Mapamboli ya mosala ya Mobongisi-nzela
“Mapamboli na [Yehova] ikoyeisa bozwi, akobakisa mawa na yango te.”—MASESE 10:22.
1, 2. (a) Lolenge nini mobongisi-nzela moko amonisaki mayoki na ye na ntina na mosala ya ntango nyonso? (b) Mpo na nini babongisi-nzela bazali na libaku ya kozwa esengo mingi kati na mosala ya kozalisa bayekoli?
“MOBONGISI-NZELA moko na ekólo Canada oyo asili kolekisa mbula 32 kati na mosala ya ntango nyonso akomaki ete: “Ezali na likambo moko ya esengo monene koleka komona moto oyo oyekolaki na ye Biblia kokóma mosanzoli ya molende ya Yehova? Ezali mpenza likambo ya kosepelisa mpe ya kolendisa kondima na komona lolenge Liloba ya Nzambe ezali kopusa bato na kosala mbongwana kati na bomoi na bango mpo na kosepelisa Yehova.” Na ntina na mosala na ye ya mobongisi-nzela, alobi ete: “Nakoki te kokanisa kosala eloko mosusu. Nakoki mpenza te kokanisa eloko mosusu oyo ekoki komemela ngai esengo motindo yango.”
2 Ondimi ete kosunga moto kati na nzela oyo ezali komema na bomoi ezali likambo ya esengo monene? Ya solo, ezali te bobele babongisi-nzela nde bazali kozwa esengo motindo wana. Basaleli nyonso ya Yehova bazali na etindá ya ‘kozalisa bato bayekoli,’ mpe basalaka milende mpo na kokokisa etindá yango. (Matai 28:19) Nzokande, lokola babongisi-nzela bazali na likoki ya kosala bangonga mingi kati na mosala ya kosakola, bazali na libaku ya kozwa esengo mingi na mosala ya kozalisa bayekoli. Kasi, mosala ya mobongisi-nzela ezali mpe na mbano mosusu. Sololá na babongisi-nzela, mpe bakoyebisa yo ete mosala ya mobongisi-nzela ezali lolenge malamu ya kozwa ‘mapamboli ya Yehova oyo ezali koyeisa bozwi.’—Masese 10:22.
3. Nini esengeli kolendisa biso wana tozali kokóba kosalela Yehova?
3 Na mikolo miuti koleka, batunaki babongisi-nzela na bipai mingi na mokili ete bálobela mapamboli oyo basilaki kozwa kati na mosala ya ntango nyonso. Tiká tótalela makambo balobaki. Kasi, kolɛmba te soki mosala na yo ezali mingi te mpo na mitungisi ya kolongɔ́nɔ́ ya nzoto, bobangé, to mpe mikakatano mosusu. Omikundola ete likambo lileki ntina ezali ya kosalela Yehova na molimo mobimba, na makoki nyonso. Nzokande, na koyokáká maloba na bango, yango ekoki kokólisa mposa na yo ya kobanda mosala yango soki likoki ezali.
Mayoki mozindo ya bosepeli mpe ya esengo
4, 5. (a) Mpo na nini kosakola nsango malamu epai na basusu epesaka mbano? (b) Babongisi-nzela bazalaka na mayoki ya lolenge nini na ntina na kosangana na mosala ya ntango nyonso?
4 Yesu alobaki ete: “Esengo na kopesa eleki esengo na kozwa.” (Misala 20:35) Ɛɛ, kopesa na motema mobimba ezalaka na mbano na yango mpenza. (Masese 11:25) Yango emonanaka mingimingi na ntango tozali kosakola nsango malamu epai na basusu. Ya solo, likabo nini ya monene tokoki kopesa na moninga moko oyo eleki kosalisa ye ete azwa boyebi ya Nzambe, oyo ezali komema na bomoi ya seko?—Yoane 17:3.
5 Likambo ya kokamwa ezali te ete baoyo bazali kosala mosala ya ntango nyonso mbala mingi balobelaka esengo mpe bosepeli ya mozindo oyo bayokaka na mosala na bango. Mobongisi-nzela moko ya mibu 64, na ekólo Grande-Bretagne alobi ete: “Nayebi ete mosala mosusu te ekokaki komemela ngai esengo lokola oyo ezali kouta na mosala ya kosakola solo epai na basusu.” Mwasi moko mokufeli-mobali, mofandi na République Démocratique du Congo alobelaki makanisi na ye na ntina na mosala ya mobongisi-nzela: “Mosala ya mobongisi-nzela ezalaki mpenza libɔndisi mpo na ngai nsima ya liwa ya mobali na ngai. Wana nazali kobima mingi na mosala ya kosakola mpo na kosalisa basusu, mawa na ngai ezali kokita. Nazali na kondima kati na bilaka ya Yehova mpe nazali kokanisa mingi lolenge nakoki kosalisa baoyo nazali koyekola na bango Biblia ete básala mbongwana na bomoi na bango. Na nsuka ya mokolo na mokolo, nalalaka malamu mpe motema na ngai etondaka na esengo.”
6. Esengo nini ya sikisiki babongisi-nzela mosusu bazwaki?
6 Basusu oyo basilaki kosala mosala ya mobongisi-nzela na boumeli ya bambula mingi bazwaki esengo monene ya kokende kosakola bipai mosusu mosika, kosala masangá, oyo na nsima ekómaki bazongazonga. Na ndakisa, na engumba Abashiri, na Hokkaido (esanga eleki mosika na nɔ́rdi ya ekólo Japon), ezali na ndeko mwasi moko oyo azali mobongisi-nzela esili koleka mbula 33. Amikundolaki ete na liyangani ya zongazonga oyo ayanganaki mpo na mbala ya liboso—na Hokkaido mobimba—bayangani bazalaki bobele 70. Nzokande sikawa, zongazonga izali 12 kati na esanga yango mpe motángo nyonso ya basakoli ezali bongo 12 000. Kanisá lolenge motema na ye etondaka na esengo ntango akendaka na mayangani elongo na ebele ya baninga basakoli ya Bokonzi na esanga wana!
7, 8. Esengo nini babongisi-nzela oyo baumeli ntango mingi bazwaki?
7 Babongisi-nzela mosusu oyo baumeli na mosala yango basili kozwa esengo ya komona bayekoli ya Biblia kozwa batisimo mpe na nsima kosimba mabaku kitoko ya mosala ya kosakola. Na ekólo Japon, ndeko mwasi moko oyo asalaki mosala ya mobongisi-nzela na bisika libwa bikeseni kobanda 1957, azali komikundola ete apesaki zulunalo Lamuká! na elenge mwasi moko oyo azalaki kosala na bánki. Nsima ya sanza libwa, elenge mwasi yango azwaki batisimo. Na nsima abalaki, mpe ye na mobali na ye bakómaki babongisi-nzela monene. Oyo nde esengo ndeko mwasi mobongisi-nzela azalaki na yango ntango, na esika ya misato oyo atindamaki mpo na mosala ya mobongisi-nzela, mokɛngɛli ya zongazonga ya sika mpe mwasi na ye—oyo bayaki kotala lisangá na bango—ezalaki bongo moyekoli na ye ya Biblia!
8 Likambo ya kokamwa ezali te ete baoyo bakómisi mosala ya mobongisi-nzela lokola mosala na bango mpenza batalelaka yango lokola “libaku moko ya motuya oyo esengeli kobatelama,” lokola mobongisi-nzela moko oyo azali na mibu 22 alobaki yango!
Elembetele ya lisungi ya Yehova
9. Lokola azali Mopesi Monene, Yehova alaki nini epai na basaleli na ye, mpe yango elimboli nini mpo na biso?
9 Yehova, Mopesi Monene, alaki ete akosunga basaleli na ye, akokokisa bamposa na bango na elimo mpe na mosuni. Davidi, Mokonzi moko ya kala, akokaki koloba na komindimisa nyonso ete: “Nazalaki elenge mpe nakómi mobangé, nde naino namoni moyengebeni te oyo atikami, to mwana na ye akolɔmbáká kwanga.” (Nzembo 37:25) Ya solo, endimiseli wana euti na Nzambe ezali te kolongola biso na mokumba ya kokokisa bamposa ya mosuni mpo na mabota na biso, ezali mpe te kopesa ndingisa ya kozela bobele makabo epai na bandeko na biso baklisto. (1 Batesaloniki 4:11, 12; 1 Timoté 5:8) Nzokande, soki tomipimeli makambo mosusu na bomoi na biso mpo na kosalela Yehova na motema na biso mobimba, ye akosundola biso soko moke te.—Matai 6:33.
10, 11. Na kotalela makambo oyo bakutanaki na yango, babongisi-nzela mingi bayebi nini na ntina na likoki ya Yehova ya kopesa?
10 Na kotalela makambo bazali kokutana na yango, babongisi-nzela na mokili mobimba bayebi ete Yehova asungaka baoyo bazali komitya na mabɔkɔ na ye. Tótalela oyo ekómelaki babalani mibale babongisi-nzela oyo bakendaki kosakola na engumba moko moke epai kuna mposa ya basakoli ya Bokonzi ezalaki makasi. Nsima ya mwa basanza, misala ya mosuni ezalaki komonana lisusu te mpe bazalaki lisusu na mosolo te. Nsima ya mwa ntango, bazwaki faktirɛ ya kofuta assurance ya ndanga ya motuka na bango oyo ezalaki na motuya ya dolare 81. Ndeko mobali alobi ete: “Tozalaki na mosolo te mpo na kofuta yango. Tobondelaki na molende na butu yango.” Mokolo oyo elandaki, bazwaki kálati moko oyo eutaki epai ya libota moko oyo bazalaki mpe na mokakatano ya mosolo. Na kálati yango balimbolaki ete libota yango bazwaki mosolo oyo Letá azongiselaki bango likoló ya ntako oyo bafutaki, mpe lokola ezalaki mingi koleka oyo bango bakanisaki, balingaki kopesa ndambo ya mosolo na babalani mibale babongisi-nzela. Kati na yango ezalaki na chèque ya dolare 81! Ndeko mobali mobongisi-nzela alobi ete: “Nakobosana mokolo wana soko moke te—ezalaki mpenza esengo monene! Tosepelaki mingi na bokabi ya libota yango.” Yehova mpe asepelaka na boboto motindo wana, oyo ezali lolenge ya elimo ya kokaba oyo alendisaka epai na basaleli na ye.—Masese 19:17; Baebele 13:16.
11 Babongisi-nzela mingi bakoki koyebisa makambo motindo wana. Tuná bango mpe bakoyebisa yo ete naino ekómela bango te ete ‘básundolama’ libela. Kozongisáká makanisi na ye na mibu 55 oyo asali kati na mosala ya ntango nyonso, mobongisi-nzela moko oyo azali na mibu 72 alobi ete, “Yehova asundolaka ngai soko moke te.”—Baebele 13:5, 6.
“Mwango moleki malamu mpo na kokangama makasi na Yehova”
12. Mpo na nini mosala ya kosakola nsango malamu ezali libaku moko kitoko?
12 Likambo oyo ete Yehova asɛngaka na biso ete tósakola nsango malamu ya Bokonzi ezali kopesa biso libaku moko kitoko. Atalelaka biso—atako tozangi kokoka—lokola “basalani” na ye kati na mosala oyo ezali kobikisa bomoi ya bato. (1 Bakolinti 3:9; 1 Timoté 4:16) Wana tozali kosakola nsango ya Bokonzi epai na basusu, kosakola nsuka ya mabe, tozali kolimbwela bato bolingo na ye monene oyo emonisami na nzela ya lisiko, tozali kofungola Liloba na ye ya bomoi mpe koteya makambo na yango ya motuya epai na bato ya motema sembo, tozali mpenza kokangama na Mozalisi na biso, Yehova.—Nzembo 145:11; Yoane 3:16; Baebele 4:12.
13. Bamoko balobaka nini na ntina na bopusi oyo mosala na bango ya mobongisi-nzela ezali na yango likoló na boyokani na bango elongo na Yehova?
13 Babongisi-nzela bazali na likoki ya kosala ntango mingi sanza na sanza na koyekola mpe koteya makambo matali Yehova. Bamiyokaka ndenge nini na koyeba ete yango ezalaka na bopusi likoló na boyokani na bango na Nzambe? Nkulutu moko oyo asali mibu koleka zomi na mosala ya mobongisi-nzela na ekólo France ayanolaki ete: “Kosala mosala ya mobongisi-nzela ezali lolenge malamu ya kokóma na bokangami makasi na Yehova.” Mobongisi-nzela mosusu na ekólo yango, oyo alekisi mibu 18 na mosala ya ntango nyonso alobi ete: “Mosala ya mobongisi-nzela ezali kopesa biso likoki ya ‘komeka mpe kososola ete Yehova azali malamu,’ mokolo na mokolo tozali kotonga boyokani makasi elongo na Mozalisi na biso.” (Nzembo 34:8) Ndeko mwasi moko na ekólo Grande-Bretagne oyo azali mobongisi-nzela esili koleka mibu 30 azali na mayoki motindo yango. Alobi ete: “Kokangama na elimo ya Nzambe lokola litambwisi kati na mosala na ngai ya kosakola ezali mpenza kobɛlɛmisa ngai na Yehova. Na mabaku mingi, nayokaki mpenza ete elimo ya Yehova ezalaki kotambwisa ngai na ndako oyo esengeli mpe na ntango ebongi.”—Kokanisá na Misala 16:6-10.
14. Lolenge nini babongisi-nzela bazwaka matomba na kosaleláká mokolo na mokolo Biblia mpe mikanda mikolimbolaka Biblia wana bazali koteya basusu?
14 Babongisi-nzela mingi bamonaka ete mokolo na mokolo kosalela Biblia mpe mikanda mikolimbolaka Biblia mpo na kopesa ndimbola na solo ya Makomami esalisaka na kokóla na boyebi ya Liloba ya Nzambe. Ndeko mobali moko ya mibu 85 oyo alekisi mibu 31 na mosala ya mobongisi-nzela alobi ete: “Mosala ya mobongisi-nzela esalisi ngai ete nazwa boyebi mozindo ya Biblia, boyebi oyo nasaleli mpo na kosunga bato mingi ete báyeba Yehova mpe mikano na ye.” Ndeko mwasi moko na Grande-Bretagne azali kosala mosala ya mobongisi-nzela esili koleka mibu 23 alobi ete: “Mosala ya ntango nyonso esili kosalisa ngai na kolóna mposa makasi ya bilei ya elimo.” Kolimbwela basusu “ntina na elikya ezali kati na [yo]” ekoki kondimisa yo na ntina na makambo ozali kolinga. (1 Petelo 3:15) Mobongisi-nzela moko mofandi na ekólo Australie alobaki ete: “Mosala ya mobongisi-nzela ekólisaka kondima na ngai wana nazali kosakola epai na basusu.”
15. Bandeko mingi bazali kolinga kosala nini mpo na kokɔta na mosala ya mobongisi-nzela mpe koumela kati na yango, mpe mpo na nini?
15 Ezali polele ete baministre yango babongisi-nzela bamindimisi ete basili kopona lolenge moko ya mosala ya kosakola oyo ezali komema mapamboli mingi, mapamboli oyo mauti na Yehova. Likambo ya kokamwa ezali te ete bandeko mingi balingaki kosala mbongwana na makambo na bango ya bomoi, ata mpe kotika mosala ya mosuni mpe bozwi ya mosuni mpo na kokɔ́ta na mosala ya mobongisi-nzela mpe koumela kati na yango!—Masese 28:20.
Motema na yo ezali na mposa ya kosala mingi?
16, 17. (a) Mpo na koyeba soki mosala ya mobongisi-nzela ekoki na yo, osengeli kosala nini? (b) Basusu bazalaka na mayoki nini soki bazali na likoki te ya kosala mosala ya mobongisi-nzela?
16 Nsima ya kotalela makambo oyo babongisi-nzela balobaka na ntina na mapamboli ya mosala ya ntango nyonso, mbala mosusu ozali komituna soki mosala ya mobongisi-nzela ebongi mpo na yo. Soki ezali bongo, mpo na nini te kosolola na mobongisi-nzela moko oyo asili kozwa matomba kati na mosala ya ntango nyonso? Okoki mpe kozwa lisungi na kosololáká na nkulutu moko na lisangá, ndeko moko oyo ayebi yo malamu—kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na yo, makoki na yo, mpe mikumba na yo ya libota. (Masese 15:22) Makanisi malongobani ya basusu makoki kosalisa yo ete otalela na likebi mpenza soki okokoka kosala mosala ya mobongisi-nzela. (Kokanisá na Luka 14:28.) Soki ozali na likoki ya kosala mosala ya mobongisi-nzela, mapamboli mingi mazali kozela yo.—Malaki 3:10.
17 Kasi, ezali boni mpo na basakoli ya sembo ya Bokonzi mingi oyo bazali na likoki te ya kosala mosala ya mobongisi-nzela, atako bazali na mposa ya kosala mingi na mosala ya kosakola? Tótalela na ndakisa, mayoki ya ndeko mwasi moklisto moko oyo azali kosala milende mpo na kobɔkɔla ye moko bana na ye minei. Alobi ete: “Nazali koyoka mawa mpamba te liboso nazalaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza, kasi sikawa, na ntina na makambo ya bomoi na ngai, nakoki te kobima na mosala ya kosakola mbala mingi lokola nazalaki kosala yango.” Ndeko mwasi yango alingaka mpenza bana na ye mpe azali na bolingi ya kokokisa bamposa na bango. Nzokande, azali mpe na mposa ya kosala mingi kati na mosala ya kosakola. Alobi ete: “Nalingaka mosala ya kosakola.” Mayoki motindo wana ezali mpe epai na baklisto mosusu oyo bamipesi mpe bolingo oyo bazali na yango mpo na Nzambe ezali kopusa bango ete básalela Yehova ‘na motema na bango mobimba.’—Nzembo 86:12.
18. (a) Yehova azelaka nini epai na biso? (b) Mpo na nini tosengeli kolɛmba te soki makambo mosusu mapesi biso nzela te ya kosala oyo tokokaki kosala?
18 Tómikundola ete oyo Yehova asɛngaka epai na biso ezali bongo mosala mosalami na molimo mobimba. Bonene ya mosala yango ekoki kokesana kati na moto moko na mosusu. Bamoko bazali na likoki ya kobongisa makambo na bango mpo na kosala lokola babongisi-nzela ya sanza na sanza. Basusu mingi basalaka mosala ya mobongisi-nzela mosungi na bantango mosusu to ntango nyonso, kolekisáká sanza na sanza ngonga 60 kati na mosala ya kosakola. Nzokande, motángo monene ya basaleli ya Yehova bamipesi na molimo mobimba na mosala ya kosakola mpe ya koteya lokola basakoli kati na lisangá. Na bongo, soki ozali mpenza na likoki te na ntina na mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, bobangé, mikumba ya libota, to makambo mosusu, kolɛmba te. Lokola ozali kopesa oyo ezali malamu mpo na yo, mosala na yo ezali na motuya na miso ya Nzambe, lokola mpe ya baoyo bazali kati na mosala ya ntango nyonso!
Moklisto nyonso akoki komonisa elimo ya mobongisi-nzela
19. Elimo ya mobongisi-nzela elimboli nini?
19 Atako ozali na likoki te ya kozala mobongisi-nzela, okoki komonisa elimo ya mobongisi-nzela. Elimo ya mobongisi-nzela elimboli nini? Mosala na biso ya Bokonzi ya Yulí 1988 (ebimeli ya Lingelesi) elobaki ete: “Elimo ya mobongisi-nzela ekoki kolimbolama ete kozala na makanisi mabongi na ntina na etindá ya kosakola mpe kozalisa bayekoli, komonisa bolingo mpe komibanzabanza mpo na bato, kozala na elimo ya komipesa, kozwa esengo na kozaláká penepene na Molakisi, mpe kosepela na makambo ya elimo, kasi ya mosuni te.” Lolenge nini okoki komonisa elimo ya mobongisi-nzela?
20. Na lolenge nini baboti bakoki komonisa elimo ya mobongisi-nzela?
20 Soki ozali moboti mpe ozali na bana bilenge, okoki kolendisa bango na motema mobimba ete bápona kosala mosala ya mobongisi-nzela. Makanisi na yo mabongi na ntina na mosala ya kosakola ekoki kopesa bango mposa ya kosala ete mosala ya Yehova ezala likambo lileki ntina kati na bomoi na bango. Okoki kobyanga babongisi-nzela mpe bakɛngɛli-batamboli elongo na basi na bango na ndako na yo mpo ete bana na yo bázwa matomba na bandakisa ya baoyo bazwaki esengo kati na mosala ya ntango nyonso. (Kokanisá na Baebele 13:7.) Ata kati na mabota oyo makabwani na makambo ya losambo, baboti oyo bazali bandimi, na maloba mpe na ndakisa na bango, bakoki kosalisa bana na bango ete bátya mosala ya ntango nyonso lokola mokano kati na bomoi na bango.—2 Timoté 1:5; 3:15.
21. (a) Na lolenge nini biso nyonso tokoki kopesa lisungi epai na baoyo bazali babongisi-nzela? (b) Bankulutu bakoki kosala nini mpo na kolendisa babongisi-nzela?
21 Kati na lisangá, biso nyonso tokoki kosunga na motema mobimba baoyo bazali na likoki ya kosala mosala ya mbongisi-nzela. Na ndakisa, okoki kosala molende ete osakola elongo na mobongisi-nzela, mingimingi na bantango oyo azali kobima na mosala ya kosakola ye moko, boye te? Okoki komona ete ‘bokoyikisana mpiko’ kati na bino. (Baloma 1:11, 12) Soki ozali nkulutu, okoki kútu kosala mingi na kolendisáká babongisi-nzela. Ntango lisangani ya bankulutu bakutani, basengeli mbala na mbala kotalela bamposa ya babongisi-nzela. Soki mobongisi-nzela moko alɛmbi to azali kokutana na mikakatano, kozala mbangu te na kokata ete atika mosala ya mobongisi-nzela. Mbala mosusu kopesa likanisi wana ezali na ntina, kasi esengeli kobosana te ete kosala mosala ya mobongisi-nzela ezali libaku kitoko oyo mosáli ya ntango nyonso azali kolinga mingi mpenza. Mwa maloba ya kolendisa mpe mwa toli oyo ebongi to lisungi ekoki kozala nde likambo oyo lisengeli. Filiale ya la Société na Espagne ekomi ete: “Ntango bankulutu bazali kolendisa mosala ya mobongisi-nzela, kosunga babongisi-nzela kati na mosala ya kosakola, mpe kotala bango mbala na mbala, babongisi-nzela bayokaka esengo mingi, bamiyokaka ete bazali na ntina, mpe bazalaka na bolingi ya kokóba na mosala na bango atako mikakatano ekoki kobima.”
22. Na ntango oyo ya mpasi kati na lisoló ya bato, tosengeli kozala na ekateli ya kosala nini?
22 Tozali kobika na ntango moko ya mpasi kati na lisoló ya bato. Yehova asili kopesa biso mosala oyo tosengeli kokokisa, mosala oyo ezali kobikisa bomoi ya bato. (Baloma 10:13, 14) Ezala ete tokoki kosala mosala ya ntango nyonso lokola babongisi-nzela to tokoki kosala te, tiká ete tómonisa elimo ya mobongisi-nzela. Tiká ete tózala na mayoki ya kosala na lombangu mpe na elimo ya komipesa. Tiká ete tózwa ekateli ya kopesa Yehova oyo azali kosɛnga epai na biso—mosala mosalami na molimo mobimba. Mpe tómikundola ete wana tozali kopesa nyonso oyo tokoki kopesa, ezala ete ekokani na meya mibale ya mwasi-mokufeli-mobali to na malási ya motuya ya Malia, mosala na biso ezali ya molimo mobimba, mpe Yehova asepelaka na mosala na biso mosalami na molimo mobimba!
Ozali komikundola?
◻ Mpo na nini mosala ya ntango nyonso epesaka mayoki ya kosepelisa mpe ya esengo?
◻ Na makambo oyo bakutanaki na yango, babongisi-nzela mingi bayebi nini na ntina na likoki ya Yehova ya kosunga basaleli na ye?
◻ Babongisi-nzela bayokaka ete mosala na bango ezali na bopusi nini likoló ya boyokani na bango elongo na Yehova?
◻ Na lolenge nini okoki komonisa elimo ya mobongisi-nzela?
[Elilingi na lokasa 23]
Babongisi-nzela bayokaka esengo mingi kati na mosala ya kozalisa bayekoli
[Elilingi na lokasa 23]
Bana na yo bakoki kozwa matomba na kosaláká boninga na basakoli ya ntango nyonso
[Elilingi na lokasa 23]
Bankulutu bakoki kolendisa babongisi-nzela kati na mosala ya kosakola