Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/4 lok. 32
  • Bilei na mokili bikozanga te—Na nzela nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilei na mokili bikozanga te—Na nzela nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/4 lok. 32

Bilei na mokili bikozanga te—Na nzela nini?

LESTER BROWN, prezidá ya Worldwatch Institute na engumba Washington, D.C. alobi boye: “Mbala mosusu milende nyonso oyo tokoki kosala mikolónga te mpo na kobatela likoki ya koleisa mokili mobimba oyo tozalaki na yango ntango molai na boumeli ya ekeke oyo.” Engebene zulunalo New Scientist, na ebandeli ya mobu 1995, masangu oyo mazalaki kati na mabómbo mpo na koleisa mokili mobimba makitaki kino kokóma na motuya oyo emonana naino te, tone milió 255​—oyo ekoki koleisa mokili mobimba na boumeli ya mikolo bobele 48. Na boumeli ya bambula eleki, ntango masangu oyo mazalaki na mabómbo makitaki kino na motuya oyo ekoki koleisa mokili na boumeli ya mikolo 60, likoki ezalaki ya kozongisa oyo ezangaki. Kasi sikawa Worldwatch ezali na elikya te ete mokili ezali na likoki ya kozwa lisusu motuya oyo ezangi.

Nsima ya mbula misato oyo bilanga ebotaki mpenza malamu te mpe na kotalela kobakisama ya mikili oyo mizali kosalela masangu mpo na koleisa banyama, masangu mazali lisusu mingi te mpo na babola oyo bazali na mposa na yango mpo na komileisa. Zulunalo New Scientist epesi likebisi ete soki likambo yango ekotalelama nokinoki te, bato miliare moko oyo bazali kosalela pene na 70 % ya mosolo na bango mpo na kosomba bilei bakobanda kokufa nzala.

Biblia esila kosakola ete bafandi na mokili na eleko na biso bakozala na “nzala.” (Luka 21:11) Atako bongo Nzambe akangeli mpasi yango miso te. Ya solo, nsukansuka, akomonisa komibanzabanza na ye mpo na mpasi ya bato ntango Bokonzi na ye ekotambwisa makambo ya mokili. Na ntango yango ‘mokili ekobota mbuma na yango.’ “Masangu ikotondana na mokili ata kino likoló na nkeka.” (Nzembo 67:6; 72:16) Na ntango yango maloba oyo ya esakweli na ntina na Mozalisi na biso makokokisama: “Okoyaka epai na mokili . . . , okopambola yango mingi . . . mabwaku ikozipama na masangu.”​—Nzembo 65:9, 13.

Osepeli na bilaka kitoko wana? Ozali na mposa ya koyeba lolenge yo mpe okoki kosepela na yango? Mpo na yango tuná Batatoli ya Yehova ete bálimbwela yo makambo mingi na ntina na paladiso oyo elakami mbala ya nsima oyo bakoya lisusu kotala yo. Soki olingi ete moto moko aya kolakisa yo Biblia kozanga kofuta mbongo, tuná Batatoli ya Yehova ya mboka oyo yo ofandi to tindá nkomá na Association “Les Témoins de Jéhovah,” B.P. 634 Limete, Kinshasa, Zaïre.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto