Ozali Kokanisa Kobala?
Soki tokokanisi ndenge oyo mabala ezali kokufa na mokili mobimba na koningana ya mabelé, États-Unis ekozala esika oyo koningana yango ebandi. Na mbula moko euti koleka, mabala koleka milio moko ekufaki na ekólo yango; elingi koloba ete mabala mibale ezalaki kokufa na miniti moko. Kasi, na ntembe te oyebi malamu ete mikakatano ya mabala ezali kaka na États-Unis te.
ANKƐTƐ moko emonisi ete banda 1970, na bikólo lokola Canada, Angleterre na Pays de Galles, France, Grèce, mpe Pays-Bas, mabala ezali kokufa mbala mibale koleka ndenge ezalaki liboso.
Tokoki mpenza kondima ete bato mingi babalanaka mpo balingani mpe bazali na mposa ya kofanda elongo bomoi na bango mobimba. Kasi, likambo ya mawa ezali ete, mbala mingi, kozala na libala ya esengo ekómi se ndɔtɔ mpamba. Ntango bayaki komona makambo nyonso polele, bato mingi balobaki ete bawelaki kobala to babalanaki na moto oyo abongaki na bango te, to nyonso mibale.
Mpo na nini mabala mingi ezali kokufa? Mwasi moko oyo akomaki buku oyo elobeli kolulana ya mwasi na mobali alobi ete: “Ntina ya libosoliboso ezali kozanga komibongisa.” Abakisi boye: “Ntango nakutanaka na babalani oyo bazali na kwokɔsɔ na mabala na bango, nayokaka mawa na nkanda mbala moko. Nayokaka mawa na komona ete balongi te kokokisa mposa na bango ya kozala na libala ya esengo. Nayokaka nkanda na komona ete bayebaka te ete mpo na kosala libala ya malamu ezali lisɛki te.”
Ɛɛ, bato mingi babalanaka kozanga koyeba ndenge nini bakoki kosala mpo libala ezala malamu. Kasi, ezali mpenza likambo ya kokamwa te. Molakisi moko alobaki boye: “Bilenge mingi balekisaka bambula ebele na eteyelo mpo na koyekola kaka bizaleli ya bampuku mpe miselekete, kasi bazwaka ntango te ya koyekola bizaleli ya bato mibale oyo tobéngi mwasi na mobali.”
Ozali kokanisa kobala na mikolo mizali koya, to ozali kokanisa libala oyo osili kosala? Soki ɛɛ, yebá ete libala ya solosolo ezali te ndenge tomonaka yango na bafilme, na maboke na televizyo, to na mikanda. Kasi, libala ya bato mibale oyo bazali na makanisi ya mikóló, oyo balingani mpenza, tokoki kotalela yango lokola lipamboli ya Nzambe. (Masese 18:22; 19:14) Na yango, ndenge nini okoki koyeba ete obongi mpo na kokokisa masɛngami ya libala? Makambo nini osengeli kotalela mpo na kopona mobalani? To, soki osili kobala, okoki kosala nini mpo ete libala na yo ezala malamu mpe eumela?