Masoló ya Basakoli ya Bokonzi
Misala malamu oyo mikumisaka Yehova
KATI na lisoló na ye likoló na ngomba, Yesu alobaki epai na bayekoli na ye ete: “Tiká ete [pole, NW] na bino engɛnga liboso na bato ete bámona misala na bino malamu mpe ete bákumisa Tata na bino oyo azali na Likoló.” (Matai 5:16) Bobele bongo, lelo oyo baklisto ya solo bamipesi na kosala “misala malamu” oyo mizali kokumisa Yehova.
Misala malamu yango mizali nini? Kati na yango tokoki kotánga mosala ya kosakola nsango malamu, kasi etamboli malamu na biso ezali mpe na ntina mingi. Mingimingi, eloko ya liboso oyo ebendaka bato epai na lisangá ya boklisto ezali bongo etamboli na biso malamu. Masoló malandi mamonisi lolenge nini Batatoli ya Yehova na Martinique bazali ‘kotika ete pole na bango engɛnga liboso na bato.’
◻ Wana azalaki kosala mosala ya kosakola ndako na ndako, Motatoli ya Yehova moko akendaki kotala mwasi moko Mokatolike. Mwasi yango asilaki kofanda na mobali moko na boumeli ya bambula 25 bobele lokola makango. Ayebaki malamu mateya ya Batatoli ya Yehova, mpamba te esilaki koleka bambula nsambo uta azwaki mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis.a Mwasi yango ayebisaki Motatoli wana ete: “Mangomba mazali mingi. Nayebi te oyo wapi nakoki kondimela yango kati na mobulungano oyo.” Motatoli yango alimbolaki ete solo ekoki komonana bobele kati na Biblia mpe mpo na komona yango asengelaki koyekola Makomami na mozindo mpe kobondela Nzambe ete apesa ye elimo santu mpe etambwisa ye.
Nzokande atako asepelaki koyekola Biblia na boumeli ya mwa ntango, mwasi yango azalaki mbala mingi koboya koyanola na libyangi ya koyangana na makita ya Boklisto kati na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova. Mpo na nini? Mpamba te azalaki nsɔ́ninsɔ́ni mpenza. Nzokande, nsima ya kozwa libyangi ya koyangana na Ekaniseli ya liwa ya Klisto, alóngaki ezaleli na ye ya nsɔ́ninsɔ́ni mpe ayaki koyangana.
Eloko ebendaki likebi na ye mingi mpenza na ntina na likita yango ezalaki bongo ezaleli ya bolingo oyo amonaki kati na Ndako ya Bokonzi. Asilaki naino te komona boninga ya solo motindo wana kati na lingomba na ye! Na nsima ya likita abandaki koyangana na makita nyonso oyo Batatoli ya mboka wana bazalaki kosala, mpe na nsima abalanaki na moto oyo bazalaki kofanda na ye elongo lokola makango. Sikawa azali mosangani asili kobatisama kati na lisangá.
◻ Misala malamu ya Motatoli mosusu ebimisaki mbuma malamu. Azalaki mokonzi kati na kompanyi moko. Nsima wana mobali moko oyo autaki na esanga Réunion azwamaki na mosala, basáli mosusu babandaki kosɛka ye mpo ete azalaki mokuse. Akómaki eloko ya kosɛkama. Nzokande, Motatoli wana azalaki ntango nyonso na boboto mpe na limemya epai na ye. Nokinoki, mobali yango atunaki soki mpo na nini ye akesanaki na bato mosusu.
Motatoli yango ayanolaki ete azalaki na ezaleli ya komemya basusu mpo ete apusamaki na mitindá ya Biblia oyo ayekolaki epai na Batatoli ya Yehova. Amonisaki ye mpe makambo oyo Makomami mazali koloba na ntina na mikano ya Nzambe mpe elikya ya mokili ya sika. Moto yango andimaki boyekoli ya Biblia, abandaki koyangana na makita ya boklisto, mpe abalanaki na mwasi oyo azalaki kofanda na ye elongo lokola makango.
Na nsuka, azongaki na esanga Réunion. Na kala, azalaki na matáta elongo na bandeko na ye ya mosuni, mingi mpenza elongo na bandeko ya mwasi na ye. Kasi sikawa bakamwaki mingi na komona etamboli na ye malamu ya boklisto. Mobali yango azwaki batisimo mpe sikawa azali mosaleli ya misala. Basangani mingi ya libota, kati na bango mwasi na ye mpe bana na bango mibale ya basi, bango mpe bazali kosala kati na lisangá ya boklisto lokola basakoli ya nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.