Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 15/12 nk. 26-29
  • Ekateli oyo elongisi lotomo ya kopona nkisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ekateli oyo elongisi lotomo ya kopona nkisi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Etinda ya bato nyonso mpe mibeko
  • Elendiseli oyo ekamwisaki
  • Ekateli
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 15/12 nk. 26-29

Ekateli oyo elongisi lotomo ya kopona nkisi

YE OYO aleki na lokumu na mɔlɔ́ngɔ́ mobimba azali moto ya liboso mpo na kolongisa lotomo oyo moto azali na yango ya koyeba mpe kopona eloko alingi. Azali Mozalisi na biso. Lokola ayebi malamumalamu bamposa ya bato, na boboto nyonso azali kopesa bango mateya, makebisi, mpe litambwisi mpo bálanda nzela ya malamu. Kasi, abosanaka te ete apesa bikelamu na ye ya mayele bonsomi ya kopona. Mosakoli Mose amonisaki likanisi ya Nzambe ete: “Natii liboso na yo bomoi mpe kufa, mpe lipamboli mpe elakeli mabe. Na bongo poná bomoi ete yo mpe bana na yo bózala na bomoi.”​—Deteronome 30:19.

Etinda oyo etaleli mpe lisalisi ya monganga. Lotomo ya mobɛli mpo na kopona nkisi, to mpo na koyeba nkisi oyo bakosalisa ye na yango, ebandi kondimama mokemoke na ekólo Japon mpe na bikólo mosusu epai ezalaki liboso kondimama te. Monganga Michitaro Nakamura alimboli lotomo oyo mobɛli azali na yango mpo na koyeba nkisi na maloba oyo: “Ezali makanisi oyo monganga azali kolimbola epai na mobɛli na maloba ya pɛtɛɛ, mpasi oyo azali na yango mpe elikya ya kobika na yango, mpe lolenge ya nkisi oyo alingi kosalela, mpe makambo oyo yango ekoki kobimisa, na kotosáká lotomo ya mobɛli mpo na kopona lolenge ya nkisi oyo alingi.”​—Japan Medical Journal.

Na boumeli ya bambula mingi, minganga ya ekólo Japon bamonisaki bantina ebele oyo bazalaki koboya kosalisa bato na lolenge yango, mpe mbala mingi bisambiselo bizalaki kolongisa bango. Yango wana, mokolo ya 9 Febwáli 1998, mbongwana monene esalemaki ntango Takeo Inaba, zuzi-mokonzi na esambiselo babéngi Cour d’appel ya engumba Tokyo akamataki ekateli oyo elongisaki lotomo ya kopona nkisi. Ekateli yango ezalaki nini, mpe bisambiselo ekamataki yango na likambo kati na nani mpe banani?

Na sanza ya Yulí 1992, Misae Takeda, Motatoli ya Yehova moko ya mbula 63 akendaki na lopitalo ya Iniversite ya Tokyo (Institut de sciences médicales). Bazwaki ye na maladi ya kanser ya libale (foie) mpe esengelaki básala ye lipaso. Lokola alingaki kotosa etinda ya Biblia na ntina na makila, asololaki na minganga na ye polele ete alingi nkisi oyo ezangi makila. (Genese 9:3, 4; Misala 15:29) Minganga bandimaki, basalaki kutu mokanda oyo elongolaki bango mpe lopitalo na ngambo nyonso oyo ekoki kobima na ekateli wana. Bayebisaki ye ete bakotosa ekateli na ye.

Nzokande, nsima ya lipaso, wana Misae azalaki naino na mpɔngi, bazongisaki ye makila, likambo oyo aboyaki yango polele na mokanda. Babombaki sɛkɛlɛ na ndenge bazongisaki ye makila kozanga ete ayeba; nzokande, eyebanaki ntango mosali moko ya lopitalo ayebisaki likambo yango epai ya mopanzi-nsango moko. Ndenge bokoki komona, mwasi moklisto oyo ya sembo amitungisaki ntango ayokaki ete bazongisaki ye makila kozanga ete ye moko ayeba. Atyelaki minganga motema, andimaki ete bakokokisa maloba na bango mpe bakotosa bindimeli ya lingomba na ye. Na ntina na mpasi makasi oyo ayokaki na mbeba monene oyo esalemaki kati na boyokani ya minganga mpe bato ya maladi mpe lokola alingaki kosala likambo oyo ekozala ndakisa mpo na kosalisa bato mosusu ya maladi, afundaki likambo yango na esambiselo.

Etinda ya bato nyonso mpe mibeko

Bazuzi misato ya esambiselo ya engumba Tokyo oyo basambisaki likambo yango balongisaki minganga, mpe balobaki ete mobɛli azali na lotomo te ya koyeba nkisi oyo bakosalisa ye na yango. Na ekateli oyo bakamataki na mokolo ya 12 Mársi 1997, balobaki ete boyokani nyonso oyo moto akoki kosala na minganga mpo ete básalisa ye na nkisi oyo ezangi makila ezali na ntina te. Balobaki ete monganga oyo ayokani na moto mpo ete azongisa ye makila te ata na ntango bomoi na ye ekómi na likama abuki oyo babéngi kojo ryozoku,a to mitinda ya bato. Mpo na bango, mokumba ya liboso ya monganga ezali ya kosala manso ekoki mpo na kobikisa moto. Yango wana, boyokani ya ndenge wana ezali na ntina te kobanda na ebandeli, ata soki bindimeli ya lingomba ya moto ya maladi ezali nini. Balobaki ete monganga nde akosala ndenge ayekolaki atako moto ya maladi asɛngaki makambo nini liboso.

Lisusu, bazuzi balobaki ete bobele mpo na bantina yango, atako monganga asengeli kolimbola lolenge ya nkisi, makambo oyo nkisi yango ebimisaka, mpe lipaso oyo alingi kosala, kasi “akoki koloba te soki akani kozongisa makila to te.” Basukisaki boye: “Ekoki kolobama ete minganga oyo bafundami babukaki mibeko te to basalaki mabe te ndenge bayebaki bamposa ya moto ya maladi oyo aboyaki bázongisa ye makila ata bomoi na ye ekómi na likama. Bandimaki ete bakokokisa bamposa na ye bobele mpo na kopusa ye andima básala ye lipaso.” Likanisi ya bazuzi ezalaki ete soki minganga basalaki bongo te, mbɛlɛ moto ya maladi aboyaki básala ye lipaso mpe alingaki kobima na lopitalo.

Ekateli ya esambiselo wana ebulunganisaki mpe elɛmbisaki bato oyo balongisaka lotomo oyo moto azali na yango ya koyeba nkisi oyo bakosalisa ye na yango. Ntango alobelaki ekateli oyo ezwamaki na likambo ya Takeda mpe lotomo oyo moto azali na yango ya koyeba nkisi oyo bakosalisa ye na yango na ekólo Japon, Takao Yamada, profesere ya mibeko, akomaki ete: “Soki totiki likanisi ya ekateli oyo eumela, likambo ya koboya makila mpe lotomo ya koyeba nkisi ekolimwa mokemoke na mibeko.” (Zulunalo Hogaku Kyoshitsu) Na Maloba ya nkanda akweisaki likambo ya kozongisa moto makila na makasi; alobaki ete ezali “mbeba monene epai na moto oyo batyeli ye motema, ekokani na kobundisa moto na mbalakaka.” Profesere Yamada abakisaki ete likambo mabe motindo wana esengeli “kopesamela nzela ata moke te.”

Lokola Misae azalaki moto oyo alobaka mingi te akokaki kobenda likebi ya bato mingi te mpo bándimela ye. Kasi lokola ayebaki ete akokaki kolongisa nkombo ya Yehova mpe mitinda na ye ya sembo oyo elobi ete makila ezali bulɛɛ, azwaki ekateli ya kosala oyo akoki. Akomelaki avoka na ye boye: “Nazali bobele mputulu mpamba. Nazali komituna mpo na nini moto ya kozanga makoki lokola ngai nasalelami. Kasi Yehova oyo akoki kosala ete mabanga manganga akopesa ngai nguya ntango nazali koluka kosala oyo ye alobi.” (Matai 10:18; Luka 19:40) Ntango azalaki kosamba, mongongo ezalaki kolɛnga, alimbolaki mpasi makasi oyo ayokaki na likambo yango. “Nayokaki ete nasambwe, lokola mwasi oyo babebisi ye na mibali.” Litatoli na ye elelisaki bato mingi kati na esambiselo mokolo yango.

Elendiseli oyo ekamwisaki

Na kotalela ekateli oyo esambiselo ya engumba [Tokyo] ezwaki, bamemaki likambo yango na esambiselo mosusu ebéngami Cour d’appel. Bazongelaki kosamba na sanza ya Yulí 1997. Misae ayaki na kiti ya kotindika, atako azali lisusu na makila mingi te, kasi azali na ekateli makasi. Kanser ezongaki lisusu, mpe azalaki kolɛmba mingi. Misae alendisamaki mingi ntango zuzi-mokonzi alimbolaki makambo oyo esambiselo elingaki kosala. Amonisaki polele ete Cour d’appel eboyaki ekateli oyo esambiselo ya liboso ekamataki—ete monganga azali na lotomo ya koboya kotosa mposa ya moto ya maladi, kokosa ete akotosa bindimeli na ye nzokande na nkuku azali na ekateli ya kosala likambo mosusu. Zuzi-mokonzi alobaki ete esambiselo ekolongisa te mobeko ya bonkɔkɔ ebéngami “Shirashimu bekarazu, yorashimu beshi,”b elingi koloba, “Bótika bato ya maladi báyeba eloko te mpe bázala baombo” na makambo ya minganga. Na nsima, Misae alobaki ete: “Nasepeli mingi na likanisi ya bosembo oyo zuzi abimisi, yango ekeseni mpenza na ekateli oyo esambiselo ya engumba Tokyo ekamataki.” Abakisaki ete: “Nazalaki kobondela Yehova mpo na yango.”

Masae akufaki na sanza oyo elandaki. Bato oyo bazalaki kolinga ye bayaki mingi, kati na bango bato ya libota na ye mpe basali ya lopitalo mosusu esika bayokaki mpe batosaki bindimeli na ye. Mwana na ye ya mobali, Masami, na bato mosusu ya libota na ye, atako bayokaki mawa mingi na liwa na ye, bazwaki ekateli ya kolandela likambo yango kino na nsuka ndenge ye moko alingaki.

Ekateli

Na nsuka, na mokolo ya 9 Febwáli 1998, bazuzi misato ya Cour d’appel bakweisaki ekateli oyo esambiselo ya engumba Tokyo ekamataki. Ndako moke ya esambiselo etondaki na bapanzi-nsango, bayekoli, mpe bato mosusu oyo balandaki likambo yango malamu. Bazulunalo mpe baemisyo ya televizyo elobelaki ekateli yango. Bazulunalo mosusu ekomaki boye: “Esambiselo: Bato ya maladi bakoki koboya nkisi”; “Cour d’appel: Kozongisa makila na makasi elimboli kobebisa ntomo ya moto”; “Esambiselo ekweisi monganga oyo azongisaki moto makila na makasi”; mpe “Bafuti Motatoli moko ya Yehova mbongo mpo bazongisaki ye makila na makasi.”

Bansango na ntina na ekateli yango ezalaki ya sikisiki mpe ya malamu mingi. Zulunalo The Daily Yomiuri ekomaki ete: “Zuzi Takeo Inaba alobaki ete ezalaki mabe ndenge minganga basalelaki myango oyo moto ya maladi aboyaki.” Ekomaki lisusu polele ete: “Minganga oyo [bazongisaki Masae makila] bapimelaki ye likoki ya kopona nkisi oyo alingi.”

Zulunalo Asahi Shimbun emonisaki ete na likambo oyo atako esambiselo emonaki ete bilembeteli bikokaki te mpo na komonisa ete moto ya maladi na minganga bayokani mpe bakomi boyokani yango na mokanda mpo ete bázongisa ye makila te ata bomoi na ye ekómi na likama, bazuzi bakweisaki ekateli ya esambiselo ya liboso na kotalela boyokani oyo mibeko endimaka oyo elobi ete: “Soki mokanda ezali mpe emonisi ete mobɛli na minganga bayokanaki ete bázongisa makila te ata bomoi ekómi na likama, esambiselo ekomona ete yango ebuki mitinda ya bato nyonso te, nzokande, boyokani yango esengeli kotosama.” Lisusu, zulunalo yango emonisi likanisi ya bazuzi ete “moto nyonso akokufa mokolo mosusu, mpe likambo oyo ekomema na liwa ya moto ekoki kouta na ekateli ya moto ye moko.”

Ya solo, Batatoli ya Yehova basali bolukiluki na likambo oyo mpe bamindimisi ete bazali kopona lolenge malamu ya kozala na bomoi. Na kati na yango koboya makama ya kozongisama makila, kasi bazali kondima nkisi oyo ezangi makila oyo ezali kosalelama na mikili mingi mpe eyokani na mobeko ya Nzambe. (Misala 21:25) Profesere moko ya mibeko ayebani mingi na ekólo Japon alobaki ete: “Ndenge mpenza ezalaka, likambo ya koboya [kozongisa makila] elimboli te kopona ‘lolonge ya kokufa’ kasi, elimboli mpenzampenza, nde kopona lolenge ya kozala na bomoi.”

Ekateli ya Cour d’appel esengeli kobenda likebi ya minganga mpo báyeba ete lotomo na bango ya kozwa ekateli bango moko na likambo oyo balingi kosala endimami epai ya bato nyonso te ndenge minganga mosusu bakanisaka. Mpe ekateli yango esengeli kokomama kati na babuku ya mibeko ya balopitalo mingi. Atako ekateli yango endimamaki na bato mingi mpe elendisaki bato ya maladi, oyo bazalaki mpenza na lotomo te ya kopona nkisi oyo balingi, kasi bato nyonso basepelaki na yango te. Lopitalo yango mpe minganga misato wana bafundaki likambo yango na Esambiselo Monene. Tosengeli kozela mpo na komona soki Esambiselo Monene ya ekólo Japon ekolongisa lotomo moto ya maladi azali na yango ya kopona nkisi, ndenge Nkolo-Mokonzi ya mɔlɔ́ngɔ́ azali kolongisa yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Likanisi yango elimbolami polele na mibeko te mpe bazuzi basengeli kotalela mpe kosalela yango na ndenge bamoni malamu.

b Yango ezalaki mobeko ya bankumu ya mboka na eleko ya Tokugawa etalaki lolenge oyo basengelaki koyangela bato na bango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto