“Nzambe alingi ye oyo akopesaka na esengo”
YEHOVA azali mpenza mokabi. Kutu, Biblia elobi ete azali Mopesi ya “makabo nyonso malamu mpe makabo nyonso mabongi.” (Yakobo 1:17) Na ndakisa, tótalela biloko oyo Nzambe azalisaki. Asalaki bilei kitoko, kasi oyo ezangi elengi te; bafololo ya langi ndenge na ndenge, kasi bobele langi moko te; kolala ya moi oyo ezalaka kitoko na kotala, kasi ya bongobongo te. Ɛɛ, eloko nyonso oyo Yehova azalisaki ezali komonisa ete azali bolingo mpe mokabi. (Nzembo 19:1, 2; 139:14) Lisusu, Yehova apesaka na esengo. Asepelaka kosalela basaleli na ye malamu.—Nzembo 84:11; 149:4.
Bayisalaele bazwaki etinda ya komekola bokabi ya Nzambe na boyokani na bango bamoko epai na basusu. Mose ayebisaki bango ete: “Okokanga motema na yo te mpe okokanga lobɔkɔ na yo te epai na mobola ndeko na yo. Okopesa ye na motema malamu, mpe motema na yo ekoimaima te.” (Deteronome 15:7, 10) Lokola kokaba esengelaki kouta na motema, Bayisalaele basengelaki kosepela na bokabi.
Toli yango mpe epesamelaki baklisto. Yesu alobaki ete ‘kopesa ezalaka na esengo.’ (Misala 20:35) Bayekoli ya Yesu batikaki ndakisa na oyo etali kopesa na esengo. Na ndakisa, Biblia elobi ete na Yelusaleme baoyo bakómaki bandimi “batɛkisi bilanga na bango mpe biloko mosusu mpe bakaboli yango na bato nyonso lokola ezalaki bango na bosɛnga.”—Misala 2:44, 45.
Kasi na nsima, bandimi ya Yudea oyo bayebanaki mpo na bokabi, bakómaki babola. Biblia eyebisi sikisiki te eloko nini esalaki ete bákóma babola. Banganga-mayele mosusu balobi ete ekokaki kozala nzala oyo elobelami na Misala 11:28, 29. Ata soki ezalaki mpo na ntina nini, baklisto wana ya Yudea bakelelaki makasi, mpe Paulo alingaki ete bamposa na bango ekokisama malamu. Asalaki ndenge nini?
Bakongoli makabo mpo na bato ya bosɛnga
Paulo azwaki makabo mautaki na masangá ya Makedonia, mpe azwaki bibongiseli mpo ete makabo yango makómela baklisto ya Yudea oyo bazalaki na bobola. Paulo akomelaki Bakolinti ete: “Ndenge napesaki etinda na masangá ya Galatia, bino mpe bósala bongo. Na mokolo ya liboso ya pɔsɔ, mokomoko na bino, na ndako na ye abomba eloko moko ndenge akozwa.”a—1 Bakolinti 16:1, 2, NW.
Paulo alingaki ete makabo yango makende nokinoki epai ya bandeko na Yelusaleme, kasi Bakolinti bazalaki koumela mpo na kosala ndenge Paulo ayebisaki. Mpo na nini? Bazalaki nde komibanzabanza te na ezaleli ya bandeko na bango ya Yudea? Te, mpamba te Paulo ayebaki ete Bakolinti bazalaki “koleka liboso na makambo nyonso, na kondima mpe na kosakola mpe na boyebi mpe na bitingya nyonso.” (2 Bakolinti 8:7) Emonani ete, bamipesaki na makambo ya ntina oyo Paulo akomelaki bango na mokanda oyo atindelaki bango liboso. Kasi sikoyo makambo ya bandeko na Yelusaleme esengelaki kotalelama na lombangu. Yango wana Paulo alobelaki likambo yango na mokanda ya mibale oyo atindelaki Bakolinti.
Alamwisi mposa ya kokaba
Liboso, Paulo ayebisaki Bakolinti na ntina na bandimi ya Makedonia, oyo bapesaki ndakisa mpo na kopesa lisungi. Paulo akomaki: “Na kati na komekama makasi mpe na mawa, basepelaki mingi mpe bobola na bango ya makasi epesaki bango bozwi mpo na ezaleli na bango ya kokaba.” Bandimi ya Makedonia bazalaki na ntina te ete moto atindika bango na makasi mpo na kopesa makabo. Kutu, Paulo alobaki ete: “Nzokande bango moko babondelaki biso mingi ete tópesa bango libaku ya kopesa makabo na motema malamu.” Bandeko ya Makedonia bazalaki mpenza kokaba na bolingo, atako bango moko bazalaki “na bobola makasi.”—2 Bakolinti 8:2-4, NW.
Lokola akumisaki bandeko ya Makedonia, Paulo alingaki nde kolamwisa elimo ya kowelana epai na Bakolinti? Ezali bongo te. Paulo ayebaki ete kosala bongo ezali lolenge malamu te ya kolendisa moto na kopesa makabo. (Bagalatia 6:4) Lisusu, ayebaki ete Bakolinti bazalaki na mposa te ete báyokisa bango nsɔni liboso ya kosala likambo ya malamu. Nzokande, andimaki ete Bakolinti bazalaki na bolingo ya solo mpo na bandeko na bango ya Yudea mpe bazalaki na mposa ya kopesa makabo mpo na kosunga bango. Ayebisaki bango ete, “Talá esili koleka mbula moko, bobandisaki bobele likambo ya kopesa te, kasi lisusu mposa ya kopesa.” (2 Bakolinti 8:10, NW) Kutu, na makambo mosusu oyo etali makabo, Bakolinti bapesaki ndakisa malamu. Paulo alobaki na bango: “Nayebi mposa na bino ya kosunga; nazali komikumisa mpo na bino epai na bato na Makedonia.” Mpe alobaki lisusu: “Molende na bino elamwisi mposa ya bato mingi kati na bango.” (2 Bakolinti 9:2, NW) Kasi, sikoyo, Bakolinti basengelaki kosala likambo moko mpo na komonisa molende mpe mposa na bango ya kosunga.
Na yango, Paulo alobaki na bango: “Moto na moto asala lokola akanisi na motema na ye, na mposa moke te mpe na kopusama te; mpo Nzambe alingi moto oyo akopesaka na esengo.” (2 Bakolinti 9:7, NW) Mokano ya Paulo ezalaki ya kopusa Bakolinti na makasi te, mpamba te moto akoki kopesa na esengo te soki bazali kotindika ye na makasi. Ya solo, Paulo ayebaki ete bazalaki na bolingo malamu, mpamba te, moko na moko azwaki ekateli ya kopesa likabo. Lisusu, Paulo ayebisaki bango ete: “Zambi soko moto alingi kopesa na motema na ye moko, likabo na ye ekoyambama na kotalela biloko azali na yango, kasi na kotalela te biloko oyo azali na yango te.” (2 Bakolinti 8:12, NW) Ɛɛ, soko mposa ezali—mpe moto apusami na bolingo—Nzambe akoyamba likabo na ye, ata soki ezali na motuya moke.—Kokanisá na Luka 21:1-4.
Baoyo bazali kopesa na esengo lelo oyo
Milende oyo esalemaki mpo na kosunga baklisto ya Yudea ezali ndakisa malamu mpo na mikolo na biso. Batatoli ya Yehova bazali kosakola na mokili mobimba, bazali komema bilei epai ya bamilio ya bato oyo bazali na nzala ya elimo. (Yisaya 65:13, 14) Bazali kosala bongo mpo bazali kotosa etinda oyo Yesu apesaki: “Boye bókenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango, . . . kolakisa mpe bango ete bátosa nyonso esili ngai kolaka bino.”—Matai 28:19, 20.
Mpo na kokokisa mokumba oyo ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Ezali kosɛnga kozala na bandako mpo na bamisionere mpe bafiliale koleka monkama na mokili mobimba. Esɛngi lisusu kotonga Bandako ya Bokonzi mpe Bandako ya Mayangani mpo ete basambeli ya Yehova bázwa bisika kitoko mpo na koyangana mpe kolendisana bamoko na basusu. (Baebele 10:24, 25) Batatoli ya Yehova bazali lisusu kopesa lisungi na bamboka oyo ebebisami na makama mauti na biloko bizalisami.
Kanisá mpe ebele ya mbongo oyo ebimaka mpo na konyata mikanda. Pɔsɔ na pɔsɔ, koleka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 22 000 000 mpe Lamuká! 20 000 000 enyatamaka. Longola bilei wana ya elimo oyo ebimaka sanza na sanza, ezali na bamilio ya babuku, mwa babuku, bakasɛti mpe bakasɛti ya video oyo ebimaka mbula na mbula.
Mosolo yango eutaka wapi? Na makabo ya bolingo malamu. Bato bapesaka makabo yango mpo na komilakisa te, to mpo na matindiki ya moimi te, kasi mpo na kotombola losambo ya solo. Yango wana, bato oyo bapesaka makabo yango bazwaka esengo mpe mapamboli ya Yehova. (Malaki 3:10; Matai 6:1-4) Ata bana ya Batatoli ya Yehova bamonisaka ete bango mpe bakabaka mpe bapesaka na esengo. Na ndakisa, Allison, mwana ya mbula minei, apesaki dolare 2 ntango ayokaki ete ekumbaki ebukaki bandako na etúká moko na États-Unis. Akomaki boye: “Mbongo nyonso nabombaki yango oyo. Nayebi ete bana mike babungisaki biloko na bango nyonso ya kosakana, na babuku, na bana-popi. Ntango mosusu, na mbongo oyo bokoki kosomba buku moko mpo na mwana-mwasi ya moke oyo azali mbula moko na ngai.” Maclean, azali na mbula mwambe, akomaki ete asepelaki mpamba te ata ndeko moko akufaki te na ekumbaki wana. Abakisaki ete: “Nazwaki dolare 17 ntango ngai na tata totɛkisaki ba enjoliveur ya bapine ya motuka. Nalingaki kosomba eloko mosusu na mbongo yango, kasi na nsima nakanisaki bandeko.”—Talá lisusu etanda na likoló.
Ya solo, Yehova asepelaka ntango amonaka mikóló na bana bazali kotya matomba ya Bokonzi na ye na esika ya liboso na lolenge bazali ‘kokumisa ye na biloko na bango ya motuya.’ (Masese 3:9, 10) Toyebi ete, moto moko te akoki kokómisa Yehova mozwi, mpamba te biloko nyonso bizali ya ye. (1 Ntango 29:14-17) Kasi, kopesa makabo mpo na kosunga mosala ya Nzambe ezali libaku malamu oyo epesaka basambeli ya Yehova likoki ya komonisa bolingo na bango epai na ye. Tozali kotɔnda moto nyonso oyo motema na ye epusaki ye na kopesa makabo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Atako Paulo “apesaki etinda,” yango elimboli te ete asɛngisaki bango na makasi. Kasi, Paulo azalaki bobele kokamba ndenge makabo esengelaki kokongolama, mpamba te likambo yango etalaki masangá mingi. Lisusu, Paulo alobaki ete mokomoko “na ndako na ye” asengeli kopesa “ndenge akozwa.” Na maloba mosusu, makabo yango masengelaki kopesama na nkuku mpe na bolingo malamu. Moto moko te atindikamaki na makasi.
[Etanda na lokasa 26, 27]
Ndenge bato mosusu bapesaka makabo mpo na mosala na mokili mobimba
Bandeko mingi babombaka mwa mosolo, to bakanaka kosala bongo soki bazwi mbongo, mpe batyaka yango na kɛsi ya makabo oyo bakomá: “Makabo mpo na mosala ya la Société na Mokili Mobimba—Matai 24:14.” Sanza na sanza masangá matindaka mbongo yango na biro monene ya la Société na Brooklyn, to na biro ya filiale oyo ezali na mboka na bango.
Makabo ya bolingo malamu ya mbongo makoki kotindama mbala moko na Treasure’s Office, Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, 25 Columbia Heights, Brooklyn, New York 11201-2483, to na biro ya filiale ya la Société na mboka na bino. Okoki mpe kopesa biju to biloko mosusu ya motuya. Osengeli kokoma mokanda moko ya mokuse mpo na komonisa ete makabo yango ezali makabo ya bolingo malamu.
Kosimbisa mbongo
Moto akoki kosimbisa la Société Watch Tower mbongo na boye ete soki asengeli na yango, akozwa yango. Mpo na koyeba makambo mosusu, okoki kokomela Treasure’s Office na adresi oyo etyami likoló.
Makabo makanami
Longola makabo ya mbongo oyo epesami libela to oyo ekozongisama, ezali mpe na myango mosusu ya kopesa makabo mpo na matomba ya mosala ya Bokonzi kati na mokili mobimba. Yango esangisi:
Asiranse: Moto akoki kokomisa nkombo ya la Société Watch Tower mpo azwa mbongo ya asiranse to azwa mbongo na ye ya epaso.
Mosolo na banki: Na mikili mosusu, moto akoki kofungola kɔnti na banki, kopesa certificat de dépôt, to kobombisa mbongo ya epaso mpo na Société Watch Tower, to kotya yango na nkombo ya la Société mpe la Société akosangola yango soki akufi.
Lotomo ya mosolo: Okoki kopesa na la Société lotomo ya mosolo (titres et obligations) lokola likabo mpo na libela, to kobatela lotomo ya kozwa mbongo yango ntango ozali naino na bomoi.
Lopango to ndako: Moto akoki kopesa la Société Watch Tower lopango, ndako to biloko mosusu oyo bikoki kotekama, libela, to mpe akoki kobatela lotomo ya kosalela yango ntango azali naino na bomoi. Yambo ya kopesa biloko yango nyonso na la Société, esengeli koyebisa ye liboso.
Mokanda ya kopesa libula: Moto akoki kopesa na la Société biloko to ndako to mosolo na mokanda ya kozwa libula oyo mondimami na mibeko, to akoki kopesa na la Société lotomo ya kozwa biloko akotika. Soki moto akufi, biloko oyo atikaki mpo na lingomba, ntango mosusu Leta akitisaka mpako na yango.
Lokola ebéngeli “Makabo oyo makanami” emonisi yango, lolenge oyo ya makabo esɛngaka ete mopesi azwa bibongiseli. Mpo na kosalisa bato oyo balingi kopesa makabo na lolenge moko ebongisami, la Société abongisi mwa buku moko ekomami na Lingelesi oyo ezali na motó na likambo ete Planned Giving to Benefit Kingdom Service Worldwide (Makabo makanami mpo na mosala ya Bokonzi na mokili mobimba). Mwa buku yango ekomamaki mpo na koyanola na ebele na mituna oyo la Société azwaki na ntina na makabo, mpe mokanda ya kopesa libula. Yango ezali mpe kopesa bandimbola mosusu ya sikisiki likoló na bibongiseli mpo na makabo ya biloko lokola ndako, mosolo, mpe mpako. Mpe ekomamaki mpo na kosunga baoyo bafandi na États-Unis mpe balingi kopesa la Société likabo sikoyo to balingi kotikela ye lotomo ya kozwa yango nsima ya liwa na bango. Bato yango basengeli koyeba kopona myango oyo eleki malamu mpe oyo ezali kosalelama na kotaleláká ezalela ya mabota na bango mpe oyo ya bango moko.
Nsima ya kotánga mwa buku yango mpe ya kosolola na bandeko ya Planned Giving Desk (biro ya la Société oyo etalaka makabo makanami), bato mingi basungaki la Société mpe mpako mpo na biloko yango ekitaki. Yambo ya kopesa likabo nyonso, esengeli koyebisa Planned Giving Desk mpe kopesa ye kopi ya mokanda nyonso oyo emonisi bibongiseli yango. Soki olingi kozwa mwa buku yango, to osepeli na bibongiseli oyo mpo na kopesa makabo okoki kosolola na Planned Giving Desk, ezala na nkoma to na telefone to kosolola na biro ya la Société ya mboka na bino.
Planned Giving Desk
Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
100 Watchtower Drive, Patterson, New York 12563-9204
Telephone: (914) 878-7000
[Etanda na lokasa 24]
Bana mpe bapesaka na esengo!
Nasepeli kopesa mbongo oyo mpo bóbimisela biso mikanda mingi. Nabombaki mbongo oyo ntango nazalaki kopesa tata na ngai mabɔkɔ na mosala. Natɔndi bino mingi mpo na mosala makasi bozali kosala.—Pamela, mbula nsambo.
Natindi dolare 6,85 oyo mpo esalisa bino bótonga Bandako ya Bokonzi mingi. Yango ezali matabisi nazwaki ntango nazalaki kotɛkisa masanga ya sukali na eleko ya molunge.—Selena, mbula motoba.
Nazalaki kobɔkɔla nsoso mpe ebotaki bana mibale, moko ya mobali mosusu ya mwasi. Napesaki Yehova likabo ya mwana ya nsoso oyo ya mwasi. Nsima nsoso yango ebotaki bana misato. Natɛkisaki yango nyonso, mpe natindaki mbongo yango mpo na mosala ya Yehova.—Thierry, mbula mwambe.
Mbongo nyonso nazalaki na yango yango oyo! Nalɔmbi bino bósalela yango malamu. Nazwaki yango na mpasi. Ezali dolare 21.—Sarah, mbula zomi.
Lokola nalongaki moto ya liboso na mamekani oyo tosalaki na eteyelo na biso, nakendaki kosala mamekani na biteyelo mosusu. Kuna lisusu nalongaki moto ya liboso, mpe nabimaki moto ya mibale na mamekani ya etúká mobimba. Na oyo nyonso, bapesaki ngai mbongo. Nasepeli kopesa ndambo ya mbongo yango na la Société. Nayebi malamu ete nalongaki na mamekani wana mpo na mateya oyo nazwaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Nazalaki kobanga te ntango nazalaki koloba liboso ya bato oyo bazalaki kotuna biso mituna.—Amber, azali na mbula soko 12.
Nasepeli kopesa mbongo oyo mpo na Yehova. Bótuna ye soki bokosala na yango nini. Ayebi makambo nyonso.—Karen, mbula motoba.
[Bililingi na lokasa 25]
Mosala ya Batatoli ya Yehova esimbami na makabo ya bolingo malamu