Nsango malamu na ntina na Paladiso na Tahiti
TAHITI! Nkombo oyo ezali kopesa likanisi ya makambo ya mikili ya bopaya. Yango eyebanaki mingi mpo na bato ya ntɔ́ki mpe bakomi lokola Paul Gauguin, Robert Louis Stevenson, mpe Herman Melville, oyo na mayemi na bango bamonisaki mpe na mikanda na bango balobaki na ntina na moi kitoko mpe kimya na bisanga ya súdi ya mai monene oyo ebendaki likebi ya bato mingi.
Tahiti ezali esanga eleki monene kati na bisanga 120 ya Polynésie française, oyo ezali na Súdi ya mai monene ya Pasifike. Atako esanga oyo ya súdi ya mai monene ezali kopesa likanisi ya paladiso, na makanisi ya bato mingi, bafandi ya Tahiti bazali na mposa ete báyebisa bango makambo na ntina na paladiso mosusu oyo ekoya mosika te. (Luka 23:43) Batatoli ya Yehova, oyo bakómi na motángo ya bato 1 918 na Tahiti, mpe bazali kosakola epai na bato 220 000 nsango malamu ete mosika te Bokonzi ya Nzambe ekotya paladiso bobele na Tahiti te kasi na mabelé mobimba.—Matai 24:14; Emoniseli 21:3, 4.
Na boumeli ya bambula mingi mosala ya kosakola na mboka Tahiti etambwisamaki na filiale ya la Société Watch Tower ya mboka Fiji, oyo ezwami mosika na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 3 500. Lokola filiale ezalaki mosika mosala ya kosakola etambwisamaki malamu mpenza te, mpe bokóli ezalaki mpenza komonana te. Na yango, na mokolo mwa 1 Apríli 1975, filiale moko etyamaki na Tahiti, mpe mosala ya baklisto ya solo ezwaki mbongwana na teritware wana. Eloko nini epesaki nzela na mbongwana yango, mpe ndenge nini mosala ya kosakola ebandaki na Tahiti?
Ebandeli ya moke
Nsango malamu ya Bokonzi esakolamaki mpo na mbala ya liboso na Tahiti na bambula ya 1930, mpe bafandi mingi ya esanga yango, oyo bazalaki na limemya mozindo mpo na Biblia, basepelaki mingi. Nzokande, epekiseli ya guvernemá mpe bipekiseli mosusu, bisalaki ete kino na nsuka ya bambula ya 1950, Motatoli ya Yehova ata moko te azalaki na esanga wana. Na eleko yango, Agnès Schenck, mobotami ya Tahiti oyo azalaki kofanda na États-Unis na mobali na ye mpe mwana na bango, bazwaki ekateli ya kozonga na Tahiti. Azali kolimbola ndenge yango elekaki.
“Na liyangani ya etúká oyo esalemaki na mobu 1957 na engumba Los Angeles, Ndeko Knorr [prezidá ya la Société Watch Tower na ntango wana] alimbolaki ete Tahiti ezalaki na mposa monene ya basakoli ya Bokonzi. Na ntango yango, nautaki kozwa batisimo elekaki bobele mbula moko, mpe nangangaki ete, ‘Boye tókende na Tahiti!’ Mabota mibale, oyo ya Neill mpe oyo ya Carano, baninga na biso ya motema, bayokaki ngai koloba bongo. Bayebisaki biso ete basepeli kokende na biso elongo, kasi tozalaki na makoki mingi te. Mobali na ngai abɛlaki ntango molai, mpe mwana na ngai ya mobali azalaki naino moke. Na yango, ezalaki mpenza mpasi mpo ete tózonga na mboka na biso. Baninga Batatoli ya masangá ya penepene bayokaki nsango na ntina ya mokano na biso, mpe batindelaki biso mbongo mpe biloko ya ndako. Na bongo, na Máí ya mobu 1958, tokótaki masuwa oyo ememaki biso na Tahiti, kati na biloko tomemaki na ezalaki na drap 36!
“Ntango tokómaki na Tahiti, nazalaki lisusu koyeba mboka yango malamu te mpamba te natikaki yango esilaki koleka mbula 20. Tobandaki kosakola, kasi tosengelaki kozala na bokɛngi mpamba te mosala na biso ya kosakola epekisamaki. Tosengelaki kobomba bazulunalo, mpe tozalaki kosalela bobele Biblia. Na ebandeli tozalaki kopesa litatoli bobele epai na bato oyo bazalaki na abonemá ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!
“Clyde Neill na David Carano, na mabota na bango, balandaki biso nsima ya liyangani ya mikili mingi oyo esalemaki na engumba New York City na mobu 1958. Tozalaki kosakola na bango esika moko mpe tozalaki kobyanga bato ete báya koyoka masukúlu oyo mazalaki kosalema na bandako ya bandeko. Mokemoke makambo makómaki kobongisama, mpe tobandaki koyekola Biblia na etuluku moko ya bato 15. Nsima ya sanza misato libota ya Neill mpe ya Carano basengelaki kotika biso mpe kozonga mpamba te eleko oyo bapesaki bango ndingisa ete báfanda na mboka lokola baturiste ekómaki na nsuka na yango. Na yango bankulutu bamonaki malamu ete liboso ya kokende na bango, bábatisa bato nyonso ya sika oyo bakokisaki masɛngami. Nazwaki libaku malamu ya kozala mobongoli ya lisukúlu ya liboso mpo na batisimo. Na libaku yango bafandi mwambe ya esanga bamonisaki komipesa na bango epai na Yehova na nzela ya batisimo. Mpe na nsima libota ya Neill mpe ya Carano bazongaki na États-Unis.
“Mosala ya kosakola ekóbaki. Tobongisaki bituluku ya mikemike mpe tozalaki kobima na mosala ya kosakola na mpokwa. Na mabaku mingi masoló elongo na bato oyo bazalaki komonisa bosepeli ezalaki kokóma kino na midi ya butu. Na bantango yango ata mpe bapastere ya Lingomba ya Protestá bazalaki kosangana na masoló yango. Na mobu 1959 lisangá ya liboso esalemaki. Nde na nsima, likambo oyo epesaki biso esengo, na mobu 1960 guvernemá endimaki Association Les Témoins de Jéhovah. Bambula wana ya ebandeli ezalaki ya esengo mpe ya bokóli monene na elimo. Ya solo, Yehova apambolaki ekateli na biso ya kokende na esika oyo mposa ezalaki monene.” Ndeko mwasi Schenck azali sikawa na mbula 87, mpe azali kokóba kosalela Yehova na bosembo nyonso kati na lisangá na ye.
Mosala ekei liboso
Na mobu 1969, Batatoli mibale, Jacques na Paulette Inaudi, bautaki na ekólo France, bayaki kosala na Tahiti lokola babongisi-nzela minene. Jacques azali komikundola ete: “Ntango tokómaki na Tahiti, ezalaki na basakoli bobele 124, lisangá moko na engumba Papeete, mpe babongisi-nzela minene mibale na engumba Vairao, na péninsule.” Tahiti na péninsule esangisami na zɛlɔ oyo ebimá kati na yango mibale (isthme). Liyangani ya mikili mingi “Kimya kati na mabelé” etikalaki moke ebanda. Jacques alobi lisusu ete: “Yango ezalaki mbala ya liboso nabongisa liyangani. Tolɛngɛlaki mpe manáka na lokótá ya Lingelesi mpo na bapaya, tobongisaki mpe bayembi mpo na nzembo ya Bokonzi, mpe tobongisaki masano-mateya mibale. Misala oyo nyonso misalemaki bobele na basakoli 126. Nandimisami solo ete Yehova nde asalaki mosala moleki monene.” Bafandi na esanga bakamwaki mingi na komona ete bato 488 bayanganaki. Mpo na mingi kati na bango, ezalaki mbala ya liboso ete bákutana na bandeko ya mikili mosusu.
Nokinoki na nsima, Jacques Inaudi akómaki mokɛngɛli-motamboli. Lokola azalaki kotala bisanga mingi, amonaki ete bato mingi bazalaki kosepela kasi basakoli ya Bokonzi bazalaki moke mpo na kolandela bosepeli wana. Jacques alimboli ete: “Yango wana nalendisaki mabota mingi ete bákende na bisanga yango mpo na kosala epai oyo mposa ezalaki monene.” “Mokemoke, nsango malamu ezalaki kokóla na bisanga mikemike.” Ndeko Inaudi asalaki lokola mokɛngɛli-motamboli kobanda 1969 kino 1974, mpe lelo azali nkulutu na lisangá moko na Tahiti.
Kati na bato oyo bandimaki elendiseli ya Ndeko Inaudi ezalaki na Auguste Temanaha, oyo azalaki moko kati na bato mwambe oyo bazwaki batisimo na 1958. Azali kolobela makambo masalemaki. “Na mobu 1972 mokɛngɛli ya zongazonga, Jacques Inaudi, alendisaki biso ete tótalela likambo ya kokende kosala na Huahine, moko kati na bisanga bibéngami Îles sous le vent na etuluku ya bisanga bibéngami Îles de la société.” Nakakatanaki mpo ete kati na lisangá nazalaki kosala bobele botángi ya Biblia mpe namiyokaki ete nabongaki te mpo na mokumba motindo wana. Atako bongo, Ndeko Inaudi akóbaki koloba na ngai ete: ‘Kobangá te, okoki kosala yango!’ Mwa moke nsima tozwaki ekateli. Bongo, na 1973 totɛkisaki biloko na biso nyonso, tokamataki bana na biso misato mpe tokendaki na Huahine.
“Ntango tokómaki, namonaki ete esengelaki nabanda makambo nyonso—boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, mpe bongo na bongo. Ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te, kasi tomonaki libateli mpe lisungi ya Yehova. Na mabaku mingi asungaki biso na kozwa esika ya kofanda. Na nsima, ntango etuluku moko ya batɛmɛli bamekaki kobengana Batatoli ya Yehova na esanga, moto moko ya politiki ayambelaki biso. Ya solo, Yehova azalaki kosɛnzɛla biso na boumeli ya bantango wana nyonso.” Sikawa, ezali na masangá mibale na Huahine—lisangá moko ya lokótá ya Lifalansé ezali na basakoli 23 mpe mosusu ya lokótá ya Tahitien oyo ezali na basakoli 55.
Na 1969, Hélène Mapu atindamaki lokola mobongisi-nzela monene na péninsule. Hélène alobi ete: “Mposa makasi ezalaki na péninsule, mpe na ntango mokuse, nabandaki boyekoli ya Biblia elongo na bato mingi.” Lisangá moko ya moke efungwamaki nokinoki na Vairao, kasi ezalaki na mposa ya bankulutu. Na ntango wana, Colson Deane, oyo azalaki kofanda na Papara na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 35, apesaki lisungi. Ndeko Deane alimboli ete: “Tosengelaki komibongisa malamu mpo na kosala na Vairao. Nazalaki kosala mosala na engumba Faaa, na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 70 uta na Vairao na ngámbo mosusu ya esanga. Nsima ya mosala, nazalaki kozonga nokinoki na ndako, kokamata libota na ngai, mpe kokende na Vairao. Na nsima mosala na ngai esɛngaki ete tókende kofanda na Faaa. Likoki ezalaki mpo na kosunga lisangá ya Vairao? Tozalaki mpenza na mposa ya kosunga bandeko kuna, yango wana tozwaki ekateli ya kokóba. Na makita oyo ezalaki kosalema na butu mbala mingi tozalaki kozonga na ndako bobele nsima ya midi ya butu mpamba te tozalaki kokende kotika bandeko oyo bazalaki na motuka te na bandako na bango. Tosalaki bongo na boumeli ya mbula mitano. Lelo oyo ezali mpenza esengo ya komona masangá minei na eteni wana ya esanga, mpe tozali na makanisi malamu ya mikolo wana.”
Filiale etyami na Tahiti
Na 1974 motángo ya basakoli ya Bokonzi na Tahiti ekólaki kino na 199. Na mbula oyo elandaki ntango N. H. Knorr prezidá ya la Société Watch Tower mpe molandi na ye F. W. Franz, bayaki na bisanga ya Polynésie française, bamonaki ete ekoleka malamu soki mosala ya kosakola na Polynésie française etambwisami na Tahiti, kasi na mboka Fiji te oyo ezali na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 3 500. Na yango, na mokolo mwa 1 Apríli 1975, misala ebandaki na filiale ya Tahiti, mpe Alain Jamet, mokɛngɛli ya zongazonga atyamaki mokɛngɛli ya filiale.
Esili koleka bambula mwa mingi, Ndeko Jamet alobelaki mapamboli kitoko oyo mautaki epai na Yehova. “Uta 1975 molende monene ezali kosalema mpo na kokómisa nsango malamu kino na bisanga nyonso mpe bituluku nyonso ya teritware na biso, oyo etando na yango ezali monene lokola Mpótó ya Wɛ́sti. Matomba ezalaki kosepelisa. Na 1983 motángo ya basakoli ematáki kino na 538. Na mbula yango batongaki biro ya filiale mpe Betele na engumba Paea. Sikawa ezali na basakoli pene na 1 900 oyo bakabolami na masangá 30 na Îles de la société, ezali mpe na lisangá moko mpe etuluku moko oyo ezwami mosika na lisangá na bisanga Tubuaï, lisusu ezali na lisangá moko mpe na bituluku mibale oyo ezwami mosika na lisangá na bisanga ya Marquises, mpe bituluku mingi oyo bizwami mosika na lisangá na bisanga ya Tuamotu mpe ya Gambier. Ebele ya Bandako ya Bokonzi ezali kotongama—misato na Marquises mpe nsambo na Tahiti—mpo na kokokisa mposa mpo na bokóli wana ebele ya bato bazali koya na makita. Na mbula ntuku mibale oyo euti koleka, Yehova apamboli solo molende na biso mpo na kolóna na elanga ya Tahiti.”
Makambo ya kosala mazali naino mingi
Likoki ya bokóli na bisanga ya Polynésie française ezali kitoko mingi. Na mwa 23 Mársi 1997, na Polynésie française mobimba bato 5 376 bayanganaki elongo na Batatoli ya Yehova na ekaniseli ya liwa ya Yesu Klisto. Mpo na kokokisa mposa ya elimo ya ebele ya bato oyo bazali kosepela, mikanda na biso mibimisami na ebele ya nkótá oyo izali kolobama kuna. Soki tolongoli lokótá ya Tahiti, mikanda ezali konyatama na lokótá Paumotu, oyo ezali kolobama na etuluku ya bisanga ya Tuamotu, mpe na Marquise ya Nɔ́rdi mpe ya Súdi.
Bokóli ya ntango nyonso mpe makambo kitoko oyo bandeko bakutanaki na yango esalisi basakoli ya Bokonzi na Tahiti ete básepela na bolingo mpe motema pɛtɛɛ ya Yehova, “oyo alingi ete bato [ya lolenge, NW] nyonso bábika mpe bákóma na boyebi koyeba solo,” ata na bisanga ya mosika ya súdi ya mai monene. (1 Timoté 2:4) Batatoli ya Yehova na Tahiti mpe na bisanga mosusu ya Polynésie française bazali na kondima makasi kati na elaka ya Yehova oyo emonisi ete: “Bisanga bikolikya na ngai, mpe bakolambela mpo na lobɔkɔ na ngai.”—Yisaya 51:5, NW.
[Karte na lokasa 26]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Filiale ya Tahiti ezali kokokisa bamposa ya bisanga ya Polynésie française
[Elilingi na lokasa 25]
Uta na lobɔkɔ ya mwasi kino na lobɔkɔ ya mobali: Alain Jamet, Mary-Ann Jamet, Agnès Schenck, Paulette Inaudi, mpe Jacques Inaudi
[Elilingi na lokasa 27]
Biro ya Filiale ya Tahiti