[Etanda na lokasa 5]

“Ndimbola ya bolingo oyo eleki ndimbola nyonso oyo natángá”

Doktere Kevin Leman akomaki motuna oyo: “Ndenge nini koyeba ete olingi mpenza moto? Ezali na buku moko ya kala oyo elimboli bolingo. Buku yango elingi kokokisa mbula 2 000, kasi, ezali na ndimbola ya bolingo oyo eleki ndimbola nyonso oyo natángá.”

Doktere Leman azalaki kolobela maloba ya ntoma Paulo oyo mazali na Biblia na 1 Bakolinti 13:4-8:

“Bolingo ezali na motema pɛtɛɛ, bolingo ezali na boboto, ezali na zuwa te; bolingo ezali na lolendo te, ekomibimbisaka [na lolendo] te, ekosalaka na nsɔni te, ekolukaka malamu na yango mpenza te, ezali na nkanda te, ekobombaka mabe na motema te. Ekosepelaka mpo na masumu te nde ekosepelaka makambo na solo. Ekomemaka makambo nyonso, ekondimaka nyonso, ekolikyaka nyonso, [ekangaka motema na nyonso, NW]. Bolingo ekosuka te.”

[Etanda na lokasa 8]

Mayoki ekoki kokosa moto

Mwana mwasi Mosulama oyo Biblia elobeli ayebaki ete lolango ekosaka. Ntango Salomo, oyo azalaki mokonzi ya nguya mingi, azalaki kolula ye, alobaki na baninga na ye basi ete ‘bálamusa bolingo na motema na ye te kino ntango na yango ekokoka.’ (Loyembo ya Salomo 2:7, NW) Mwana mwasi yango azalaki na mayele; alingaki te ete baninga na ye bátindika ye mpo akosama na mayoki na ye. Yango ezali mpe likambo oyo ebongi mpo na bato oyo balingi kobala lelo oyo. Yebá kopekisa mayoki na yo. Soki obali, esengeli kozala mpo olingi moto, kasi mpo olingi se likanisi mpamba ya kobala te.

[Elilingi na lokasa 6]

Ata baoyo babalá kala bakoki kolendisa libala na bango

[Elilingi na lokasa 7]

Ndenge nini atalelaka baboti na ye?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto