Masolo ya Basakoli ya Bokonzi
Motɛmɛli moko ya kala ayekoli solo
TOLANDAKI bansango mingi mpo na bitumba na ekólo Libéria. Bato mingi bakufaki, mpe bato mosusu mingi koleka bakimaki na bikólo mosusu. Ata na kati ya mpasi ya ndenge wana, bato ya mitema sembo bazali koyamba solo ndenge lisolo oyo emonisi yango.
James abɔkwamaki na Lingomba ya Luther banda azalaki na mbula zomi. Ntango akómaki kokoma na zulunalo moko ya lingomba, azalaki kokoma masolo mingi mpo na kotɛmɛla Batatoli ya Yehova. Azalaki kosala bongo, nzokande asololaki naino ata na Motatoli moko te.
Na nsima, James atikaki mosala ya kokoma na zulunalo ya lingomba mpe asalisaki otɛlɛ na ye. Mokolo moko, wana afandaki na liboso ya otɛlɛ na ye, bandeko basi mibale oyo balataki malamu, bayaki epai na ye. Lokola amonaki ete balati malamu, ayambaki bango. Kasi, ntango bayebisaki ye ntina bayaki kotala ye, alobaki, “Nazali na ntango ya kosolola na bino te, nazali na mosala mingi.” Batatoli batikelaki ye abonema ya bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Andimaki yango kaka mpo bátika ye kimya. Na boumeli ya sanza 12 mobimba, bazulunalo ezalaki kokómela ye na ndako, kasi azalaki kobwaka yango na sakosi moko ya plastiki. Azalaki ata kofungola envelopi na yango te.
Ntango etumba eyaki ndongo, James abongisaki sakosi moko mpe atyaki mbongo mpe biloko mosusu ya motuya mpo akima na yango soki amoni ete etumba ekómi pene. Mokolo moko na ntɔngɔ, grenade moko ekweaki mpe epanzanaki na nsima ya ndako na ye, mpe na nsɔmɔ wana azwaki sakosi mpe akimaki mpo na kobikisa bomoi na ye. James alandaki ebele ya basivili oyo bazalaki kokima mpe asengelaki koleka na bisika oyo basoda bakangaki nzela mpe bazalaki kotɛlɛmisa mpe kotala malamu moto nyonso liboso ya koleka. Na bisika yango, mbala mingi bazalaki kobɔtɔla basivili biloko mpe bazalaki koboma bango mpambampamba.
Na esika ya liboso, batunaki James mwa mituna mpe balobaki na ye afungola sakosi na ye. Ntango afungolaki, atalaki na kati ya sakosi na ye, mpe ye moko akamwaki. Ayokaki nsɔmɔ na komona ete atikaki sakosi oyo ezalaki na biloko na ye ya motuya. Lokola azalaki na mobulungano, azwaki sakosi oyo ezalaki na bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Kasi, ntango soda amonaki bazulunalo mpe atángaki nkombo na ye na envelopi, alobaki: “Ah, ozali Motatoli ya Yehova. Tozali koluka bino te, toyebi ete bino bokosaka te.” Soda yango azwaki mwa bazulunalo mpe ayebisaki James aleka.
Likambo yango moko esalemaki na bisika libwa, mpe lokola bakonzi nyonso ya basoda bazalaki kokanisa ete James azali Motatoli ya Yehova bazalaki kotika ye aleka na kimya. James azalaki na botɔndi lokola atikaki biloko na ye ya motuya, mpamba te, na ndenge ya makambo oyo amonaki, na ntembe te mbɛlɛ babomaki ye mpo na biloko na ye.
Ntango akómaki na esika ya nsuka oyo basoda bakangaki nzela; esika oyo mpe elekaki mabe, ayokaki nsɔmɔ na komona ebele ya bibembe na nse. Na nsɔmɔ wana, abelelaki nkombo ya Yehova. Abondelaki ete soki Nzambe asalisi ye aleka na esika wana oyo bazalaki koboma bato, akosalela ye bomoi na ye mobimba.
James alakisaki basoda sakosi na ye, mpe na mbala oyo lisusu balobaki ete: “Tozali koluka bato oyo te.” Batalaki ye mpe balobaki lisusu ete: “Ndeko na yo moko afandaka nsima ya ngomba oyo. Kendá epai na ye.” Sikawa, James abongolaki mpenza makanisi na ye mpo na Batatoli. Alukaki ndeko yango nokinoki, mpe bazwaki bibongiseli mpo na koyekola buku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis.a
Nsima ya mwa mikolo, bitumba ekómaki kuna mpe akimaki epai mosusu. Na mbala oyo, James akimaki na zamba bobele na buku na ye Bomoi ya seko! Na boumeli ya sanza 11 oyo akutanaki na Batatoli te, ayekolaki buku yango mobimba mbala mitano. Nsukansuka, ntango azongaki na mboka, azongelaki boyekoli na ye elongo na Batatoli mpe akolaki nokinoki. Mwa moke na nsima, azwaki batisimo, mpe lelo oyo azali kosala na bosembo elongo na bandeko na ye na elimo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.