Nganga-mayele moko apesi dati mosusu na maniskri ya Biblia
Carsten Peter Thiede, moto ya ekólo Allemagne, nganga-mayele ya misala misalemaki na papirise, alobi ete ezali na bilembeteli ya solosolo ete biteni misato ya mike ya Evanzile ya Matai oyo bikomamaki na papirise (biyebani na nkombo ya Magdalen Papyrus) bikomamaki na ekeke ya liboso.
Nsima ya kokokanisa biteni yango mike (oyo bizali na mwa makambo ya mokanda ya Matai mokapo 26) na mokanda moko ya kala oyo etalelaki makambo ya mombongo oyo bakutaki na Ezipito, Thiede alobaki ete mokanda ya Ezipito ekokani “mingi mpenza na Magdalen Papyrus na mobimba na yango mpe na ndenge oyo lɛtɛlɛ mokomoko ekomami.” Thiede na moninga na ye Matthew D’Ancona balobi kati na buku na bango (Eyewitness to Jesus—Amazing New Maniscript Evidence About the Origin of the Gospels) ete bokokani oyo ezali kati na mikanda yango mibale emonisi ete mikanda yango mikomamaki na eleko moko. Ntango nini? Mokanda wana ya Ezipito ezali na dati oyo ekomami ete “Na mbula ya 12 ya boyangeli ya Amperere Néron, mokolo ya 30 na sanza ya Epeiph. Na manaka na biso, ekokani na mokolo ya 24 Yulí 66 [T.B.].”
Na lisolo moko abimisaki na zulunalo Tyndale Bulletin, profesere Philip Comfort alobi ete, “Dati oyo ezali ya sikisiki, ezali na ntina mingi, mpamba te ezali kotya maniskri ya Evanzile ya Matai na ekeke mpenza oyo Evanzile yango ekomamaki.” Lisusu emonisi ete Magdalen Papyrus ezali biteni ya Evanzile oyo eleki koumela na biteni nyonso oyo ezali lelo.
[Elilingi na lokasa 29]
Magdalen Papyrus, emonisami na monene na yango sikoyo
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na ndingisa ya Prezida na baninga na ye ya Magdalen College, Oxford