Bomoko Na Mokili—Ekosalema ndenge nini?
EBONGISELI ya mokili oyo, lokola ndako oyo esili kobebisama na bafandi oyo bazangi komibanzabanza, ebongi sé na likambo moko—kobuka yango mpe kotonga mosusu na esika na yango. Yango ezali te makanisi mosusu ya bato oyo basakolaka sé makambo mabe. Engebene Biblia, yango ezali likambo bobele moko oyo ebongi. Mpo na nini?2
Miboko ya ebongiseli ya mokili oyo mizali makasi te. Ebongiseli mobimba etondi na bansɛlɛlɛ mpe esili kolyama na kati. Makonzí ya bibende mazali koguga. Bifelo oyo bisimbi yango bisili kolɛmba. Nsamba elingi kokwea. Batiyó ya mai etobuká. Bansinga na yango ya kurá ezali mabe mpe ezali likámá. Bafandi na yango bazali ntango nyonso kobunda bango na bango mpe bazali kobebisa ndako mobimba. Lopango mobimba mpe zingazinga na yango etondi na nyamankɛkɛ mabe mpe ekoki koboma to kozokisa bato.
Mokili ezali pene na kokufa
Mpo na kowelana oyo ezali kosila te na makambo ya politiki, lokoso, matumoli, mpe koyinana makasi kati na bikólo bikeseni, Gwynne Dyer alobi ete, “Libota mobimba ya bato ezali pene na kokufa.” Na mokili mobimba, bituluku mikemike ya bato—ezala bituluku oyo bizali kosala bopusi na biyangeli, to babundeli ya bonsomi, bituluku ya bato ya mobulu, banganga-mobulu na mokili, mpe bato mosusu—bazali kolanda na ekateli makasi bobele mikano na bango moko ya moimi mpe emonani ete bazali na likoki ya kobebisa makoki nyonso ya kotya kimya na mokili soki balingi kosala yango. Bazali babulunganisi oyo bakoki kobebisa bomoi ya moto mosusu nyonso.
Nzokande, engebene bato mosusu ya mayele, ezali te bobele bituluku oyo bizali na makanisi ya bango moko to bato ya mobulu nde bazali kobebisa bomoko na mokili. Epekiseli eleki monene ezali bongo ebongiseli ya ekólo esalemi na libota bobele moko (État-nation). Samuel Payne, mokomi ya lisoló ya bitumba alobi ete bikólo ya lipandá bizali kati na “mobulu na mokili mobimba.” Bazali kosala nyonso mpo na bolamu mingi koleka ya ekólo na bango, na kotyáká likebi moke to mpe na kozanga kotya likebi na bato mosusu. Mpo na yango, na boumeli ya lisoló mobimba ya bato “moto azali na bokonzi likoló na mosusu mpo na kopesa ye mpasi.”—Mosakoli 8:9.
Ya solo, biyangeli ya bikólo mosusu elóngi mwa moke kolongola bokeseni mpe makambo ya kokonza basusu na kati ya bamboka na bango mpe, na mwa mikili mingi. Mbala na mbala bazali kolónga kotya mwa bomoko kati na mikili mingi. Kasi, ata na ntango oyo bikólo mosusu bisanganaki mpo na kobundisa ekólo moko oyo etumolaki ekólo mosusu, mbala mingi ekanisamaki ete basalaki yango mpo na litomba na bango moko kasi mpo na komibanzabanza ya solosolo mpo na ekólo mosusu te. Bosolo ezali ete biyangeli ya bato bizali na mwango te oyo ebongi na bato nyonso mpe oyo ekoki koumela mpo na kotya bomoko na mokili. Gwynne Dyer alobi ete: “Likambo oyo ete mabota nyonso ya mokili makosangana mpo na kopekisa to kopesa etumbu na ekólo nyonso oyo eboyi kolanda mitindá mityami na bikólo mingi soki etumoli ekólo mosusu ezali likanisi ya malamu, kasi nani akoloba ete ekólo boye nde ebandaki matumoli, mpe nani akofuta mosolo mpe akopesa basodá na ye ete bákufa mpo na kopekisa ekólo yango?”
Ya solo, ekólo moko ekoki kotumola ekólo mosusu bobele soki motángo moleki monene ya banamboka na yango batɛmɛli likambo yango te. Mbala na mbala lisoló ya bato ezali komonisa ete ezali te bobele kati na bikólo oyo “biboyi kolanda mitindá mityami na bikólo mingi” nde banamboka bapesaki mabɔkɔ na bakambi na bango, ezala ete bazali na elónga to te. Kútu, motángo moleki monene ya bafandi ya mokili basalaki yango. Lokola zulunalo Time elobi yango, lokola bakufi miso, bandimi “lokuta mpe bilaka ya kolɛngola” ya bakonzi ya politiki mpe ya mangomba.
Bolingo ya ekólo esili kokólisa mayoki mabe epai ya bato oyo liboso bazalaki malamu mpe na motema mawa mpe yango ememi bango na kosala makambo ya nsɔ́mɔ epai ya mibali, basi, mpe bana ya bikólo mosusu. Na ndakisa, mpo na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, J. M. Roberts, nganga-mayele na lisoló ya makambo ya kala alobi ete: “Moko na makambo ya kokamwa ya 1914 ezali ete kati na bikólo nyonso, emonani ete ntalo monene ya bato ya masangá nyonso, bindimeli nyonso mpe mabota nyonso, bazalaki sé na mposa mpe na esengo ya kokende na etumba.” Bato bazwi nde liteya uta ntango wana? Te! Oyo Rod Usher, mokomi moko na zulunalo abéngaki ete “bolingo ya kozipa miso mpo na ekólo,” ezali kokóba kobebisa likoki nyonso ya kotya bomoko na mokili.
Banguya oyo emonanaka te ezali kosala mosala
Nzokande, ezali na epekiseli mosusu eleki monene mpo na kotya bomoko na mokili. Biblia emonisi ete banguya emonanaka te ezali kosala mosala. Ezali bongo Satana Zábolo mpe balandi na ye, bademó. Engebene Biblia, Satana azali “nzambe ya mokili oyo azimisi miso na makanisi na bango baboyi kondima,” mpo ete “Nsango Malamu na nkembo na Klisto” esala bango eloko moko te.—2 Bakolinti 4:4; Emoniseli 12:9.
Ya solo, yango elingi koloba te ete bato bazali na ekweli te na makambo oyo bazali kosala. Kasi ezali nde kolimbola ntina oyo baguvernemá ya bato ekokoka te kosala mokili oyo ezali solo na bomoko. Ntango nyonso oyo Satana Zábolo akozala, akokóba kopusa mibali mpe basi ete bákólisa oyo Biblia ebéngi ete “misala na nzoto,” kati na yango ‘koyinana, kobunda, kowelana, mpe kokabwana.’—Bagalatia 5:19-21.
Boyangeli ya mokili mobimba
Na yango, eyano ezali nini? Esili koleka soko mbula nkámá nsambo, Dante, mokomi na maloba ya ntɔ́ki mpe mofilozofe, ya ekólo Italie apesaki eyano. Alobaki ete bobele boyangeli ya mokili mobimba nde ekokoka kotya kimya mpe bomoko kati na bato. Mpo na bato mingi, elikya na boyangeli ya mokili mobimba ezali sé makanisi mpamba, kasi ezali te eloko oyo esengeli kotyela yango elikya. Payne, mokomi oyo tolobelaki na ebandeli, asukisi na kolobáká ete “boyangeli ya mokili mobimba ezali likambo oyo ekoki kosalema na ntango oyo te kati na lisoló ya bato.” Mpo na nini? Mpamba te boyangeli ya mokili mobimba oyo ekoki kolónga esengeli liboso kopesa ndanga ete ekobatela makambo mibale oyo emonani lokola ete moto akoki te kokokisa yango, talá makambo yango: “Boyangeli ya mokili mobimba esengeli kosilisa bitumba mpe esengeli kozala te nguya mpo na kokonza mokili mobimba.”
Ezali solo ete bokonzi moko te ya bato ekoki kolónga kokokisa likambo yango. Nzokande, Bokonzi ya Nzambe oyo epesameli Yesu Klisto ekoki mpe ekolongola bitumba. (Nzembo 46:9, 10; Matai 6:10) Ɛɛ, yango ekolongola bato nyonso oyo balendisaka bitumba. Mosakoli Danyele amonisi ete na nsuka ya ntango oyo Nzambe asilaki kotya ete bato báyangela mokili, boyangeli ya bato ‘ekokabwana’ lokola “ebende esangani na mabelé.” (Danyele 2:41-43) Yango ekosuka na kokabwana na makambo ya politiki mpe matata. Kasi, Danyele alobi ete Bokonzi ya Nzambe “ekobuka mpe ekosilisa makonzi nyonso [oyo ezali koyeisa bolingo ya ekólo mpe bokabwani],” to biyangeli, mpe na esika na yango akotya Bokonzi oyo epesameli Yesu Klisto, bokonzi oyo tozali kozela uta kala.—Danyele 2:44.
Ekozala na ntina te kobongisa efandelo malamu mpo na bato soki bapunzi oyo bazali ntango nyonso koyokisa bato mosusu mpasi bakóbi kofanda na mabelé. Nzokande, “bato mabe bakolongolama na mokili.” (Nzembo 37:1, 2, 9, 38; Masese 2:22) Na yango, Klisto akolongola baoyo nyonso bazali kobwaka na nkó mitindá ya Nzambe to baoyo bazali kopesa mabɔkɔ na bakonzi nyonso oyo bazali kobulunganisa mokili. Akoboma baoyo nyonso bazali kobebisa bonzenga ya mabelé oyo. Nzambe alaki “kobebisa babebisi na mokili.”—Emoniseli 11:18.
Yango ekozala te lolenge moko ya kokonza bato na mokili mobimba. Yesu Klisto akosala “mpo na makambo na sembo mpe kobunanela bayengebeni” ntango akokabola bato malamu na bato mabe. (Nzembo 45:3, 4; Matai 25:31-33) Ekozala mpe te lolenge mabe ya kosalela bokonzi. Te! Yango ekozala te lokola ndako moko kitoko ya kala oyo ekobukama na moto ya mombongo ya bandako oyo azali na lokoso. Ekozala mpenza lokola kobuka ndako moko esilá kobeba mpo na kosala efandelo moko kitoko mpe ya pɛto.
Kasi ezali boni mpo na banguya emonanaka te oyo eyeisaki bokabwani motindo wana na ntango ya kala? Bakozala na bonsomi ya kokɔta na ebongiseli yango ya sika na boye ete bafandi na yango bázongela lisusu kobebisa, kobundáká na baninga na bango mpe koyokisáká bato mosusu mpasi? Soko moke te. Kolongolama yango mpe kozongisama sika yango ekosalema mbala moko mpo na libela. “Minyoko ikobima mbala na mibale te!”—Nahumu 1:9.
Biblia ekokanisi kobomama ya libela ya Satana na kotumbama ya ekunde. Elobi ete, “Satana, mozimbisi na [bafandi ya mokili] abwakami na libeke na mɔ́tɔ na sufulu.” (Emoniseli 20:10) Oyo nde elilingi ebongi mpenza! Kanisá naino, kobomama ekokisami te na etumbelo oyo ezali moke kasi na libeke mobimba ya mɔ́tɔ, oyo ekozikisa mpe ekolongola biloko nyonso ya mabe. Moko te, ezala moto to demó, akopesamela likoki ya kosala makambo oyo mazali kotya molɔngɔ́ ya mokili mobimba na likámá, oyo akobuka mitindá ya Nzambe na ntina na malamu mpe mabe, to oyo akoyokisa baninga na ye mpasi. Babebisi nyonso ya bomoko bakozala te!—Nzembo 21:9-11; Sefania 1:18; 3:8.
Bato ya bomoko bauti na mabota nyonso
Babiki ya kopɛtolama monene yango bakozala “ebele monene . . . bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bibolo nyonso, na minɔkɔ nyonso.” (Emoniseli 7:9) Bokeseni ya bikólo to ya bitúlúká ekokabola bango te. Bakoyekola kofanda esika moko na boyokani mpe na kimya. (Yisaya 2:2-4) Likambo ya malamu lisusu koleka, bafandi mosusu ya kala oyo bazalaki awa na mabelé bakoya kosangana na bango na mwango kitoko ya lisekwa mpo ete bázonga lisusu kofanda awa na mabelé.—Yoane 5:28, 29.
Okosepela kofanda na mokili motindo wana? Bobele baoyo bandimi kotosa masɛngami ya Nzambe nde bakofanda kuna, mpe masɛngami yango mamonisami polele kati na Biblia. (Yoane 17:3; Misala 2:38-42) Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo ete oyekola makambo oyo Nzambe azali kosɛnga mpo ozala na elikya ya bomoi ya seko kati na mokili oyo ekozala na bomoko ya solo.
[Elilingi na lokasa 7]
Boyangeli oyo epesameli Yesu Klisto ekobatela mokili oyo ezali na bomoko