Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/3 lok. 8
  • “Tiká ete moi na bino engenga liboso na bato”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Tiká ete moi na bino engenga liboso na bato”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Masolo mosusu
  • Tobongisami “na motindo mozali na nsɔni te mpe na mobulu te”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Misala malamu oyo mikumisaka Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Etamboli oyo ezali komonisa mosala na biso ya boklisto kati na makambo nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • “Tokumisa Nzambe na esengo nyonso”​—Liyangani ya etúká 1995
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/3 lok. 8

Masoló ya Basakoli ya Bokonzi

“Tiká ete moi na bino engenga liboso na bato”

NA LISOLÓ na ye Likoló na Ngomba, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Bino bozali moi na mokili.” Alendisaki bango lisusu na maloba oyo: “Tiká ete moi na bino engenga liboso na bato ete bámona misala na bino malamu mpe ete bákumisa Tata na bino oyo azali na likoló.”​—Matai 5:14-16.

Misala malamu ya Batatoli ya Yehova mizali komonana polele na mboka Italie. Na ndakisa, etamboli na bango malamu ezali kopesa masanzoli epai na Nzambe na ntango bazali kokende mbula na mbula na mayangani na bango, lokola balapólo elandi emonisi yango:

▪ Na boumeli ya mbula mingi, mwasi moko na engumba Terni, na Italie, azalaki kosunga mwana na ye ya mwasi na misala na restorá na ye oyo ezalaki pene na libandá ya masano na engumba wana. Alobi boye: “Namonaki bokeseni monene kati na baoyo bazalaki koya kotala masano ya ndembo mpe baoyo bazalaki koya kuna na mayangani ya Batatoli ya Yehova. Batatoli bazalaki na bopɔlɔ mingi na elateli na bango, mpe bazalaki sembo mpe na limemya. Mbala mingi nazalaki komituna lolenge nini bato ya mposo ekeseni bakokaki kozala esika moko na boyokani malamu motindo wana.

“Mokolo mosusu Motatoli moko atɛmisaki ngai na nzela mpe atunaki ngai soki nayebi nkombo ya Nzambe. Nayebaki yango te, mpe lokola nayebaki ete Batatoli ya Yehova bazali bato malamu, nandimaki ete aya kotala ngai na ndako. Natunaki ye mituna mingi na ntina na ezalela ya bakufi, oyo ayanolaki ngai na lisalisi ya Biblia. Kozanga kokakatana, nandimaki boyekoli ya Biblia, mpe pɔ́sɔ mibale na nsima nabandaki koyangana na makita.

“Na ebandeli mwana na ngai ya mwasi atɛmɛlaki ngai, kasi etamboli na ngai mpe etingya na ngai ebongolaki makanisi na ye. Nabandaki koyekola Biblia eleki sikawa sanza mwambe. Lelo oyo mwana na ngai ya mwasi mpe mobali na ye bazali koloba malamu na ntina na Batatoli oyo bayaka mingi na restorá na bango. Mpo na ngai, nazwaki batisimo na liyangani oyo lisalemaki bobele na libanda oyo ya masano.”

▪ Nsima ya liyangani oyo lisalemaki na engumba Roseto degli Abruzzi, mokambi ya esika moko ya pikiniki alobaki ete: “Namoni ete Batatoli ya Yehova bazali mpenza na bosembo na makambo nyonso oyo bazali kosala. Na pɔ́sɔ eleki, nayambaki bato 40 kati na bango na esika na ngai ya pikiniki, mpe babimisaki ata mokakatano moko te. Kútu, ezali bobele bango nde bazalaki koya mpe koyebisa ngai soki bazali na moto mosusu kati na motuka to hema na bango. Mpo na ngai, bazali bakiliyá baleki malamu oyo moto akoki koyamba.”

▪ Nsima ya liyangani yango, mokambi moko ya lotɛ́lɛ alobaki: “Batatoli ya Yehova bazali bango nyonso bato ya kimya. Basalaka makɛlɛlɛ te, mpe bakendaka kolala noki. Bazali solo bato malamu, bato ya sembo, mpe na bizaleli malamu. Soki bato banso bazalaki lokola bango mbɛlɛ makambo nyonso mazali malamu. Bato mosusu bayibaka ata eloko nini​—bambeki, bityelo ya mputulu ya likaya, ata papyé ya kabiné mpe sukali! Bino bosalaka likambo motindo wana te. Soki bana na bino bazwi crème na frigo na mpokwa, namitungisaka te na kokendáká kotánga soki bazwi boni. Batángaka motuya ya solo mpe nokinoki báyaka kofuta mbongo oyo esengeli. Natyelaka bango motema mobimba. Soki bato mosusu bazalaki boye mbɛlɛ makambo mazali mpenza malamu! Nakolinga ete bakiliyá na ngai nyonso bázala Batatoli ya Yehova.”

Bataloli ya Yehova bayebani malamu na Italie, mpe na bamboka mingi mosusu ya mokili. ‘Bazali kobatela bizaleli na bango malamu kati na bapakano’ mpe na bongo bazali kopesa masanzoli epai na Nzambe ya solo, ye oyo bamemi nkombo na ye.​—1 Petelo 2:12.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto