Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/5 lok. 3
  • Bosembo ezali wapi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bosembo ezali wapi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mitindá ya bosembo oyo mizali sé kobongwana
  • Okokangama makasi na bosembo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mpo na nini osengeli kobatela bosembo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Batelá bosembo na yo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Kotyelama motema kati na mokili ya kozanga kokoka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/5 lok. 3

Bosembo ezali wapi?

ELEKI sikawa mbula nkámá na mwa ndambo, Barney Barnato, moto moko ya mombongo ya diamá oyo azalaki na Afrika ya Súdi, azongaki na Angleterre. Na ntango akómaki alingaki te ete lisoló ya bomoi na ye likomama na zulunalo. Na yango, apesaki mokomi ya zulunalo mwa nkasa epai akomaki mwa makambo, elongo na chèque ya mosolo mingi mpo ete mokomi yango akoma lisoló na ye ndenge mosusu “na kosemboláká makambo mosusu.”

J. K. Jerome, mokomi ya zulunalo, abwakaki nkasa yango na kitunga ya kobwaka bosɔtɔ mpe azongiselaki ye chèque. Bernato akamwaki mpe nokinoki abakisaki motuya ya mbongo mbala mibale koleka motuya ya liboso. Mokomi aboyaki yango lisusu. Bernato atunaki ye ete: “Olingi ntalo boni?” Kokundoláká likambo yango, Jerome alobi: “Nalimbwelaki ye ete likambo wana esalamaka te na Londres.” Bosembo na ye ya mokomi ya zulunalo ezalaki likambo oyo bakoki kosomba yango na mosolo te.

“Bosembo” ezali kolimbolama lokola “ezaleli ya alimá; kolongobana.” Moto ya bosembo ezali ye oyo bakoki kotyela ye motema. Kasi lelo oyo, kozanga kolongobana​—kozanga bosembo​—ezali komonana na makambo nyonso ya bomoi.

Na Angleterre, myango ya bopanzi nsango misili kopalanganisa liloba “sleaze” mpo na kolimbola kobeba ya ezaleli ya bosembo. Lokola zulunalo The Independent elobi yango, kozanga kolongobana ezali komonana “na makambo nyonso bandá na makambo ya mabala kino myango ya bakonzi ya Letá mpo na kozwa kanyaka likoló na misala ya mombongo.” Ezaleli yango ezali komonana na makambo nyonso ya bomoi.

Mitindá ya bosembo oyo mizali sé kobongwana

Ya solo, bosembo elimboli te ezaleli ya kokoka, kasi ezali ezaleli ya moboko epai na moto. Na mokili na biso oyo etondi na mposa ya kokóma na bozwi nokinoki, bosembo ekoki kotalelama lokola bozito, kasi te lokola libongí (qualité). Na ndakisa, epai ya banakelasi, kosalelama ya biloko bibongisami na lolenge ya kokamwa mpo na kokɛngɛ (tricher) na mamekani ezali sé kobakisama, mpe mbala mingi, ezali mpasi mpo na koyeba bisaleli yango ya sika. Molakisi moko na Iniversité na mboka Angleterre alobi ete koleka katikati ya motángo ya banakelasi nyonso ya Angleterre basilaki kokɛngɛ, mpe na ntembe te likambo yango lizali bobele na Angleterre te.

Tosengeli kobosana te mbeba oyo bato basali likambo te bazali kozwa na ntango bato bazangi bosembo bazali kokosa mpe kozimbisa. Tózwa ndakisa ya engumba Bhopâl, na mboka Inde epai kuna, na 1984, gaze ya mabe ebomaki bato koleka 2 500, kati na bango mibali, basi, mpe bana mpe lisusu bankóto mingi bazwaki mpasi. Zulunalo The Sunday Times ekomaki boye: “Myango ya kopesa lisungi epai na bato bakweli likámá mizali kobebisama na kobuba. . . . Mosala ya koluka koyeba baoyo bakweli solo makámá moyeisami mindɔndɔ na bankóto ya bisengeli ya lokuta, mikanda ya lokuta mpe bilembeteli ya lokuta.” Mpo na yango, nsima na mbula zomi, bobele motuya ya badolare 3 500 000 epesamaki epai na baoyo bazalaki solo na bosɛnga mpo ete babungisaki biloko na bango oyo motuya na yango ezali ya badolare 470 000 000.

Ezali boni mpo na mangomba? Mazali na lokumu nini na likambo ya bosembo? Na mawa nyonso, mbala mingi mitindá mikeseni mpenza te na oyo ya mokili. Tózwa ndakisa ya Eamon Casey, episkɔ́pɔ ya Lingomba ya Katolike ya Loma, oyo ayambolaki ete azalaki na mwana moko ya mobali oyo abotaki ye na mwasi ya makango, mwana yango azali sikawa elenge. Lokola zulunalo Guardian ya mboka Angleterre elobaki yango, likambo ya Casey ezalaki “sé yango moko te.” Bobele bongo, zulunalo The Times ekomaki: “Bosolo na likambo ya nsɔ́ni oyo episkɔ́pɔ Casey asali ezali te ete mbeba na ye ezali likambo oyo lisalemaka te, kasi kobuka ndai ya bonzemba ezali likambo ya sika te to oyo esalemaka mingi te.” Kondimáká bosolo ya likambo wana, zulunalo The Glasgow Herald ya mboka Irlande, elobi ete bobele 2 % ya bakonzi ya Lingomba ya Katolike ya Loma kati na États-Unis baboyaki kosangisa nzoto, ezala na basi to mibali na mibali. Mitángo yango ata soki mizali ya solo to te, mizali komonisa lokumu mabe oyo basángó ya Lingomba ya Katolike bazali na yango na likambo litali mitindá ya bizaleli malamu.

Na kotaleláká bandakisa motindo wana, ekoki kosalema ete moto abatela ezaleli ya bosembo? Kozala sembo ezali na ntina? Ezali kosɛnga nini, mpe matomba nini mazwamaka na kozala sembo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto