Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/11 nk. 2-4
  • Bomoko na mokili—Ekosalema mokolo mosusu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoko na mokili—Ekosalema mokolo mosusu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bomoko na mokili ekosalema?
  • Libɔndisi mpo na banyokwami
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Bomoko Na Mokili—Ekosalema ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Tosangani na bomoi oyo eleki malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Ndenge Nzambe atalelaka bitumba lelo oyo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/11 nk. 2-4

Bomoko na mokili—Ekosalema mokolo mosusu?

KATI na búku na ye oyo ezali na motó na likambo ete War (Etumba), Gwynne Dyer, nganga-mayele ya istware ya mosala ya sodá alobi ete, “Na mabota oyo mazali koya, mpo ete tólónga kobongola mokili ya bikólo ya lipandá oyo tozali na yango ete ekóma lisangá ya solosolo ya mikili mingi, . . . ekosengela na biso kosilisa mpe bitumba . . . Nzokande, soki tolóngi te, nakanisi ete makambo ya bato makotombwana te.”

Dyer alobi ete lisoló ya makambo ya kala litondi na masoló ya mabota mpe bituluku mosusu ya nguya oyo esalelaki bitumba mpo na kosilisa matata na bango. Kozanga boyokani kati na bango ebomaki bamilió mingi ya bato. Lolenge Mokonzi Salomo amonisaki motindo likambo yango ezalaki na bopusi epai ya bato na eleko na ye ezali sé ndenge moko kino na eleko na biso. Akomaki ete: “Ngai nabutwaki mpe nabanzaki mpo na minyoko nyonso misalami na nsé na moi. Mpe talá, mpisoli na banyokolami mpe moko azali te mpo na kobɔndisa bango. Epai na banyokoli na bango nguya ezali nde bazali na moko te mpo na kobɔndisa bango.”​—Mosakoli 4:1.

Na eleko na biso, lokola nganga-mayele ya istware oyo touti kolobela amonisi yango, longolá mawa mpo na “mpisoli na banyokolami,” ezali na ntina mosusu mpo na koluka mwango ya kobongola mokili oyo esalemi na bikólo ya lipandá ete ekóma lokola lisangani ya solosolo ya bikólo mingi: Lobiko mpenza ya efandelo ya bato etalelami mpenza na likambo yango! Bitumba ya ntango na biso ekoki kobebisa bikólo nyonso oyo bizali kobunda bitumba mpe molóngi akozala te.

Bomoko na mokili ekosalema?

Elikya nini tozali na yango mpo na bomoko na mokili? Bato bakoki kolónga bopusi ya bokabwani oyo ezali kotya mokili na likámá? Bamoko bazali kokanisa ete ekosalema. John Keegan, mokomi ya makambo matali mosala ya sodá na zulunalo Daily Telegraph ya ekólo Angleterre, akomi ete: “Atako tozali na mobulungano mpe kozanga elikya, emonani ete tokoki kososola ebandeli ya mokili oyo ezangi bitumba.”

Nini epesi ye makanisi wana ya bolóngi? Mpo na nini ezali komonana ete bato mingi bazali na elikya atako lisoló molai ya bato etondi na bitumba mpe emonani ete moto akoki te kolónga komiyangela? (Yilimia 10:23) Na eleko moko bato mosusu balobaki ete ‘moto azali kokende liboso. Lisoló ya bato ezali kopesa bilembeteli ya bokóli.’ Ata lelo oyo, bato mingi bazali kondima ete na lolenge moko to mosusu malamu ya moto ekolónga mabe. Yango ezali mpenza elikya oyo ekoki kokokisama? To ezali bobele makanisi mpamba oyo makokokisama soko moke te? Na lolenge lobongi mpenza, J. M. Roberts, nganga-mayele ya lisoló ya makambo ya kala akomaki boye kati na búku na ye oyo ezali na motó na likambo ete Shorter History of the World: “Ezali mpasi kokanisa ete mikolo mizali koya mikozala mikolo ya kimya mpe ya libateli. To mpe nsuka ya bampasi ezali liboso, tozali ata na moboko te ya kondima ete ekosalema bongo.”

Tozali na bantina ya solosolo mpo na kondima ete bato mpe mabota bakolónga kozanga kotyelana motema mpe bokabwani na bango? To esengeli na likambo oyo eleki milende ya bato? Lisoló lilandi likotalela mituna yango.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 2]

Background globe on the cover: Mountain High Maps® Copyright © 1995 Digital Wisdom, Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto